< Isaïe 17 >

1 La charge de Damas; voici, Damas est détruite pour n'être plus ville, et elle ne sera qu'un monceau de ruines.
Maloba ya kosambisa Damasi: « Tala, Damasi ekotikala lisusu engumba te, ekokoma nde liboke ya libebi.
2 Les villes de Haroher seront abandonnées, elles deviendront des parcs de brebis qui y reposeront, et il n'y aura personne qui les épouvante.
Bingumba ya Aroeri ekotikala lisusu na bato te, ekotikala nde mpo na bibwele oyo ekokoma kolala kuna, oyo moto ata moko te akobangisa.
3 Il n'y aura point de forteresse en Ephraïm, ni de Royaume à Damas, ni dans le reste de la Syrie; ils seront comme la gloire des enfants d'Israël, dit l'Eternel des armées.
Bingumba batonga makasi ekolimwa na Efrayimi, mpe nguya ya bokonzi ekolimwa na Damasi. Batikali ya Siri bakokoma lokola nkembo ya bana ya Isalaele, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
4 Et il arrivera en ce jour-là, que la gloire de Jacob sera diminuée, et que la graisse de sa chair sera fondue.
« Na mokolo wana, lokumu ya Jakobi ekosila, mafuta ya misuni ya nzoto na ye ekosila.
5 Et il [en] arrivera comme quand le moissonneur cueille les blés, et qu'il moissonne les épis avec son bras; il [en] arrivera, dis-je, comme quand on ramasse les épis dans la vallée des Réphaïns.
Ekozala lokola tango basangisaka matiti ya ble mpe loboko ya moloni ebukaka mito na yango, lokola tango balokotaka mito ya ble oyo ekweyaka na lubwaku ya bato ya Refayimi.
6 Mais il y demeurera quelques grappillages, comme quand on secoue l'olivier, et qu'il reste deux ou trois olives au bout des plus hautes branches, et qu'il y en a quatre ou cinq que l'olivier a produites dans ses branches fruitières, dit l'Eternel, le Dieu d'Israël.
Kasi kaka ndambo moke ya mito ya ble nde etikalaka; lokola tango baningisaka nzete mpo na kobuka bambuma ya olive, bongo bambuma mibale to misato etikalaka na songe ya bitape, mpe minei to mitano etikalaka na bitape ya se, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.
7 En ce jour-là, l'homme tournera sa vue vers celui qui l'a fait, et ses yeux regarderont vers le Saint d'Israël.
Na mokolo wana, bato bakotalela Mokeli na bango mpe bakobalola miso na bango epai ya Mosantu ya Isalaele;
8 Et il ne jettera plus sa vue vers les autels qui sont l'ouvrage de ses mains, et ne regardera plus ce que ses doigts auront fait, ni les bocages, ni les tabernacles.
bakotalela lisusu bitumbelo te oyo ezali misala ya maboko na bango, mpe miso na bango ekotala lisusu te misala ya misapi na bango: makonzi ya Ashera mpe bitumbelo ya malasi ya ansa.
9 En ce jour-là, les villes de sa force, qui auront été abandonnées à cause des enfants d'Israël, seront comme un bois taillis et des rameaux abandonnés, et il y aura désolation.
Na mokolo wana, bakosundola bingumba na bango oyo batonga makasi ndenge basundolaki banzete mpe bangomba liboso ya bana ya Isalaele. Nyonso ekobebisama penza.
10 Parce que tu as oublié le Dieu de ton salut, et que tu ne t'es point souvenue du rocher de ta force, à cause de cela tu as transplanté des plantes [tirées des lieux] de plaisance, et tu as planté des provins d'un pays étranger.
Mpo ete obosani Nzambe, Mobikisi na yo, oboyi kokanisa Libanga oyo azali Ekimelo na yo, okolisi banzete ya kitoko mpe oloni banzete ya vino ya bapaya.
11 De jour tu auras fait croître ce que tu auras planté, et le matin tu auras fait lever ta semence; [mais] la moisson sera enlevée au jour que l'on voulait en jouir, et il y aura une douleur désespérée.
Kaka na mokolo oyo olonaki yango, omonaki yango kobimisa mito; mpe na tongo makasi, nkona na yo ebimisaki bafololo. Na mokolo ya pasi, milona na yo ekomonana pamba, mpe pasi yango ekoki kosila te.
12 Malheur à la multitude de plusieurs peuples qui bruient comme bruient les mers; et à la tempête éclatante des nations, qui font du bruit comme une tempête éclatante d'eaux impétueuses.
Mawa na ebele ya bato! Tala ndenge bazali koganga lokola makelele ya ebale monene! Bato ya bikolo bazali koganga lokola lokito ya mayi ya ebale monene!
13 Les nations bruient comme une tempête éclatante de grosses eaux, mais il la menacera, et elle s'enfuira loin; elle sera poursuivie comme la balle des montagnes, chassée par le vent, et comme une boule poussée par un tourbillon.
Ata bato ya bikolo bazali koganga lokola makelele ya mayi ya bibale minene, bakimaka penza mosika tango Yawe apamelaka bango; bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, lokola putulu na tango ya mopepe makasi.
14 Au temps du soir voici l'épouvante, mais avant le matin il ne sera plus; c'est là la portion de ceux qui nous auront fourragés, et le lot de ceux qui nous auront pillés.
Na pokwa, somo ya pwasa nde eyaka! Bongo liboso ete tongo etana, eloko moko te etikalaka! Yango nde lifuti ya bato oyo banyokolaka biso, mpe mbano ya bato oyo bamonisaka biso pasi.

< Isaïe 17 >