< Psaumes 119 >

1 Alléluiah! Heureux ceux qui, dans leur voie, conservent l'innocence, et cheminent en la loi du Seigneur.
Esengo na bato oyo bazangi pamela mpe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe!
2 Heureux ceux qui méditent ses témoignages, et qui le cherchent de toute leur âme.
Esengo na bato oyo babatelaka malako na Ye mpe balukaka Ye na mitema na bango mobimba!
3 Car les ouvriers d'iniquité n'ont point marché dans ses voies.
Basalaka mabe te, kasi balandaka banzela ya Nzambe.
4 Tu as intimé tes commandements, pour qu'ils soient scrupuleusement gardés.
Opesaki mibeko mpo ete etosama malamu.
5 Puissent mes voies être dirigées vers l'accomplissement de tes ordonnances!
Tika ete nabongisa etamboli na ngai mpo ete natosa mitindo na Yo!
6 Alors je ne serai point confondu, puisque j'aurai eu mes yeux sur tous tes commandements.
Na bongo, nakoyoka soni te tango nakotosa mibeko na Yo nyonso.
7 Je te rendrai gloire en la droiture de mon cœur, de ce que j'aurai appris les jugements de ta justice.
Nakosanzola Yo na motema ya sembo wana nakoyekola mibeko ya bosembo na Yo.
8 Je garderai tes ordonnances; ne me délaisse pas sans retour.
Nalingi kotosa mitindo na Yo; kosundola ngai libela te!
9 Comment le jeune homme maintiendra-t-il droite sa voie? En gardant tes paroles.
Ndenge nini elenge akoki kowumela na nzela ya sembo? Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.
10 Je t'ai cherché de toute mon âme; ne me repousse pas de tes commandements.
Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba; batela ngai mpo ete napengwa te mosika ya mibeko na Yo!
11 J'ai renfermé dans le secret de mon cœur toutes tes paroles pour ne point pécher contre toi.
Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.
12 Tu es béni, Seigneur, enseigne-moi tes préceptes.
Yawe, tika ete opambolama! Lakisa ngai mitindo na Yo!
13 J'ai publié de mes lèvres tous les jugements de ta bouche.
Na monoko na ngai, natangaka mibeko na Yo nyonso.
14 Je me suis complu dans la voie de tes témoignages, autant que dans la possession de toutes les richesses.
Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo lokola nde nazali na bomengo nyonso.
15 Je méditerai sur tes commandements, et je considèrerai tes voies.
Nakanisaka malako na Yo mpe natambolaka na banzela na Yo.
16 J'étudierai tes préceptes, et je n'oublierai point tes paroles.
Nasepelaka mingi na malako na Yo mpe nabosanaka liloba na Yo te.
17 Récompense ton serviteur; et je vivrai, et je garderai tes paroles.
Salela ngai, mosali na Yo, bolamu mpo ete nabika mpe natosa liloba na Yo.
18 Ote le voile de mes yeux, et je comprendrai les merveilles de ta loi.
Fungola miso na ngai mpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo.
19 Je suis passager sur la terre, ne me cache pas tes commandements.
Nazali mopaya awa na mokili; kobombela ngai mibeko na Yo te.
20 Mon âme a brûlé, en tout temps, du désir de ta loi.
Molimo na ngai ezalaka tango nyonso na posa makasi ya koyeba mibeko na Yo.
21 Tu as châtié les superbes; maudits soient ceux qui s'écartent de tes commandements.
Otelemelaka bato ya lofundu, bato oyo balakelama mabe mpe bapengwaka mosika ya mibeko na Yo.
22 Délivre-moi de l'opprobre et du mépris, car j'ai recherché tes témoignages.
Longola soni mpe kotiolama na bomoi na ngai, pamba te natosaka malako na Yo.
23 Les princes se sont assis, et ils ont mal parlé de moi; mais ton serviteur méditait sur tes ordonnances.
Ezala soki bakambi basali likita mpe bayokani kotelemela ngai, mosali na Yo, nakokanisa kaka mitindo na Yo.
24 Et tes témoignages sont mon étude, et tes conseils mon conseil.
Malako na Yo esepelisaka ngai makasi, epesaka ngai toli.
25 Mon âme est attachée à la terre; vivifie-moi selon ta promesse.
Nakangami na putulu; batela bomoi na ngai kolanda liloba na Yo.
26 Je t'ai fait connaître mes voies, et tu m'as écouté; enseigne-moi tes préceptes.
Nayebisaki Yo banzela na ngai, mpe oyanolaki ngai; lakisa ngai mibeko na Yo!
