< Juges 4 >
1 Mais les enfants d'Israël se mirent encore à faire ce qui déplaît à l'Eternel, après qu'Ehud fut mort.
Sima na kufa ya Ewudi, bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe.
2 C'est pourquoi l'Eternel les vendit en la main de Jabin, Roi de Canaan, qui régnait en Hatsor, [et] de l'armée duquel Sisera était le chef, qui demeurait à Haroseth des Nations.
Yawe akabaki bango lisusu na maboko ya Yabini, mokonzi ya Kanana, oyo azalaki kovanda na Atsori. Sisera, mokonzi ya mampinga na ye ya basoda, azalaki kovanda na Arosheti-Goyimi.
3 Et les enfants d'Israël crièrent à l'Eternel; car [Jabin] avait neuf cents chariots de fer, et il avait violemment opprimé les enfants d'Israël durant vingt ans.
Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.
4 En ce temps-là Débora Prophétesse, femme de Lappidoth, jugeait Israël.
Na tango wana, Debora, mwasi mosakoli, mwasi ya engumba Lapidoti, azalaki kokamba Isalaele.
5 Et Débora se tenait sous un palmier entre Rama et Bethel, en la montagne d'Ephraïm; et les enfants d'Israël montaient vers elle pour être jugés.
Azalaki kosambisa na se ya nzete ya mbila ya Debora, oyo ezalaki na kati ya Rama mpe Beteli, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bana ya Isalaele bazalaki koya epai na ye mpo na kosambisama.
6 Or elle envoya appeler Barac, fils d'Abinoham de Kédés de Nephthali, et lui dit: L'Eternel le Dieu d'Israël n'a-t-il pas commandé, [et dit?] Va, [et] fais amas de gens en la montagne de Tabor, et prends avec toi dix mille hommes des enfants de Nephthali, et des enfants de Zabulon.
Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye: — Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi yo mitindo: « Kende, kamata elongo na yo bato nkoto zomi ya mabota ya Nefitali mpe ya Zabuloni, mpe mema bango na nzela oyo ekenda na ngomba Tabori.
7 Et j'attirerai à toi au torrent de Kison, Sisera, chef de l'armée de Jabin, avec ses chariots et la multitude de ses gens, et je le livrerai entre tes mains.
Nakomema Sisera, mokonzi ya basoda ya Yabini, na mayi moke ya Kishoni elongo na bashar mpe basoda na ye, mpe nakokaba ye na maboko na yo. »
8 Et Barac lui dit: Si tu viens avec moi, j'y irai; mais si tu ne viens pas avec moi, je n'y irai point.
Baraki azongiselaki Debora: — Soki okokende elongo na ngai, wana nakokende; kasi soki okokende na ngai te, wana ngai mpe nakokende te.
9 Et elle répondit: Je ne manquerai pas d'aller avec toi; mais tu n'auras pas d'honneur dans le chemin dans lequel tu iras; car l'Eternel vendra Sisera en la main d'une femme. Débora donc se levant, s'en alla avec Barac à Kédés.
Debora alobaki na ye: — Malamu, nakokende elongo na yo. Kasi yeba ete, na nzela oyo ozali kokende, lokumu ekozala ya yo te, pamba te Yawe akokaba Sisera na maboko ya mwasi. Boye, Debora akendeki elongo na Baraki, na mboka Kedeshi.
10 Et Barac ayant assemblé Zabulon et Nephthali en Kédés, fit monter après soi dix mille hommes; et Débora monta avec lui.
Kuna na Kedeshi, Baraki abengisaki bato ya mabota ya Zabuloni mpe ya Nefitali. Bato nkoto zomi balandaki ye, mpe Debora akendeki elongo na ye.
11 Or Héber Kénien, des enfants de Hobab, beau-père de Moïse, s'étant séparé de Kaïn, avait tendu ses tentes jusques au bois de chênes de Tsahanajim, qui est près de Kédés.
Kaka na mokolo wana, Eberi, moto ya Keni, akabwanaki na bato mosusu ya Keni, bakitani ya Obabi, semeki ya Moyize. Mpe Eberi akendeki kino na terebente oyo ezali na Tsananimi, pembeni ya Kedeshi, mpo na kotelemisa ndako na ye ya kapo.
12 Et on rapporta à Sisera que Barac, fils d'Abinoham, était monté en la montagne de Tabor.
Tango bayebisaki Sisera ete Baraki, mwana mobali ya Abinoami, amataki na likolo ya ngomba Tabori,
13 Et Sisera assembla tous ses chariots, [savoir] neuf cents chariots de fer, et tout le peuple qui était avec lui, depuis Haroseth des Nations, jusqu'au torrent de Kison.
Sisera abengisaki, longwa na Arosheti-Goyimi, bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo, mpe asangisaki bashar nkama libwa ya bibende. Amemaki bango na mayi moke ya Kishoni.
