< Genèse 39 >

1 On fit descendre Joseph en Égypte; et Potiphar, officier de Pharaon, chef des gardes, Égyptien, l’acheta des Ismaélites qui l’y avaient fait descendre.
Sima, bamemaki Jozefi na Ejipito. Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, moto ya Ejipito, asombaki ye na maboko ya bato ya Isimaeli oyo bamemaki ye kuna.
2 L’Éternel fut avec lui, et la prospérité l’accompagna; il habitait dans la maison de son maître, l’Égyptien.
Yawe azalaki elongo na Jozefi; boye Jozefi azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala, mpe avandaki kati na ndako ya moto ya Ejipito, nkolo na ye.
3 Son maître vit que l’Éternel était avec lui, et que l’Éternel faisait prospérer entre ses mains tout ce qu’il entreprenait.
Tango nkolo na ye asosolaki ete Yawe azali elongo na Jozefi, mpe ete Yawe azali kolongisa ye na makambo nyonso oyo azali kosala,
4 Joseph trouva grâce aux yeux de son maître, qui l’employa à son service, l’établit sur sa maison, et lui confia tout ce qu’il possédait.
Jozefi azwaki ngolu na miso ya nkolo na ye, oyo apesaki ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso: Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe apesaki ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.
5 Dès que Potiphar l’eut établi sur sa maison et sur tout ce qu’il possédait, l’Éternel bénit la maison de l’Égyptien, à cause de Joseph; et la bénédiction de l’Éternel fut sur tout ce qui lui appartenait, soit à la maison, soit aux champs.
Wuta tango Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe mokonzi ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, Yawe apambolaki ndako ya moto ya Ejipito mpo na Jozefi; lipamboli ya Yawe ezalaki na likolo ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, kati na ndako na ye mpe na bilanga.
6 Il abandonna aux mains de Joseph tout ce qui lui appartenait, et il n’avait avec lui d’autre soin que celui de prendre sa nourriture. Or, Joseph était beau de taille et beau de figure.
Boye Potifari atikaki biloko na ye nyonso kati na maboko ya Jozefi, azalaki lisusu kotala eloko moko te longola kaka bilei na ye. Jozefi azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko.
7 Après ces choses, il arriva que la femme de son maître porta les yeux sur Joseph, et dit: Couche avec moi!
Sima na yango, mwasi ya nkolo ya Jozefi alulaki ye Jozefi mpe alobaki na ye: — Yaka kosangisa na ngai nzoto!
8 Il refusa, et dit à la femme de son maître: Voici, mon maître ne prend avec moi connaissance de rien dans la maison, et il a remis entre mes mains tout ce qui lui appartient.
Kasi Jozefi aboyaki mpe alobaki na mwasi ya nkolo na ye: — Tala, nkolo na ngai atunaka ngai ata eloko moko te na oyo etali ndako na ye, mpe atika biloko na ye nyonso kati na maboko na ngai.
9 Il n’est pas plus grand que moi dans cette maison, et il ne m’a rien interdit, excepté toi, parce que tu es sa femme. Comment ferais-je un aussi grand mal et pécherais-je contre Dieu?
Moto moko te aleki ngai na monene kati na ndako oyo. Nkolo na ngai apekisi ngai eloko moko te longola kaka yo, pamba te ozali mwasi na ye. Boye ndenge nini penza ngai nakoki kosala likambo ya mabe boye mpe kosala masumu liboso ya Nzambe?
10 Quoiqu’elle parlât tous les jours à Joseph, il refusa de coucher auprès d’elle, d’être avec elle.
Mokolo na mokolo, mwasi ya Potifari azalaki kaka kotungisa Jozefi, kasi ye mpe azalaki kaka koboya kosangisa na ye nzoto to kozala na ye elongo.
