< Genèse 48 >

1 Or il arriva après ces choses que l'on vint dire à Joseph: Voici, ton père est malade; et il prit avec lui ses deux fils, Manassé et Ephraïm.
Sima na makambo wana, bayaki koyebisa Jozefi: « Tala, tata na yo azali kobela. » Jozefi azwaki bana na ye mibale ya mibali: Manase mpe Efrayimi.
2 Et on fit savoir à Jacob, et on lui dit: Voici Joseph ton fils qui vient vers toi. Alors Israël s'efforça, et se mit en son séant sur le lit.
Bapesaki sango epai ya Jakobi ete mwana na ye ya mobali Jozefi azali koya epai na ye. Isalaele asalaki makasi mpe avandaki na mbeto.
3 Puis Jacob dit à Joseph: Le [Dieu] Fort, Tout-Puissant s'est apparu à moi à Lus au pays de Canaan, et m'a béni.
Jakobi alobaki na Jozefi: — Nzambe-Na-Nguya-Nyonso abimelaki ngai na Luze, na mokili ya Kanana; mpe kuna, apambolaki ngai.
4 Et il m'a dit: Voici, je te ferai croître, et multiplier, et je te ferai devenir une assemblée de peuples, et je donnerai ce pays à ta postérité après toi en possession perpétuelle.
Alobaki na ngai: « Nakopesa yo mabota mpe nakokomisa yo ebele; nakokomisa yo lisanga ya bikolo ebele mpe nakopesa mokili oyo lokola libula ya seko na seko epai ya bakitani na yo sima na yo. »
5 Or maintenant tes deux fils, qui te sont nés au pays d'Egypte, avant que j'y vinsse vers toi, sont miens: Ephraïm et Manassé seront miens comme Ruben et Siméon.
Mpe sik’oyo, bana na yo ya mibali oyo babotamaki na Ejipito liboso ete ngai naya awa, bakomi lokola bana na ngai. Efrayimi mpe Manase bakomi bana na ngai lokola Ribeni mpe Simeoni.
6 Mais les enfants que tu auras après eux, seront à toi, [et] ils seront appelés selon le nom de leurs frères en leur héritage.
Bana oyo okobota sima na bango bakozala ya yo; bakozwa eteni na bango ya libula na kombo ya bayaya na bango.
7 Or, quand je venais de Paddan, Rachel me mourut au pays de Canaan en chemin, n'y ayant plus que quelque petit espace de pays pour arriver à Ephrat; et je l'enterrai là, sur le chemin d'Ephrat, qui [est] Bethléhem.
Pamba te, tango nawutaki na Padani, Rasheli akufaki na nzela, na maboko na ngai, wana nazalaki kokende na mokili ya Kanana, pene ya Efrata; nakundaki ye kuna pembeni ya Efrata oyo babengaka Beteleemi.
8 Puis Israël vit les fils de Joseph, et il dit: Qui sont ceux-ci?
Tango Isalaele amonaki bana mibali ya Jozefi, atunaki: — Ba-oyo bazali banani?
9 Et Joseph répondit à son père: Ce sont mes fils que Dieu m'a donnés ici; et il dit: Amène-les-moi, je te prie, afin que je les bénisse.
Jozefi azongiselaki tata na ye: — Bazali bana mibali oyo Nzambe apesi ngai awa. Isalaele alobaki: — Pusa bango mpo ete napambola bango.
10 Or les yeux d'Israël étaient appesantis de vieillesse, et il ne pouvait voir; et il les fit approcher de soi, et les baisa, et les embrassa.
Miso ya Isalaele elembaki mpo na kimobange mpe azalaki komona lisusu malamu te. Yango wana, Jozefi apusaki bana na ye ya mibali pembeni ya tata na ye, Isalaele apesaki bango beze mpe ayambaki bango.
11 Et Israël dit à Joseph: Je ne croyais pas voir [jamais] ton visage; et voici, Dieu m'a fait voir et toi et tes enfants.
Isalaele alobaki na Jozefi: — Nazalaki na elikya te ete nakomona lisusu elongi na yo; kasi sik’oyo Nzambe apesi ngai nzela ya komona kutu bana na yo.
12 Et Joseph les retira d'entre les genoux de son [père], et se prosterna le visage contre terre.
Jozefi alongolaki bana na ye na mabolongo ya Isalaele mpe agumbamaki elongi na ye kino na se.
