< Actes 3 >

1 Et comme Pierre et Jean montaient ensemble au Temple à l'heure de la prière, qui était à neuf heures,
Ezalaki mokolo moko, Petelo mpe Yoane bakendeki na Tempelo na tango ya mabondeli: ezalaki na ngonga ya misato sima na midi.
2 Un homme boiteux dès sa naissance, y était porté, lequel on mettait tous les jours à la porte du Temple nommée la Belle, pour demander l'aumône à ceux qui entraient au Temple.
Nzokande, ezalaki mpe na bato moko oyo bazalaki komema moto moko akufa makolo wuta abotama, mpe bazalaki kotia ye mikolo nyonso na ekuke ya Tempelo mpo ete asengaka mbongo epai ya bato oyo bazalaki kokota. Bazalaki kobenga ekuke yango « Ekuke ya kitoko. »
3 Cet homme voyant Pierre et Jean qui allaient entrer au Temple, les pria de lui donner l'aumône.
Tango amonaki Petelo mpe Yoane kokota na Tempelo, asengaki bango likabo ya mawa.
4 Mais Pierre ayant, avec Jean, arrêté sa vue sur lui, Pierre lui dit: regarde-nous.
Boye, Petelo mpe Yoane batalaki ye malamu, mpe Petelo alobaki na ye: — Tala biso!
5 Et il les regardait attentivement, s'attendant de recevoir quelque chose d'eux.
Moto yango atalaki bango malamu penza, na likanisi ya kozwa eloko epai na bango.
6 Mais Pierre lui dit: je n'ai ni argent, ni or; mais ce que j'ai, je te le donne: Au Nom de Jésus-Christ le Nazarien, lève-toi et marche.
Kasi Petelo alobaki na ye: — Nazangi mbongo to wolo ya kopesa yo, kasi oyo nazali na yango, nazali kopesa yo yango: na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.
7 Et l'ayant pris par la main droite, il le leva; et aussitôt les plantes et les chevilles de ses pieds devinrent fermes.
Bongo, asimbaki ye na loboko ya mobali mpe atelemisaki ye. Mbala moko, makolo na ye ekomaki makasi.
8 Et faisant un saut, il se tint debout, et marcha; et il entra avec eux au Temple, marchant, sautant, et louant Dieu.
Mbala moko, atelemaki mpe abandaki kotambola, akotaki nzela moko na bango kati na lopango ya Tempelo: azalaki kotambola, kopumbwa mpe kokumisa Nzambe.
9 Et tout le peuple le vit marchant et louant Dieu.
Tango bato nyonso bamonaki ye kotambola mpe kokumisa Nzambe,
10 Et reconnaissant que c'était celui-là même qui était assis à la Belle porte du Temple, pour avoir l'aumône, ils furent remplis d'admiration et d'étonnement de ce qui lui était arrivé.
basosolaki ete ezali moto oyo azalaki kovanda na « Ekuke ya kitoko » ya Tempelo mpo na kosenga makabo ya mawa. Bango nyonso bakamwaki mingi penza, mpe somo ekangaki bango mpo na makambo oyo esalemaki epai na ye.
11 Et comme le boiteux, qui avait été guéri, tenait par la main Pierre et Jean, tout le peuple étonné courut à eux, au Portique qu'on appelle de Salomon.
Lokola moto yango atingamaki na Petelo mpe Yoane, bato nyonso bakamwaki mpe bayaki na lombangu epai na bango, na esika oyo babengaka « Veranda ya Salomo. »
12 Mais Pierre voyant cela, dit au peuple: hommes Israélites, pourquoi vous étonnez-vous de ceci? ou pourquoi avez-vous l'œil arrêté sur nous, comme si par notre puissance, ou par notre sainteté nous avions fait marcher cet homme?
Tango Petelo amonaki bongo, alobaki na bango: — Bato ya Isalaele, mpo na nini bozali kokamwa likambo oyo? Mpo na nini bozali kotala biso lokola nde biso bato tosali ete moto oyo atambola, na nzela ya nguya mpe botosi na biso kati na makambo ya Nzambe?
13 Le Dieu d'Abraham, et d'Isaac, et de Jacob, le Dieu de nos pères, a glorifié son Fils Jésus, que vous avez livré, et que vous avez renié devant Pilate, quoiqu'il jugeât qu'il devait être délivré.