27 Apprends-moi la voie de tes préceptes, et je méditerai sur tes merveilles.
Sala ete nasosola nzela ya mitindo na Yo mpo ete nakanisa misala minene na Yo!
28 Mon âme s'est assoupie dans l'abattement; fortifie-moi de tes paroles.
Nazali kolela mpo na pasi na motema; pesa ngai mpiko kolanda liloba na Yo.
29 Éloigne de moi la voie de l'iniquité, et fais-moi miséricorde à cause de ta loi.
Mema ngai mosika ya nzela ya lokuta; mpe, na boboto na Yo, teya ngai mobeko na Yo.
30 J'ai choisi la voie de la vérité, et je n'ai point oublié tes jugements.
Naponaki nzela ya bosolo; natambolaka kolanda mibeko na Yo.
31 Je me suis attaché à tes témoignages, Seigneur; ne m'humilie pas.
Nakangami na malako na Yo; Yawe, koyokisa ngai soni te.
32 J'ai couru dans la voie de tes commandements, lorsque tu as dilaté mon cœur.
Nakimaka mbangu kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te opesaka ngai bososoli na yango.
33 Fais, Seigneur, que la voie de tes commandements soit ma loi, et je la chercherai toujours.
Yawe, teya ngai nzela ya mitindo na Yo mpo ete nabatela yango kino na suka.
34 Donne-moi l'intelligence, et j'approfondirai ta loi, et je la garderai dans le fond de mon âme.
Pesa ngai bososoli mpo ete natosa mibeko na Yo mpe nalanda yango na motema na ngai mobimba.
35 Guide-moi dans le sentier de tes commandements; car c'est celui-là que j'ai désiré.
Tambolisa ngai kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te nasepelaka na yango.
36 Incline mon cœur vers tes témoignages, et non vers la convoitise.
Sala ete motema na ngai esepela na malako na Yo, kasi na bomengo te!
37 Détourne mes yeux, pour qu'ils ne voient point les vanités; vivifie-moi en ta loi.
Longola miso na ngai na makambo ya pamba, batela bomoi na ngai kati na banzela na Yo!
38 Confirme ta parole en ton serviteur, pour qu'il craigne de te déplaire.
Kokisela mosali na Yo bilaka oyo opesaki mpo na bato oyo batosaka Yo.
39 Ôte-moi l'opprobre du péché que j'ai appréhendé; car tes jugements me sont délectables.
Longola mosika na ngai soni oyo nabangaka, pamba te mibeko na Yo ezali malamu.
40 Voilà que j'ai désiré tes commandements; vivifie-moi en ta justice.
Nasepelaka makasi na mibeko na Yo; batela bomoi na ngai kati na bosembo na Yo!
41 Seigneur, que ta miséricorde me vienne, et ton salut, comme tu me l'as promis.
Yawe, tika ete bolingo ekomela ngai, mpe lobiko na Yo, kolanda elaka na Yo;
42 Et je pourrai répondre à ceux qui m'outragent, car j'ai espéré en tes paroles.
bongo nakokoka kozwa eyano ya kopesa na mofingi na ngai, pamba te natiaka elikya na liloba na Yo.
43 Ne retire point à jamais de ma bouche la parole de vérité, car j'ai surabondamment espéré en tes jugements.
Tika ete monoko na ngai elobaka kaka bosolo, pamba te natiaka elikya kati na mibeko na Yo.
44 Et je garderai ta loi toujours, dans tous les siècles des siècles.
Nakotosa mibeko na Yo tango nyonso, mpe libela na libela.
45 Et je marchais au large, parce que j'avais recherché tes commandements.
Nakobika na bonsomi ya solo, pamba te nasepelaka kotosa mitindo na Yo.
46 Et devant les rois je parlais de tes témoignages, et je n'avais aucune honte.
Nakolobela malako na Yo liboso ya bakonzi na kozanga koyoka soni.
47 Et je méditais tes commandements, que j'ai toujours tant aimés.
Nasepelaka mingi na mibeko na Yo mpe nalingaka yango mingi.
48 Et j'ai levé les mains vers tes commandements, que j'aime, et j'ai médité sur tes préceptes.
Nalapi ndayi mpo na mibeko na Yo, oyo nalingaka, mpe nakokanisa mitindo na Yo.
49 Souviens-toi de tes paroles à ton serviteur; en elles tu m'as donné d'espérer.
Kanisa makambo oyo olobaki na mosali na Yo, pamba te opesaki ngai elikya.