13 Joseph donc les prit tous deux, [et mit] Ephraïm à sa droite, à la gauche d'Israël, et Manassé à sa gauche, à la droite d'Israël; et les fît approcher de lui.
Jozefi azwaki bango mibale: Efrayimi na loboko na ye ya mobali, loboko ya mwasi ya Isalaele; mpe Manase, na loboko na ye ya mwasi, loboko ya mobali ya tata na ye. Apusaki bango pembeni ya Isalaele.
14 Et Israël avança sa main droite, et la mit sur la tête d'Ephraïm, qui était le puîné; et sa main gauche sur la tête de Manassé, transposant ainsi ses mains de propos délibéré, car Manassé était l'aîné.
Isalaele asembolaki loboko na ye ya mobali mpe atiaki yango likolo ya moto ya Efrayimi oyo azalaki leki; mpe loboko na ye ya mwasi likolo ya moto ya Manase. Na bongo, abongolaki maboko na ye mpo ete Manase azalaki mwana ya liboso.
15 Et il bénit Joseph, en disant: Que le Dieu, devant la face duquel mes pères Abraham et Isaac ont vécu, le Dieu qui me paît depuis que je suis [au monde] jusqu'à ce jour;
Isalaele apambolaki Jozefi mpe alobaki: Tika ete Nzambe oyo, liboso na Ye, bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki, batambolaki, Nzambe oyo azali Mobateli na ngai wuta mokolo ya mbotama na ngai kino na mokolo ya lelo,
16 Que l'Ange qui m'a garanti de tout mal, bénisse ces enfants; et que mon nom et le nom de mes pères Abraham et Isaac soit réclamé sur eux; et qu'ils croissent en nombre comme les poissons, [en multipliant] sur la terre.
anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, apambola bana oyo ya mibali! Tika ete babengama na kombo na ngai, mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki! Tika ete bakoma ebele kati na mokili!
17 Et Joseph voyant que son père mettait sa main droite sur la tête d'Ephraïm, en eut du déplaisir, et il souleva la main de son père, pour la détourner de dessus la tête d'Ephraïm sur la tête de Manassé.
Tango Jozefi amonaki ete tata na ye atiaki loboko na ye ya mobali na moto ya Efrayimi, asepelaki te. Azwaki loboko ya tata na ye, alongolaki yango na moto ya Efrayimi mpo na kotia yango na moto ya Manase.
18 Et Joseph dit à son père: Ce n'est pas ainsi, mon père! car celui-ci est l'aîné; mets ta main droite sur sa tête.
Jozefi alobaki na tata na ye: — Boye te, tata na ngai! Oyo azali mwana ya liboso; tia loboko na yo ya mobali likolo ya moto na ye.
19 Mais son père le refusa en disant: Je le sais, mon fils, je le sais. Celui-ci deviendra aussi un peuple, et même il sera grand; mais toutefois son frère, qui est plus jeune, sera plus grand que lui, et sa postérité sera une multitude de nations.
Kasi tata na ye aboyaki mpe alobaki: — Nayebi, mwana na ngai! Nayebi! Ye mpe akokoma ekolo, akokoma monene. Nzokande, leki na ye akozala monene koleka ye mpe bakitani na ye bakokoma lisanga ya bikolo.
20 Et en ce jour-là il les bénit, et dit: Israël bénira [prenant exemple] en toi, [et] disant: Dieu te fasse tel qu'Ephraïm et Manassé; et il mit Ephraïm devant Manassé.
Apambolaki bango wana mpe alobaki: Bato ya Isalaele bakotangaka bakombo na bino mpo na kopambola: « Tika ete Nzambe akomisa bino lokola Efrayimi mpe Manase! » Boye Isalaele atiaki Efrayimi liboso ya Manase.
21 Puis Israël dit à Joseph: Voici, je m'en vais mourir, mais Dieu sera avec vous, et vous fera retourner au pays de vos pères.
Bongo Isalaele alobaki na Jozefi: — Etikali moke nakufa. Nzambe akozala na bino mpe akozongisa bino na mokili ya bakoko na bino.
22 Et je te donne une portion plus qu'à tes frères, laquelle j'ai prise avec mon épée et mon arc sur les Amorrhéens.
Mpo na ngai, napesi yo koleka oyo napesaki epai na bandeko na yo: eteni ya mabele oyo nabotolaki, na mopanga mpe na tolotolo na ngai, epai ya bato ya Amori.

< Genèse 48 >