14 Et Débora dit à Barac: Lève-toi, car c'est ici le jour auquel l'Eternel a livré Sisera en ta main. L'Eternel n'est-il pas sorti devant toi? Barac donc descendit de la montagne de Tabor, et dix mille hommes après lui.
Debora alobaki na Baraki: « Kende! Ezali lelo nde mokolo oyo Yawe akokaba Sisera na maboko na yo. » Baraki akitaki na ngomba Tabori, mpe bato nkoto zomi balandaki ye.
15 Et l'Eternel frappa Sisera, et tous ses chariots, et toute l'armée, au tranchant de l'épée, devant Barac; et Sisera descendit du chariot, et s'enfuit à pied.
Wana Baraki azalaki kokende, Yawe apanzaki, na nzela ya mopanga na Ye, Sisera, bashar na ye nyonso mpe mampinga na ye ya basoda. Sisera asundolaki shar na ye mpe akimaki na makolo.
16 Et Barac poursuivit les chariots et l'armée jusqu'à Haroseth des Nations; et toute l'armée de Sisera fut passée au fil de l'épée; il n'en demeura pas un seul.
Kasi Baraki alandaki bashar mpe mampinga kino na Arosheti-Goyimi. Mampinga nyonso ya basoda ya Sisera ekufaki na mopanga, ata moto moko te abikaki.
17 Et Sisera s'enfuit à pied dans la tente de Jahel, femme de Héber Kénien; car il y avait paix entre Jabin, Roi de Hatsor, et la maison de Héber Kénien.
Nzokande, Sisera akimaki na makolo kino na ndako ya kapo ya Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni; pamba te boyokani ya malamu ezalaki kati na Yabini, mokonzi ya Atsori, mpe libota ya Eberi, moto ya Keni.
18 Et Jahel étant sortie au-devant de Sisera, lui dit: Mon seigneur! retire-toi, retire-toi chez moi, ne crains point. Il se retira donc chez elle dans la tente, et elle le couvrit d'une couverture.
Yaeli abimaki mpo na kokutana na Sisera mpe alobaki na ye: — Yaka, nkolo na ngai; kimela epai na ngai, kobanga te. Sisera akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli, mpe Yaeli azipaki ye bulangeti.
19 Puis il lui dit: Je te prie, donne-moi un peu d'eau à boire, car j'ai soif. Et elle ouvrant un baril de lait lui donna à boire, et le couvrit.
Sisera alobaki na Yaeli: — Nabondeli yo, pesa ngai mayi mpo ete namela; nazali na posa ya mayi. Yaeli afungolaki mbeki etonda na miliki ya mayi, mpe amelisaki ye yango. Sima, azipaki ye lisusu bulangeti.
20 Il lui dit aussi: Demeure à l'entrée de la tente, et au cas que quelqu'un vienne, et t'interroge, disant: Y a-t-il ici quelqu'un? alors tu répondras: Non.
Sisera alobaki na Yaeli: — Telema na ekuke ya ndako ya kapo. Soki moto ayei kotuna yo: « Moto azali awa? » Zongisa: « Te! »
21 Et Jahel, femme de Héber, prit un clou de la tente, et prenant un marteau en sa main, elle vint à lui doucement; et lui enfonça un clou dans sa tempe, lequel entra dans la terre pendant qu'il dormait profondément, car il était fort las; et ainsi il mourut.
Kasi wana Sisera alalaki pongi makasi mpo ete alembaki, Yaeli, mwasi ya Eberi, akamataki pike ya ndako ya kapo mpe azwaki marto; akotaki malembe pembeni na ye, abetaki ye pike na litoyi, mpe pike yango etobolaki moto na ye kino ekotaki na mabele; mpe Sisera akufaki.
22 Et voici, Barac poursuivait Sisera, et Jahel sortit au-devant de lui, et lui dit: Viens, et je te montrerai l'homme que tu cherches. Et Barac entra chez elle, et voici, Sisera était étendu mort, et le clou était dans sa tempe.
Wana Baraki azalaki nanu kolanda Sisera, Yaeli abimaki mpo na kokutana na ye. Alobaki na Baraki: « Yaka, nakolakisa yo moto oyo ozali koluka. » Baraki akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli mpe amonaki Sisera ya kokufa, alala na mabele, mpe pike kati na litoyi na ye.
23 En ce jour-là donc Dieu humilia Jabin, Roi de Canaan, devant les enfants d'Israël.
Mokolo wana, Nzambe akitisaki liboso ya bana ya Isalaele, Yabini, mokonzi ya Kanana.
24 Et la puissance des enfants d'Israël s'avançait et se renforçait de plus en plus contre Jabin, Roi de Canaan, jusqu'à ce qu'ils l'eurent exterminé.
Bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka Yabini, mokonzi ya Kanana, kino babomaki ye.