< Psaumes 94 >
1 Ô Éternel! qui es le [Dieu] Fort des vengeances, le [Dieu] Fort des vengeances, fais reluire ta splendeur.
Yawe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, mimonisa kati na nkembo na Yo!
2 Toi, Juge de la terre, élève-toi: rends la récompense aux orgueilleux.
Mosambisi ya mokili, telema mpo na kozongisela bato ya lolendo mabe na mabe na bango!
3 Jusques à quand les méchants, ô Eternel! jusques à quand les méchants s'égayeront-ils?
Yawe, kino tango nini bato mabe, kino tango nini bato mabe bakosepela?
4 [Jusques à quand] tous les ouvriers d'iniquité proféreront-ils et diront-ils des paroles rudes, et se vanteront-ils?
Bazali komilakisa, bazali kobimisa mafinga; bato nyonso ya misala mabe bazali komikumisa!
5 Eternel, ils froissent ton peuple, et affligent ton héritage.
Yawe, bazali konyokola bato na Yo mpe bazali koyokisa libula na Yo pasi;
6 Ils tuent la veuve et l'étranger, et ils mettent à mort les orphelins.
bazali koboma mwasi oyo akufisa mobali, mopaya mpe bana bitike;
7 Et ils ont dit: L'Eternel ne le verra point; le Dieu de Jacob n'en entendra rien.
bazali koloba: « Yawe amonaka eloko moko te, Nzambe ya Jakobi asosolaka eloko moko te! »
8 Vous les plus abrutis d'entre le peuple, prenez garde à ceci; et vous insensés, quand serez-vous intelligents?
Bino bato ya kilikili, bososola! Bazoba, bokokoma mayele tango nini?
9 Celui qui a planté l'oreille, n'entendra-t-il point? celui qui a formé l'œil, ne verra-t-il point?
Boni, Ye oyo asala litoyi akoki koyoka te? Ye oyo asala liso akoki komona te?
10 Celui qui châtie les nations, celui qui enseigne la science aux hommes, ne censurera-t-il point?
Ye oyo apesaka bikolo etumbu akoki kopesa etumbu te? Ye oyo apesaka bato boyebi.
11 L'Eternel connaît que les pensées des hommes ne sont que vanité.
Yawe ayebi makanisi ya bato; ayebi ete ezali na tina te.
12 Ô que bienheureux est l'homme que tu châties, ô Eternel! et que tu instruis par ta Loi;
Yawe, esengo na moto oyo ozali kozongisa na nzela, moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo
13 Afin que tu le mettes à couvert des jours d'adversité, jusqu’à ce que la fosse soit creusée au méchant!
mpo na kopesa ye bopemi na tango ya pasi, kino libulu etimolama mpo na moto mabe!
14 Car l'Eternel ne délaissera point son peuple, et n'abandonnera point son héritage.
Pamba te Yawe asundolaka bato na Ye te, abwakaka libula na Ye te.
15 C'est pourquoi le jugement s'unira à la justice, et tous ceux qui sont droits de cœur le suivront.
Bakosambisa lisusu kolanda bosembo, mpe bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakotosa bosembo yango.
16 Qui est-ce qui se lèvera pour moi contre les méchants? Qui est-ce qui m'assistera contre les ouvriers d'iniquité?
Nani akotelema mpo na ngai mpo na kotelemela bato mabe? Nani akokotela ngai liboso ya bato ya misala mabe?
17 Si l'Eternel ne m'eût été en secours, mon âme eût été dans peu logée dans le [lieu du] silence.
Ah, soki Yawe asungaki ngai te, mbele nakendeki noki na mokili ya kufa!
18 Si j'ai dit: Mon pied a glissé; ta bonté, ô Eternel! m'a soutenu.
Soki nalobi: « Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, » bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi.
19 Quand j'avais beaucoup de pensées au-dedans de moi, tes consolations ont récréé mon âme.
Soki natungisami na makanisi ebele, kobondisama na Yo epesaka ngai esengo.
20 Le tribunal des méchants qui machine du mal contre les règles de la justice, sera-t-il joint à toi?
Boni, bokonzi ya mabe oyo ememelaka bato pasi na nzela ya mibeko na yango; boni, ezali lisanga moko elongo na Yo?
21 Ils s'attroupent contre l'âme du juste, et condamnent le sang innocent.
Bato mabe basanganaka mpo na kobundisa bomoi ya moto ya sembo mpe kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya kufa.
22 Or l'Eternel m'a été pour une haute retraite; et mon Dieu, pour le rocher de mon refuge.
Kasi Yawe azali, mpo na ngai, ndako batonga makasi; Nzambe na ngai azali libanga epai wapi nazwaka ebombamelo.
23 Il fera retourner sur eux leur outrage, et, les détruira par leur propre malice. L'Eternel notre Dieu les détruira.
Akozongisela bango mabe na bango mpe akobebisa bango mpo na kanza na bango. Solo, Yawe, Nzambe na ngai, akoboma bango.