50 Elles m'ont consolé dans mon abaissement, et ta parole m'a vivifié.
Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka; batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.
51 Les superbes ont agi envers moi avec une extrême injustice; mais je n'ai point dévié de ta loi.
Solo, bato ya lolendo batiolaki ngai makasi; kasi ngai, natikalaki kopengwa te na mibeko na Yo.
52 Je me suis souvenu, Seigneur, de tes jugements éternels, et j'ai été consolé.
Yawe, tango nakanisaka mikano na Yo ya kala, nazwaka kati na yango kobondisama.
53 Le découragement m'a pris, à la vue des pécheurs qui abandonnaient ta loi.
Nayokaka pasi mingi na motema tango namonaka bato mabe kosundola mibeko na Yo.
54 Mais, dans le lieu de mon pèlerinage, je chantais encore tes préceptes.
Nakoma koyemba mitindo na Yo na bisika nyonso epai wapi nazali moleki nzela.
55 Je me souvenais de ton nom, Seigneur, pendant la nuit, et je gardais ta loi.
Yawe, nakanisaka Yo na butu mpo ete nabatela mibeko na Yo;
56 Et cette grâce m'a été faite, parce que j'avais recherché tes préceptes.
pamba te libula na ngai ezali: kotosa mibeko na Yo.
57 Tu es mon partage, Seigneur; j'ai dit que je garderais ta loi.
Yawe, nalobi lisusu ete libula na ngai ezali: kotosa liloba na Yo.
58 J'ai demandé de toute mon âme à voir ton visage; fais-moi miséricorde selon ta parole.
Na motema na ngai mobimba, nalukaka kosepelisa Yo; salela ngai ngolu kolanda bilaka na Yo!
59 J'ai pensé à tes voies, et j'ai tourné mes pas vers tes témoignages.
Natali malamu etamboli na ngai mpe namizongisi kati na malako na Yo.
60 Je me suis préparé sans trouble à garder tes commandements.
Natosaka mibeko na Yo noki, nazelisaka te.
61 Les liens des pécheurs m'ont enlacé; mais je n'ai point oublié ta loi.
Solo, mitambo ya bato mabe ekangaki ngai, kasi ngai nabosanaki te mibeko na Yo.
62 Au milieu de la nuit, je me levais pour te rendre grâce de tes jugements et de tes ordonnances.
Na kati-kati ya butu, nalamukaka mpo na kokumisa Yo likolo na mibeko na Yo ya sembo.
63 Je suis partisan de tous ceux qui te craignent et qui gardent tes commandements.
Nazali moninga ya bato nyonso oyo batosaka Yo mpe babatelaka mitindo na Yo.
64 La terre, Seigneur, est pleine de tes miséricordes; enseigne-moi tous tes préceptes.
Yawe, mokili etondi na bolingo na Yo; lakisa ngai mitindo na Yo!
65 Seigneur, tu as usé de bonté avec ton serviteur, selon ta parole.
Yawe, salela mosali na Yo bolamu kolanda liloba na Yo.
66 Enseigne-moi la bonté, la discipline et la science, parce que j'ai eu foi en tes commandements.
Teya ngai bolamu ya bososoli mpe ya mayele, pamba te namipesaka na mibeko na Yo.
67 Avant d'être humilié, j'ai failli; aussi ai-je gardé ta parole.
Liboso ete obeta ngai, nazalaki mopengwi; kasi sik’oyo, nakomi kotosa liloba na Yo.
68 Tu es bon, Seigneur, et en ta bonté enseigne-moi tes ordonnances.
Ozali malamu mpe osalaka makambo ya malamu; teya ngai mitindo na Yo!
69 L'iniquité des superbes s'est multipliée contre moi; pour moi, j'approfondirai tes commandements au fond de mon cœur.
Bato ya lolendo bakoselaka ngai makambo; kasi ngai, natosaka mitindo na Yo na motema na ngai mobimba.
70 Leur cœur s'est coagulé comme du laitage, et moi j'ai médité ta loi.
Mitema na bango ezali mabanga; kasi ngai, nasepelaka na mibeko na Yo.
71 Il est heureux pour moi que tu m'aies humilié, pour que j'apprisse tes ordonnances.
Ezalaki penza malamu mpo na ngai ete obeta ngai, mpo ete nayekola mitindo na Yo.
72 La loi qui sort de ta bouche est meilleure pour moi que des millions d'or et d'argent.
Mpo na ngai, mibeko oyo ozwaki mpe osakolaki na monoko na Yo ezali malamu koleka biloko nkoto moko ya wolo mpe ya palata.