11 Un jour qu’il était entré dans la maison pour faire son ouvrage, et qu’il n’y avait là aucun des gens de la maison,
Mokolo moko, awa Jozefi akotaki na ndako mpo na kosala mosala na ye, mpe ata mosali moko te azalaki wana,
12 elle le saisit par son vêtement, en disant: Couche avec moi! Il lui laissa son vêtement dans la main, et s’enfuit au dehors.
mwasi ya Potifari akangaki ye na bilamba mpe alobaki na ye: — Yaka kosangisa na ngai nzoto! Kasi Jozefi asundolaki elamba na ye kati na maboko ya mwasi ya Potifari mpe akimaki libanda ya ndako.
13 Lorsqu’elle vit qu’il lui avait laissé son vêtement dans la main, et qu’il s’était enfui dehors,
Tango mwasi ya Potifari amonaki ete Jozefi asundoli elamba na ye kati na maboko na ye mpe akimi libanda,
14 elle appela les gens de sa maison, et leur dit: Voyez, il nous a amené un Hébreu pour se jouer de nous. Cet homme est venu vers moi pour coucher avec moi; mais j’ai crié à haute voix.
abengaki basali ya ndako na ye mpe alobaki: — Botala! Mo-Ebre oyo bamemelaki biso ayaki nde kosakanela biso! Aluki kosangisa na ngai nzoto, kasi ngai nagangi makasi.
15 Et quand il a entendu que j’élevais la voix et que je criais, il a laissé son vêtement à côté de moi et s’est enfui dehors.
Tango ayoki ete nagangi makasi mpo na koluka lisalisi, asundoli elamba na ye pembeni na ngai mpe akimi libanda!
16 Et elle posa le vêtement de Joseph à côté d’elle, jusqu’à ce que son maître rentrât à la maison.
Mwasi ya Potifari abombaki elamba ya Jozefi pembeni na ye kino mobali na ye azongaki na ndako.
17 Alors elle lui parla ainsi: L’esclave hébreu que tu nous as amené est venu vers moi pour se jouer de moi.
Bongo abetelaki ye lisolo: — Mowumbu Mo-Ebre oyo omemelaki biso, ayaki epai na ngai mpo na kosakana na ngai.
18 Et comme j’ai élevé la voix et que j’ai crié, il a laissé son vêtement à côté de moi et s’est enfui dehors.
Kasi tango nagangaki makasi mpo na koluka lisalisi, asundolaki elamba na ye pembeni na ngai mpe akimaki libanda.
19 Après avoir entendu les paroles de sa femme, qui lui disait: Voilà ce que m’a fait ton esclave! Le maître de Joseph fut enflammé de colère.
Tango nkolo ya Jozefi ayokaki lisolo oyo mwasi na ye abetelaki ye na maloba oyo: « Tala ndenge mowumbu na yo asali ngai, » Potifari asilikaki makasi.
20 Il prit Joseph, et le mit dans la prison, dans le lieu où les prisonniers du roi étaient enfermés: il fut là, en prison.
Potifari akangaki Jozefi mpe abwakaki ye na boloko epai wapi mokonzi Faraon atiaka bakangami. Kasi, wana Jozefi azalaki kati na boloko,
21 L’Éternel fut avec Joseph, et il étendit sur lui sa bonté. Il le mit en faveur aux yeux du chef de la prison.
Yawe azalaki elongo na Jozefi mpe atalisaki ye bolamu na Ye; asalelaki ye ngolu na miso ya mokonzi ya boloko.
22 Et le chef de la prison plaça sous sa surveillance tous les prisonniers qui étaient dans la prison; et rien ne s’y faisait que par lui.
Mokonzi ya boloko apesaki Jozefi mokumba ya kokengela bato nyonso ya boloko mpe ya kotambolisa makambo nyonso oyo ezalaki kosalema kuna.
23 Le chef de la prison ne prenait aucune connaissance de ce que Joseph avait en main, parce que l’Éternel était avec lui. Et l’Éternel donnait de la réussite à ce qu’il faisait.
Mokonzi ya boloko azalaki kotala lisusu likambo moko te kati na makambo oyo apesaki Jozefi mokumba ya kosala, pamba te Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolongisa ye na makambo nyonso oyo azalaki kosala.

< Genèse 39 >