< Ézéchiel 37 >
1 La main de l’Éternel fut sur moi, et l’Éternel me transporta en esprit, et me déposa dans le milieu d’une vallée remplie d’ossements.
Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai; bongo Yawe abimisaki ngai na nzela ya Molimo na Ye mpe amemaki ngai kino na kati-kati ya lubwaku moko etonda na mikuwa.
2 Il me fit passer auprès d’eux, tout autour; et voici, ils étaient fort nombreux, à la surface de la vallée, et ils étaient complètement secs.
Atambolisaki ngai na bangambo nyonso kati na mikuwa yango: namonaki ete ezali ebele penza mpe ekawuka, kati na lubwaku yango.
3 Il me dit: Fils de l’homme, ces os pourront-ils revivre? Je répondis: Seigneur Éternel, tu le sais.
Atunaki ngai: — Mwana na moto, mikuwa oyo ekoki lisusu kozala na bomoi? Nazongisaki: — Oh Nkolo Yawe, Yo kaka nde oyebi!
4 Il me dit: Prophétise sur ces os, et dis-leur: Ossements desséchés, écoutez la parole de l’Éternel!
Bongo alobaki na ngai: — Sakola epai ya mikuwa oyo mpe yebisa yango: « Eh bino mikuwa ekawuka, boyoka Liloba na Yawe!
5 Ainsi parle le Seigneur, l’Éternel, à ces os: Voici, je vais faire entrer en vous un esprit, et vous vivrez;
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakotia pema kati na bino mpe bokozwa lisusu bomoi.
6 je vous donnerai des nerfs, je ferai croître sur vous de la chair, je vous couvrirai de peau, je mettrai en vous un esprit, et vous vivrez. Et vous saurez que je suis l’Éternel.
Nakotia bino misisa mpe misuni, nakolatisa bino poso ya nzoto mpe nakotia pema kati na bino. Boye bokozwa lisusu bomoi, bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
7 Je prophétisai, selon l’ordre que j’avais reçu. Et comme je prophétisais, il y eut un bruit, et voici, il se fit un mouvement, et les os s’approchèrent les uns des autres.
Boye, nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai. Bongo wana nazalaki nanu kosakola, makelele moko ya makasi eyokanaki; mpe, mbala moko, mikuwa yango ekomaki koningana mpe kosangana moko na moko na mosusu.
8 Je regardai, et voici, il leur vint des nerfs, la chair crût, et la peau les couvrit par-dessus; mais il n’y avait point en eux d’esprit.
Wana nazalaki kotala, namonaki misisa mpe misuni kobima na mikuwa yango mpe poso ya nzoto kozipa yango, kasi ezalaki na pema te.
9 Il me dit: Prophétise, et parle à l’esprit! Prophétise, fils de l’homme, et dis à l’esprit: Ainsi parle le Seigneur, l’Éternel: Esprit, viens des quatre vents, souffle sur ces morts, et qu’ils revivent!
Yawe alobaki na ngai: — Mwana na moto, sakola epai ya pema, sakola mpe loba na pema: « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh pema, yaka wuta na bisika nyonso mopepe ebimelaka mpe kota kati na banzoto oyo mpo ete ezwa lisusu bomoi! »
10 Je prophétisai, selon l’ordre qu’il m’avait donné. Et l’esprit entra en eux, et ils reprirent vie, et ils se tinrent sur leurs pieds: c’était une armée nombreuse, très nombreuse.
Nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai; bongo pema ekotaki kati na yango mpe ezwaki lisusu bomoi. Batelemaki mpe bazalaki mampinga moko ya monene.
11 Il me dit: Fils de l’homme, ces os, c’est toute la maison d’Israël. Voici, ils disent: Nos os sont desséchés, notre espérance est détruite, nous sommes perdus!
Alobaki na ngai: — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele! Bazali koloba: « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi! »
12 Prophétise donc, et dis-leur: Ainsi parle le Seigneur, l’Éternel: Voici, j’ouvrirai vos sépulcres, je vous ferai sortir de vos sépulcres, ô mon peuple, et je vous ramènerai dans le pays d’Israël.
Yango wana, sakola mpe loba na bango: « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh bato na Ngai, nakofungola bakunda na bino mpe nakobimisa bino kuna, bongo nakozongisa bino na mabele ya Isalaele.
13 Et vous saurez que je suis l’Éternel, lorsque j’ouvrirai vos sépulcres, et que je vous ferai sortir de vos sépulcres, ô mon peuple!
Mpe bino, bato na Ngai, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakofungola bakunda na bino mpe nakobimisa bino kuna!
14 Je mettrai mon esprit en vous, et vous vivrez; je vous rétablirai dans votre pays, et vous saurez que moi, l’Éternel, j’ai parlé et agi, dit l’Éternel.
