< Deutéronome 21 >
1 Quand il se trouvera sur la terre que l'Eternel ton Dieu te donne pour la posséder, un homme qui a été tué, étendu dans un champ, [et] qu'on ne saura pas qui l'aura tué;
Soki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa, bakuti moto akufa alali na elanga, bongo moto oyo abomaki ye ayebani te,
2 Alors tes Anciens et tes Juges sortiront, et mesureront depuis l'homme qui aura été tué, jusqu'aux villes qui [sont] tout autour de lui.
bampaka mpe basambisi na bino basengeli kobima mpo na komeka molayi, kobanda na esika oyo ebembe ezali kino na bingumba ya zingazinga,
3 Puis les Anciens de la ville la plus proche de l'homme qui aura été tué, prendront une jeune vache du troupeau, de laquelle on ne se soit point servi, [et] qui n'ait point tiré étant sous le joug;
mpo na koyeba engumba oyo eleki pene. Bongo bampaka ya engumba yango bakozwa mwana ngombe ya mwasi oyo nanu basaleli mosala te mpe nanu bakangi ekangiseli na kingo te;
4 Et les Anciens de cette ville-là feront descendre la jeune vache en une vallée rude, dans laquelle on ne laboure, ni ne sème, et là ils couperont le cou à la jeune vache dans la vallée.
bakomema mwana ngombe yango ya mwasi na lubwaku oyo, kati na yango, basala nanu mosala ya bilanga te mpe balona nanu ata eloko moko te, na esika oyo mayi ezali kotiola. Ezali kuna nde bampaka bakobuka yango kingo.
5 Et les Sacrificateurs, fils de Lévi, s'approcheront; car l'Eternel ton Dieu les a choisis pour faire son service, et pour bénir au Nom de l'Eternel; et afin qu'à leur parole toute cause et toute plaie soit définie.
Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, bakopusana; pamba te ezali bango nde Yawe, Nzambe na bino, apona mpo na kosala mosala na Ye, mpo na kopambola bato na Kombo na Yawe mpe mpo na kokata makambo tango nyonso kowelana mpe kozokisana ezali.
6 Et tous les Anciens de cette ville-là, qui seront les plus près de l'homme qui aura été tué, laveront leurs mains sur la jeune vache, à laquelle on aura coupé le cou dans la vallée,
Bongo bampaka ya engumba yango bakosukola maboko na bango na likolo ya mwana ngombe ya mwasi oyo bakobuka kingo na lubwaku
7 Et prenant la parole ils diront: Nos mains n'ont point répandu ce sang; nos yeux aussi ne l'ont point vu [répandre].
mpe bakoloba: « Maboko na biso esopaki makila oyo te, mpe miso na biso emonaki te tango likambo yango esalemaki.
8 Ô Eternel! Sois propice à ton peuple d'Israël que tu as racheté, et ne lui impute point le sang innocent [qui a été répandu] au milieu de ton peuple d'Israël; et le meurtre sera expié pour eux.
Eh Yawe, ndima kolimbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, oyo osikolaki. Kotangela bango ngambo te ya makila ya moto oyo ayebi likambo te. » Boye, Yawe akolimbisa bango mpo na makila oyo etangaki.
9 Et tu ôteras le sang innocent du milieu de toi, parce que tu auras fait ce que l'Eternel approuve et trouve juste.
Na nzela wana nde bokolongola, kati na bino, ngambo ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te wana bokosala likambo ya bosembo na miso ya Yawe.
10 Quand tu seras allé à la guerre contre tes ennemis, et que l'Eternel ton Dieu les aura livrés entre tes mains et que tu en auras emmené des prisonniers;
Tango bokokende kobundisa banguna na bino, bongo Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino mpe bokangi ndambo ya bato;
11 Si tu vois entre les prisonniers quelque belle femme, et qu'ayant conçu pour elle de l'affection, tu veuilles la prendre pour ta femme;
soki bomoni mwasi ya kitoko kati na bango mpe moko kati na bino asepeli na ye, akoki solo kobala ye.
