< Isaïe 21 >
1 La charge du désert de la mer. Il vient du désert, de la terre épouvantable, comme des Tourbillons qui s'élèvent au pays du Midi, pour traverser.
Maloba na Yawe na tina na esobe ya ebale monene: Ndenge mopepe makasi elekaka na somo na Negevi, monguna moko azali koya wuta na esobe, wuta na mokili moko ya somo.
2 Une dure vision m'a été déclarée. Le perfide demeure perfide; celui qui saccage, saccage [toujours]. Hélamites, montez; Mèdes, assiégez; j'ai fait cesser tous ses soupirs.
Namonaki emoniseli moko ya somo: Moteki baninga azali koteka baninga, mobebisi azali kobebisa. Elami, bundisa bango! Medi, zingela bango! Nakosukisa kolela nyonso oyo ayeisaki na bato.
3 C'est pourquoi mes reins ont été remplis de douleur; les angoisses m'ont saisi, comme les angoisses de celle qui enfante; je me suis tourmenté à cause de ce que j'ai ouï, et j'ai été tout troublé à cause de ce que j'ai vu;
Yango wana, loketo na ngai ekomi na pasi, pasi moko ya makasi penza ekangi ngai lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Makambo oyo nazali koyoka ezali kopesa ngai somo, mpe oyo nazali komona ezali kosilisa ngai mayele.
4 Mon cœur a été agité de toutes parts, et un tremblement m'a épouvanté; on m'a rendu horrible la nuit de mes plaisirs.
Motema na ngai ezali kobeta noki-noki, nakomi kolenga na somo, mwa malili ya pokwa oyo nazelaka na esengo ekomeli ngai somo makasi.
5 Qu'on dresse la table, qu'on fasse le guet, qu'on mange, qu'on boive; levez-vous, Capitaines, oignez le bouclier.
Mesa ebongisami, batandi bilamba ya mesa, bazali kolia mpe komela! Bino bakonzi ya basoda, bopakola banguba na bino mafuta!
6 Car ainsi me dit le Seigneur; va, pose la sentinelle, et qu'elle rapporte ce qu'elle verra.
Tala liloba oyo Nkolo alobi na ngai: « Kende, tia mokengeli; mpe tika ete aloba makambo oyo akomona.
7 Et elle vit un chariot, une couple de gens de cheval, un chariot tiré par des ânes, et un chariot tiré par des chameaux, et elle les considéra fort attentivement.
Soki amoni shar oyo bampunda mibale ezali kobenda, basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, bamoko bamati likolo ya ba-ane, bamosusu bamati likolo ya bashamo, tika ete asala keba, asala keba penza! »
8 Et cria; C'est un lion; Seigneur, je me tiens en sentinelle continuellement de jour, et je me tiens en ma garde toutes les nuits.
Boye, mokengeli agangaki lokola nkosi: « Nkolo, mokolo mobimba, natelemaka na likolo ya ndako molayi ya kokengela; mpe butu nyonso, natikalaka kaka se wana.
9 Et voici venir le chariot d'un homme, une paire de gens de cheval. Alors elle parla, et dit; Elle est tombée, elle est tombée, Babylone; et toutes les images taillées de ses dieux ont été brisées par terre.
Tala, moto moko azali koya awa na shar, oyo bampunda mibale ezali kobenda. Azongisaki eyano: ‹ Babiloni esili kokweya, ekweyi solo! Banzambe na yango nyonso ya bikeko elali-lali mpe epanzani na mabele! › »
10 C'est ce que j'ai foulé, et le grain que j'ai battu dans mon aire. Je vous ai annoncé ce que j'ai ouï de l'Eternel des armées, du Dieu d'Israël.
Oh bato na ngai, babeti bino ndenge batutaka ble na libanda! Nazali koyebisa bino makambo oyo nayokaki wuta epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya Nzambe ya Isalaele.
11 La charge de Duma. On crie à moi de Séhir; ô sentinelle! qu'y a-t-il depuis le soir? ô sentinelle! qu'y a-t-il depuis la nuit?
Maloba na Yawe na tina na Duma. Moto moko azali kobelela Ngai wuta Seiri: « Mokengeli, olobi nini mpo na butu? Mokengeli olobi nini mpo na butu? »
12 La sentinelle a dit; Le matin est venu, mais il s'en va être nuit; si vous demandez, demandez: retournez, venez.
Mokengeli azongisaki: Tongo elingi kotana, kasi butu mpe elingi koya. Soki bolingi kotuna mituna, botuna; bongo bozonga mpe boya lisusu.
13 La charge contre l'Arabie. Vous passerez pêle-mêle la nuit dans la forêt, troupes de Dédanim;
Maloba na Yawe mpo na kotelemela Arabi: Oh bino bato ya mombongo ya Dedani, bokolala na esobe ya Arabi.
14 Eaux, venez au-devant de celui qui a soif; les habitants du pays de Téma sont venus au-devant de celui qui s'en allait errant çà et là avec du pain pour lui.
Bopesa mayi na moto oyo azali na posa ya mayi; bino bavandi ya mokili ya Tema, bopesa bilei na bato oyo bazali kokima bitumba.
15 Car ils s'en sont allés errant çà et là de devant les épées, de devant l'épée dégainée, et de devant l'arc tendu, et de devant le fort de la bataille.
Pamba te bazali nde kokima mopanga, mopanga oyo babimisi na ebombelo na yango, bazali nde kokima tolotolo oyo etelemi makasi mpe bitumba ya makasi.
16 Car ainsi m'a dit le Seigneur; dans un an, tels que sont les ans d'un mercenaire, toute la gloire de Kédar prendra fin.
Tala liloba oyo Nkolo alobaki na ngai: « Etikali kaka mobu moko, ndenge batangaka mikolo ya mowumbu, nkembo nyonso ya Kedari ekosuka.
17 Et le reste du nombre des forts archers des enfants de Kédar sera diminué; car l'Eternel le Dieu d'Israël a parlé.
Bongo, ekotikala kaka mwa ndambo moke ya basoda oyo babundaka na matolotolo mpe ya basoda ya mpiko kati na Kedari, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.