Nakotia Molimo na Ngai kati na bino, mpe bokozwa lisusu bomoi; bongo nakovandisa bino na mabele na bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe nde nalobaki mpe nakokisaki yango, elobi Yawe. »
15 La parole de l’Éternel me fut adressée, en ces mots:
Yawe alobaki na ngai:
16 Et toi, fils de l’homme, prends une pièce de bois, et écris dessus: Pour Juda et pour les enfants d’Israël qui lui sont associés. Prends une autre pièce de bois, et écris dessus: Pour Joseph, bois d’Éphraïm et de toute la maison d’Israël qui lui est associée.
« Mwana na moto, kamata eteni ya libaya mpe koma na likolo na yango: ‹ Mpo na Yuda mpe mpo na bana ya Isalaele oyo basangani na ye. › Kamata eteni mosusu ya libaya mpe koma na likolo na yango: ‹ Mpo na Jozefi, nzete ya Efrayimi, mpe mpo na libota mobimba ya Isalaele oyo esangani na ye. ›
17 Rapproche-les l’une et l’autre pour en former une seule pièce, en sorte qu’elles soient unies dans ta main.
Kangisa yango mpe komisa yango libaya moko mpo ete ezala eloko moko kati na loboko na yo.
18 Et lorsque les enfants de ton peuple te diront: Ne nous expliqueras-tu pas ce que cela signifie?
Soki bandeko na yo batuni yo: ‹ Olingi koloba na biso nini? Makambo oyo elingi kolakisa nini? ›
19 réponds-leur: Ainsi parle le Seigneur, l’Éternel: Voici, je prendrai le bois de Joseph qui est dans la main d’Éphraïm, et les tribus d’Israël qui lui sont associées; je les joindrai au bois de Juda, et j’en formerai un seul bois, en sorte qu’ils ne soient qu’un dans ma main.
Okozongisela bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakozwa libaya ya Jozefi, oyo ezali kati na loboko ya Efrayimi, mpe bato ya mabota ya Isalaele oyo basangani na ye; nakokangisa yango na libaya ya Yuda. Nakokomisa yango nzete moko mpe ekokoma eloko moko kati na loboko na Ngai. ›
20 Les bois sur lesquels tu écriras seront dans ta main, sous leurs yeux.
Okosimba kati na loboko na yo, na miso na bango, mabaya oyo okomaki;
21 Et tu leur diras: Ainsi parle le Seigneur, l’Éternel: Voici, je prendrai les enfants d’Israël du milieu des nations où ils sont allés, je les rassemblerai de toutes parts, et je les ramènerai dans leur pays.
mpe okoloba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakobimisa bana ya Isalaele wuta na bikolo ya zingazinga epai wapi bakendeki mpe nakozongisa bango na mabele na bango.
22 Je ferai d’eux une seule nation dans le pays, dans les montagnes d’Israël; ils auront tous un même roi, ils ne formeront plus deux nations, et ne seront plus divisés en deux royaumes.
Nakokomisa bango ekolo kaka moko kati na mokili, na likolo ya bangomba ya Isalaele. Ekozala kaka na mokonzi moko oyo akokonza bango; mpe bakozala lisusu bikolo mibale te to bakokabwana lisusu na bokonzi mibale te.
23 Ils ne se souilleront plus par leurs idoles, par leurs abominations, et par toutes leurs transgressions; je les retirerai de tous les lieux qu’ils ont habités et où ils ont péché, et je les purifierai; ils seront mon peuple, et je serai leur Dieu.
Bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya banzambe na bango ya bikeko mpe ya bililingi na bango ya mabe to na nzela ya misala na bango ya mabe; pamba te nakobikisa bango wuta na bisika oyo bazalaki kovanda epai wapi basalaki masumu mpe nakopetola bango; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
24 Mon serviteur David sera leur roi, et ils auront tous un seul pasteur. Ils suivront mes ordonnances, ils observeront mes lois et les mettront en pratique.
Mosali na Ngai, Davidi, akozala mokonzi na bango, mpe bango nyonso bakozala na mobateli bibwele kaka moko, bakotosa mibeko na Ngai mpe bakobatela na bokebi mitindo na Ngai.
25 Ils habiteront le pays que j’ai donné à mon serviteur Jacob, et qu’ont habité vos pères; ils y habiteront, eux, leurs enfants, et les enfants de leurs enfants, à perpétuité; et mon serviteur David sera leur prince pour toujours.
Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki: bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela.
26 Je traiterai avec eux une alliance de paix, et il y aura une alliance éternelle avec eux; je les établirai, je les multiplierai, et je placerai mon sanctuaire au milieu d’eux pour toujours.
Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango: ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela.
27 Ma demeure sera parmi eux; je serai leur Dieu, et ils seront mon peuple.
Nakotia ndako na Ngai kati na bango; nakozala Nzambe na bango, mpe bango, bakozala bato na Ngai.
28 Et les nations sauront que je suis l’Éternel, qui sanctifie Israël, lorsque mon sanctuaire sera pour toujours au milieu d’eux.
Bongo bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakomisi Isalaele bule tango nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. › »