< Genèse 32 >

1 Et Jacob continua son chemin, et les Anges de Dieu vinrent au-devant de lui;
Wana Jakobi azalaki kokoba mobembo na ye, ba-anjelu ya Nzambe bayaki kokutana na ye.
2 Et quand Jacob les eut vus, il dit: [C'est] ici le camp de Dieu; et il nomma ce lieu-là Mahanajim.
Tango Jakobi amonaki bango, alobaki: « Oyo ezali molako ya Nzambe! » Mpe abengaki esika yango: Maanayimi.
3 Et Jacob envoya des messagers devant soi vers Esaü son frère, au pays de Séhir, dans le territoire d'Edom.
Jakobi atindaki bantoma liboso na ye epai ya Ezawu, ndeko na ye, na mokili ya Seiri, kati na zamba ya Edomi.
4 Et leur commanda, en disant: Vous parlerez en cette manière à mon Seigneur Esaü: Ainsi a dit ton serviteur Jacob; j'ai demeuré comme étranger chez Laban, et m'y suis arrêté jusqu'à présent.
Apesaki bango malako oyo: « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu: ‹ Mosali na yo Jakobi alobi: ‘Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo.
5 Et j'ai des bœufs, des ânes, des brebis, des serviteurs, et des servantes; ce que j'envoie annoncer à mon Seigneur, afin de trouver grâce devant lui.
Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye.’ › »
6 Et les messagers retournèrent à Jacob, et lui dirent: Nous sommes venus vers ton frère Esaü, et même il vient au-devant de toi, ayant quatre cents hommes avec lui.
Tango bantoma bazongaki epai ya Jakobi, balobaki: « Tokendeki epai ya Ezawu, ndeko na yo, mpe sik’oyo azali koya elongo na bato nkama minei mpo na kokutana na yo. »
7 Alors Jacob craignit beaucoup, et fut dans une grande angoisse; et ayant partagé le peuple qui était avec lui, et les brebis, et les bœufs, et les chameaux en deux bandes, il dit:
Na kobanga makasi mpe na komitungisa, Jakobi akabolaki bato oyo bazalaki elongo na ye na masanga mibale; ndenge moko mpe mpo na bameme, bantaba mpe bashamo.
8 Si Esaü vient à l'une de ces bandes, et qu'il la frappe, la bande qui demeurera de reste échappera.
Azalaki komilobela: « Soki Ezawu abundisi lisanga moko, lisanga oyo etikali ekoki kokima. »
9 Jacob dit aussi: Ô Dieu de mon père Abraham, Dieu de mon père Isaac, ô Eternel qui m'as dit: Retourne en ton pays, et vers ta parenté, et je te ferai du bien.
Sima, Jakobi abondelaki: « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai! Nzambe ya Izaki, tata na ngai! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai: ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. ›
10 Je suis trop petit au prix de toutes tes gratuités, et de toute la vérité dont tu as usé envers ton serviteur; car j'ai passé ce Jourdain avec mon bâton, mais maintenant je m'en [retourne] avec ces deux bandes.
Nazali nani mpo ete otalisa ngai mosali na Yo bolamu mpe bosembo nyonso oyo! Nazalaki kaka na lingenda tango nakatisaki Yordani, kasi sik’oyo nazali na masanga mibale.
11 Je te prie, délivre-moi de la main de mon frère Esaü; car je crains qu'il ne vienne, et qu'il ne me frappe, et [qu'il ne tue] la mère avec les enfants.
Nabondeli Yo, kangola ngai na maboko ya ndeko na ngai, Ezawu, pamba te nazali kobanga ete aya kobundisa ngai elongo na bamama mpe bana na bango.
12 Or tu as dit: Certes, je te ferai du bien, et je ferai devenir ta postérité comme le sable de la mer, lequel on ne saurait compter à cause de son grand nombre.
Nzokande, Yo olobaki na ngai: ‹ Ya solo nakosalela yo bolamu mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo moto moko te akoki kotanga. › »
13 Et il passa la nuit en ce lieu-là, et prit de ce qui lui vint en main pour en faire un présent à Esaü son frère.
Jakobi alekisaki butu na esika wana. Kati na biloko oyo azalaki na yango, aponaki kado mpo na Ezawu, ndeko na ye:
14 [Savoir] deux cents chèvres, vingt boucs, deux cents brebis, vingt moutons.
bantaba ya basi nkama mibale mpe bantaba ya mibali tuku mibale, bameme ya basi nkama mibale mpe bameme ya mibali tuku mibale,
15 Trente femelles de chameaux qui allaitaient, et leurs petits; quarante jeunes vaches, dix jeunes taureaux, vingt ânesses, et dix ânons.
shamo ya basi tuku misato elongo na bana na yango, bangombe ya basi tuku minei mpe bangombe ya mibali zomi, ba-ane ya basi tuku mibale mpe ya mibali zomi.
16 Et il les mit entre les mains de ses serviteurs, chaque troupeau à part, et leur dit: Passez devant moi, et faites qu'il y ait de la distance entre un troupeau et l'autre.