Biso te! Ezali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso, nde apesi nkembo na Yesu, Mosali na Ye, oyo bino bokabaki mpo ete baboma Ye. Yango wana, bowanganaki Ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola Ye.
14 Mais vous avez renié le Saint et le Juste, et vous avez demandé qu'on vous relâchât un meurtrier.
Bowanganaki Ye oyo azali Mosantu mpe Sembo. Boye, bosengaki ete Pilato atikela bino mobomi na esika ya Yesu.
15 Vous avez mis à mort le Prince de la vie, lequel Dieu a ressuscité des morts; de quoi nous sommes témoins.
Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, bongo biso tozali penza batatoli ya likambo yango.
16 Et par la foi en son nom, son Nom a raffermi [les pieds de] cet homme que vous voyez et que vous connaissez; la foi, dis-je, que [nous avons] en lui, a donné à celui-ci cette entière disposition de tous ses membres, en la présence de vous tous.
Ezali na nzela ya kondima kati na Kombo na Yesu nde moto oyo bozali komona mpe boyebi azwi makasi ya kotelema. Ezali Kombo na Yesu mpe kondima oyo ewuti kati na Yesu nde ekomisi nzoto na ye mobimba kolongono ndenge bozali komona yango.
17 Et maintenant, mes frères, je sais que vous l'avez fait par ignorance, de même que vos Gouverneurs.
Sik’oyo bandeko na ngai, nayebi ete bosalaki makambo na kozanga boyebi, ndenge bakonzi na bino basalaki.
18 Mais Dieu a ainsi accompli les choses qu'il avait prédites par la bouche de tous ses Prophètes, que le Christ devait souffrir.
Kasi ezali ndenge wana nde Nzambe akokisaki makambo oyo aloba wuta kala na nzela ya basakoli nyonso, ete Klisto na Ye asengeli komona pasi.
19 Amendez-vous donc, et vous convertissez, afin que vos péchés soient effacés:
Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa masumu na bino,
20 Quand les temps de rafraîchissement seront venus par la présence du Seigneur, et qu'il aura envoyé Jésus-Christ, qui vous a été auparavant annoncé.
mpe mpo ete Nkolo akoka kopesa bino tango ya kopema mpe akoka kotindela bino Klisto oyo apona mpo na bino—Ye nde Yesu.
21 [Et] lequel il faut que le ciel contienne, jusqu'au temps du rétablissement de toutes les choses que Dieu a prononcées par la bouche de tous ses saints Prophètes, dès le [commencement] du monde. (aiōn g165)
Asengeli kotikala kuna na Likolo kino na tango oyo Nzambe akobongisa biloko nyonso, ndenge alaka yango wuta kala na nzela ya babulami na Ye, basakoli. (aiōn g165)
22 Car Moïse lui-même a dit à nos Pères: le Seigneur votre Dieu, vous suscitera d'entre vos frères un Prophète tel que moi; vous l'écouterez dans tout ce qu'il vous dira.
Pamba te Moyize alobaki: « Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino; bosengeli kotosa nyonso oyo akoloba na bino.
23 Et il arrivera que toute personne qui n'aura point écouté ce Prophète, sera exterminée d'entre le peuple.
Moto nyonso oyo akotosa te mosakoli yango, bakolongola ye kati na bato na ye na nzela ya kufa. »
24 Et même tous les Prophètes depuis Samuel, et ceux qui l'ont suivi, tout autant qu'il y en a eu qui ont parlé, ont aussi prédit ces jours.
Basakoli nyonso, kobanda na Samuele kino na basakoli oyo bayaki sima na ye, bango nyonso basakolaki na tina na makambo oyo ezali kosalema na mikolo oyo.
25 Vous êtes les enfants des Prophètes, et de l'alliance que Dieu a traitée avec nos Pères, disant à Abraham: et en ta semence seront bénies toutes les familles de la terre.
Bino nde bozali bakitani ya basakoli mpe ya Boyokani oyo Nzambe asalaki elongo na bakoko na bino, tango alobaki na Abrayami: « Nakopambola mabota nyonso ya mokili na nzela ya bakitani na yo! »
26 C'est pour vous premièrement que Dieu ayant suscité son Fils Jésus, l'a envoyé pour vous bénir, en retirant chacun de vous de vos méchancetés.
Tango Nzambe asekwisaki Mosali na Ye, atindaki Ye nanu epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola, moko na moko kati na bino, mosika na banzela na bino ya mabe.

< Actes 3 >