12 Alors tu la mèneras en ta maison, et elle rasera sa tête, et fera ses ongles;
Boye mobali oyo asepeli kobala mwasi yango akokotisa ye kati na ndako na ye, mpe mwasi yango akomikokola suki ya moto na ye, akomikata manzaka na ye;
13 Et elle ôtera de dessus soi les habits qu'elle portait lorsqu'elle a été faite prisonnière; et elle demeurera en ta maison, et pleurera son père et sa mère un mois durant; puis tu viendras vers elle, et tu seras son mari, et elle sera ta femme.
akotia pembeni bilamba oyo alataki tango bakangaki ye mpe akovanda na ndako ya mobali yango. Sima na ye kolela tata mpe mama na ye sanza mobimba, mobali yango akosangisa na ye nzoto mpe akokoma mobali na ye; bongo ye akokoma mwasi ya mobali yango.
14 S'il arrive qu'elle ne te plaise plus, tu la renverras selon sa volonté, mais tu ne la pourras point vendre pour de l'argent, ni en faire aucun trafic parce que tu l'auras humiliée.
Soki mobali asepeli lisusu na mwasi yango te, akotika ye kokende na esika nyonso oyo alingi; akoki te koteka ye to kokomisa ye lokola mowumbu, pamba te asambwisaki ye.
15 Quand un homme aura deux femmes, l'une aimée, et l'autre haïe, et qu'elles lui auront enfanté des enfants, tant celle qui est aimée, que celle qui est haïe, et que le fils aîné soit de celle qui est haïe;
Soki mobali azali na basi mibale, bongo alingaka moko koleka mosusu, mpe bango mibale baboteli ye bana, kasi mwana ya liboso azali mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te;
16 Lorsque le jour viendra qu'il partagera à ses enfants ce qu'il aura, alors il ne pourra pas faire aîné le fils de celle qui est aimée, préférablement au fils de celle qui est haïe, lequel est né le premier.
tango akokabola bozwi na ye lokola libula epai ya bana na ye ya mibali; akoki te kokomisa mwana ya liboso, mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka koleka na esika ya mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te.
17 Mais il reconnaîtra le fils de celle qui est haïe pour son premier-né, en lui donnant la portion de deux, de tout ce qui se trouvera lui appartenir; car il est le commencement de sa vigueur; le droit d'aînesse lui appartient.
Kasi akozwa mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te lokola mwana ya liboso mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango. Mwana mobali wana azali elembo ya liboso ya bokasi ya tata na ye, boye asengeli kozwa makoki nyonso oyo ebongi na mwana ya liboso.
18 Quand un homme aura un enfant méchant et rebelle, n'obéissant point à la voix de son père, ni à la voix de sa mère, et qu'ils l'auront châtié, et que, nonobstant cela, il ne les écoute point;
Soki moto azali na mwana oyo azali moto makasi mpe motomboki, oyo atosaka te ezala tata to mpe mama na ye, mpe ayokelaka bango te ata soki bapesi ye etumbu,
19 Alors le père et la mère le prendront, et le mèneront aux Anciens de sa ville, et à la porte de son lieu;
tata mpe mama na ye bakokanga ye mpe bakomema ye epai ya bampaka na ekuke ya engumba na bango.
20 Et ils diront aux Anciens de sa ville: C'est ici notre fils qui est méchant et rebelle, il n'obéit point à notre voix, il est gourmand et ivrogne.
Bakoloba na bampaka ya engumba: « Mwana na biso oyo azali moto makasi mpe motomboki, atosaka biso te, azali lokoso mpe molangwi masanga. »
21 Et tous les gens de la ville le lapideront, et il mourra; et ainsi tu ôteras le méchant du milieu de toi, afin que tout Israël l'entende, et qu'il craigne.
Boye bato nyonso ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. Tango bana nyonso ya Isalaele bakoyoka yango, bakobanga.
22 Quand un homme aura commis quelque péché, digne de mort, et qu'on le fera mourir, et que tu le pendras à un bois;
Soki moto asali mabe oyo esengi ete bapesa ye etumbu ya kufa, bongo badiembiki nzoto na ye na nzete,
23 Son corps mort ne demeurera point la nuit sur le bois, mais tu ne manqueras point de l'ensevelir, le même jour, car celui qui est pendu est malédiction de Dieu; c'est pourquoi tu ne souilleras point la terre que l'Eternel ton Dieu te donne en héritage.
ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula.