< Michée 7 >
1 Malheur à moi! Car je suis comme à la récolte des fruits, Comme au grappillage après la vendange: Il n’y a point de grappes à manger, Point de ces primeurs que mon âme désire.
Tala, mawa na ngai! Nakomi lokola moto oyo azali koluka kobuka bambuma na eleko ya elanga, na tango oyo bazongelaka kobuka bambuma ya vino oyo etikalaka. Kasi ezali ata na liboke moko te ya bambuma ya vino ya kolia to mbuma ata moko te ya figi ya sika oyo nasepelaka kolia.
2 L’homme de bien a disparu du pays, Et il n’y a plus de juste parmi les hommes; Ils sont tous en embuscade pour verser le sang, Chacun tend un piège à son frère.
Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.
3 Leurs mains sont habiles à faire le mal: Le prince a des exigences, Le juge réclame un salaire, Le grand manifeste son avidité, Et ils font ainsi cause commune.
Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.
4 Le meilleur d’entre eux est comme une ronce, Le plus droit pire qu’un buisson d’épines. Le jour annoncé par tes prophètes, ton châtiment approche. C’est alors qu’ils seront dans la confusion.
Moto oyo aleki malamu kati na bango azali lokola nzube, moto oyo aleki sembo azali mabe koleka liboke ya basende. Mokolo oyo bakengeli na yo basakolaki ekokisami, mokolo oyo Yawe ayei kopesa yo etumbu. Sik’oyo, ekomi tango na bango ya koyoka soni.
5 Ne crois pas à un ami, Ne te fie pas à un intime; Devant celle qui repose sur ton sein Garde les portes de ta bouche.
Botia motema te epai ya bazalani na bino, botia elikya te epai ya baninga na bino ya motema. Ezala liboso ya mwasi oyo alalaka na tolo na yo, keba na maloba oyo ezali kobima na monoko na yo.
6 Car le fils outrage le père, La fille se soulève contre sa mère, La belle-fille contre sa belle-mère; Chacun a pour ennemis les gens de sa maison.
Pamba te mwana mobali azali koyokisa tata na ye soni, elenge mwasi azali kotelemela mama na ye, mwasi ya libala azali kotelemela mama-bokilo na ye; bongo monguna ya moto, ezali kaka moto ya libota na ye.
7 Pour moi, je regarderai vers l’Éternel, Je mettrai mon espérance dans le Dieu de mon salut; Mon Dieu m’exaucera.
Kasi mpo na ngai, nakotia elikya na ngai epai na Yawe, nakotalela Nzambe, Mobikisi na ngai; Nzambe na ngai akoyoka ngai.
8 Ne te réjouis pas à mon sujet, mon ennemie! Car si je suis tombée, je me relèverai; Si je suis assise dans les ténèbres, L’Éternel sera ma lumière.
Oh banguna na ngai, boseka ngai te! Ata soki nakweyi, nakotelema kaka. Ata soki navandi kati na molili, Yawe azali pole na ngai.
9 Je supporterai la colère de l’Éternel, Puisque j’ai péché contre lui, Jusqu’à ce qu’il défende ma cause et me fasse droit; Il me conduira à la lumière, Et je contemplerai sa justice.
Lokola nasalaki masumu liboso ya Yawe, nakomema mokumba ya kanda na Ye kino tango akozwa likambo na ngai na maboko mpe akolongisa ngai. Akobimisa ngai na pole, mpe nakomona bosembo na Ye.
10 Mon ennemie le verra et sera couverte de honte, Elle qui me disait: Où est l’Éternel, ton Dieu? Mes yeux se réjouiront à sa vue; Alors elle sera foulée aux pieds comme la boue des rues.
Bongo monguna na ngai akomona yango mpe akoyoka soni makasi, ye oyo azalaki koloba na ngai: « Wapi Yawe, Nzambe na yo? » Miso na ngai ekomona ndenge akokweya mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.
11 Le jour où l’on rebâtira tes murs, Ce jour-là tes limites seront reculées.
Mokolo ya kotonga lisusu bamir na yo ekoya; ezali mokolo wana nde bandelo ya mokili na yo ekopusama lisusu mosika.
12 En ce jour, on viendra vers toi De l’Assyrie et des villes d’Égypte, De l’Égypte jusqu’au fleuve, D’une mer à l’autre, et d’une montagne à l’autre.
Na mokolo wana, bato ebele bakoya epai na yo longwa na mokili ya Asiri mpe na bingumba ya Ejipito, ata longwa na mokili ya Ejipito kino na ebale Efrate, longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ngomba moko kino na mosusu.
13 Le pays sera dévasté à cause de ses habitants, A cause du fruit de leurs œuvres.
Mokili ekobebisama likolo ya bato wana, likolo ya bizaleli na bango ya mabe.
14 Pais ton peuple avec ta houlette, le troupeau de ton héritage, Qui habite solitaire dans la forêt au milieu du Carmel! Qu’ils paissent sur le Basan et en Galaad, Comme au jour d’autrefois.
Kamba bato na Yo na lingenda na Yo ndenge mobateli bibwele asalaka! Pamba te bazali bameme ya libula na Yo, oyo ezali lokola kotelengana yango moko kati na zamba, na etando moko ya kitoko. Tika ete elia na bilanga ya Bashani mpe ya Galadi ndenge ezalaki kolia na tango ya kala.
15 Comme au jour où tu sortis du pays d’Égypte, Je te ferai voir des prodiges.
Nakomonisa yo makambo ya kokamwa lokola na tango obimaki na Ejipito.
16 Les nations le verront, et seront confuses, Avec toute leur puissance; Elles mettront la main sur la bouche, Leurs oreilles seront assourdies.
Bato ya bikolo ya bapaya bakomona yango mpe bakoyoka soni; ata soki bazali na nguya ya ndenge nini, bakozanga maloba, mpe matoyi na bango ekokangama.
17 Elles lécheront la poussière, comme le serpent, Comme les reptiles de la terre; Elles seront saisies de frayeur hors de leurs forteresses; Elles trembleront devant l’Éternel, notre Dieu, Elles te craindront.
Bakolia mabele lokola nyoka, mpe lokola banyama oyo etambolaka na libumu; bakobima na somo wuta na madusu epai wapi bazalaki kobombama, bakoya epai na Yawe, Nzambe na biso, na kolenga.
18 Quel Dieu est semblable à toi, Qui pardonnes l’iniquité, qui oublies les péchés Du reste de ton héritage? Il ne garde pas sa colère à toujours, Car il prend plaisir à la miséricorde.
Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.
19 Il aura encore compassion de nous, Il mettra sous ses pieds nos iniquités; Tu jetteras au fond de la mer tous leurs péchés.
Solo, okoyokela biso lisusu mawa, matambe na Yo ekonyata masumu na biso, mpe okobwaka mabunga na biso nyonso kati na bozindo ya ebale monene.
20 Tu témoigneras de la fidélité à Jacob, De la bonté à Abraham, Comme tu l’as juré à nos pères aux jours d’autrefois.
Okomonisa Jakobi bosembo na Yo, mpe Abrayami, bolamu na Yo, ndenge olapaki ndayi epai ya batata na biso na tango ya kala.