Akabolaki yango na bitonga mpe apesaki yango epai ya basali na ye. Alobaki na bango: « Boleka liboso na ngai mpe botia etonga moko mosika na mosusu. »
17 Et il commanda au premier, disant: Quand Esaü mon frère te rencontrera, et te demandera, disant: A qui es-tu? et où vas-tu? et à qui sont ces choses qui sont devant toi?
Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso: « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo: ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo? ›
18 Alors tu diras: Je suis à ton serviteur Jacob: c'est un présent qu'il envoie à mon Seigneur Esaü; et le voilà lui-même après nous.
Okozongisa: ‹ Ezali ya Jakobi, mosali na yo, ezali kado oyo atindeli nkolo na ngai Ezawu. Mpe tala ye moko azali koya sima na biso. › »
19 Il fit aussi le même commandement au second, et au troisième, et à tous ceux qui allaient après les troupeaux, disant: Vous parlerez en ces termes-ci à Esaü, quand vous l'aurez trouvé;
Apesaki lisusu mitindo wana epai ya mosali ya mibale, ya misato mpe epai ya basali nyonso oyo bazalaki kolanda bibwele: « Bokoloba kaka maloba moko tango bokokutana na Ezawu.
20 Et vous lui direz: Voici même ton serviteur Jacob est derrière nous. Car il disait: J'apaiserai sa colère par ce présent qui ira devant moi, et après cela, je verrai sa face; peut-être qu'il me regardera favorablement.
Bokoyebisa ye lisusu: ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso! › » Pamba te azalaki komilobela: « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. »
21 Le présent donc alla devant lui; mais pour lui il demeura cette nuit-là avec sa troupe.
Boye kado ya Jakobi ekendeki liboso, kasi ye moko alekisaki butu kati na Molako.
22 Et il se leva cette nuit, et prit ses deux femmes, et ses deux servantes, et ses onze enfants, et passa le gué de Jabbok.
Na butu wana, Jakobi alamukaki, azwaki basi na ye mibale, basali na ye mibale ya basi, bana na ye zomi na moko mpe akatisaki mayi ya Yaboki.
23 Il les prit donc, et leur fit passer le torrent; il fit aussi passer tout ce qu'il avait.
Sima na kokatisa bango mayi, akatisaki mpe biloko na ye nyonso.
24 Or Jacob étant resté seul, un homme lutta avec lui, jusqu'à ce que l'aube du jour fût levée.
Jakobi atikalaki kaka ye moko. Bongo moto moko abundaki na ye kino tango tongo elingaki kotana.
25 Et quand [cet homme] vit qu'il ne le pouvait pas vaincre, il toucha l'endroit de l'emboîture de sa hanche; ainsi l'emboîture de l'os de la hanche de Jacob fut démise quand l'homme luttait avec lui.
Wana moto yango amonaki ete akoki kolonga Jakobi te, abetaki Jakobi na loketo mpe mokuwa ya loketo na ye ebukanaki tango bazalaki kobunda.
26 Et [cet homme] lui dit: Laisse-moi, car l'aube du jour est levée. Mais il dit: Je ne te laisserai point que tu ne m'aies béni.
Sima, moto yango alobaki: — Tika ngai nakende, pamba te tongo elingi kotana. Kasi Jakobi azongisaki: — Nakotika yo te kokende soki opamboli ngai te.
27 Et [cet homme] lui dit: Quel est ton nom? Il répondit: Jacob.
Moto yango atunaki Jakobi: — Kombo na yo nani? Jakobi azongisaki: — Kombo na ngai ezali Jakobi.
28 Alors il dit: Ton nom ne sera plus Jacob, mais Israël; car tu as été le maître [en luttant] avec Dieu et avec les hommes, et tu as été le plus fort.
Moto yango alobaki lisusu: — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.
29 Et Jacob demanda, disant: Je te prie, déclare-moi ton nom. Et il répondit: Pourquoi demandes-tu mon nom? Et il le bénit là.
Jakobi alobaki: — Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo. Azongiselaki ye: — Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai? Boye apambolaki ye na esika wana.
30 Et Jacob nomma le lieu, Péniel; car j'ai, [dit-il], vu Dieu face à face, et mon âme a été délivrée.
Jakobi abengaki esika yango « Penieli, » pamba te alobaki: « Namoni Nzambe na miso na ngai, mpe bomoi na ngai ebiki. »
31 Et le soleil se leva aussitôt qu'il eut passé Péniel, et il boitait d'une hanche.
Tango moyi ebimaki, Jakobi alekaki Penueli. Azalaki kotambola tengu-tengu mpo na loketo na ye.
32 C'est pourquoi jusqu'à ce jour les enfants d'Israël ne mangent point du muscle se retirant, qui est à l'endroit de l'emboîture de la hanche; parce que [cet homme-là] toucha l'endroit de l'emboîture de la hanche de Jacob, à l'endroit du muscle se retirant.
Yango wana kino lelo, bana ya Isalaele baliaka mosuni ya mopende te, pamba te Nzambe abetaki Jakobi na mosuni oyo ekangami na mokuwa ya loketo.

< Genèse 32 >