73 Ce sont tes mains qui m'ont formé et pétri; donne-moi l'intelligence, et je m'instruirai de tes commandements.
Osalaki mpe olendisaki ngai na maboko na Yo, pesa ngai mayele mpo ete nayekola mibeko na Yo!
74 Ceux qui te craignent me verront, et ils seront réjouis, parce que j'ai surabondamment espéré en tes promesses.
Tango bato oyo batosaka Yo bamonaka ngai, basepelaka makasi, mpo ete natiaka elikya na liloba na Yo.
75 Seigneur, je sais que tes jugements sont la justice même, et que tu m'as humilié selon ta vérité.
Yawe, nayebi malamu ete mibeko na Yo ezali sembo, mpe ete ezali kaka mpo na bolingo na Yo nde obetaki ngai.
76 Et maintenant, que ta miséricorde me vienne et me console, comme tu l'as promis à ton serviteur.
Tika ete bolingo na Yo ebondisa ngai, kolanda elaka na Yo epai ya mosali na Yo!
77 Que tes miséricordes me viennent, et je vivrai, parce que ta loi est l'objet de ma méditation.
Talisa ngai mawa na Yo mpo ete nabika, pamba te nasepelaka na mibeko na Yo.
78 Qu'ils soient confondus, les superbes, parce qu'ils ont été injustes envers moi; pour moi, je méditerai sur tes commandements.
Tika ete bato wana ya lofundu, oyo bamonisaka ngai pasi na kozanga tina, bakufa soni! Kasi ngai nakokanisa kaka mibeko na Yo.
79 Que ceux qui te craignent viennent à moi, et ceux qui connaissent tes témoignages.
Tika ete bato oyo batosaka Yo, ba-oyo bayebi malako na Yo, bazongela ngai.
80 Qu'en tes préceptes mon cœur soit trouvé sans tache, pour que je ne sois point confondu.
Tika ete motema na ngai ezanga pamela mpo na kotosa mitindo na Yo, mpo ete nakufa soni te.
81 Mon âme s'est épuisée à réclamer ton secours, tant j'avais espéré en tes paroles!
Natondi na posa ya lobiko na Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
82 Mes yeux se sont éteints dans l'attente de ta parole, disant: Quand me consoleras-tu?
Miso na ngai elembi kozela kokokisama ya elaka na Yo; nakomi komituna: « Okobondisa ngai tango nini? »
83 Me voici comme une outre pendant la gelée; et pourtant je n'ai point oublié tes préceptes.
Nakomi lokola mbeki oyo ezali kokawuka na milinga, nzokande nabosanaka mitindo na Yo te.
84 Combien ton serviteur comptera-t-il encore de jours? Quand jugeras-tu ceux qui me persécutent?
Mikolo ya bomoi ya mosali na Yo ezali motango boni? Mokolo nini okopesa banyokoli na ngai etumbu?
85 Les méchants m'ont raconté des choses vaines; mais ce n'était point comme ta loi, Seigneur.
Bato ya lolendo batimoli mabulu mpo na kokanga ngai, baboyi kotosa mibeko na Yo.
86 Tous tes commandements sont vérité; ils m'ont poursuivi injustement, protège-moi.
Mibeko na Yo nyonso ezali sembo; kasi bazali konyokola ngai kaka pamba; yaka kosunga ngai!
87 Peu s'en est fallu qu'ils ne m'aient achevé sur la terre; moi cependant je n'ai point délaissé tes commandements.
Etikali moke mpo ete balongola ngai na mokili; kasi atako bongo, nasundoli mibeko na Yo te.
88 Vivifie-moi selon ta miséricorde, et je garderai les témoignages de ta bouche.
Kati na bolingo na Yo, batela bomoi na ngai mpo ete natosa malako na Yo.
89 Seigneur, ta parole demeure dans le ciel éternellement;
Yawe, liloba na Yo ezali mpo na seko, epikama kati na likolo;
90 Ta vérité passe de génération en génération; tu as fondé la terre, et elle subsiste.
boyengebene na Yo ekowumela seko na seko. Okela mabele, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo;
91 Comme tu l'as réglé, le jour continue de paraître; car tout t'obéit.
opesa mibeko, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo, pamba te nyonso kati na mokili mobimba epesaka Yo lokumu.
92 Si ta loi n'était point ma continuelle étude, je périrais dans l'humiliation.
Soki nasepelaki na mibeko na Yo te, mbele nakufa kala kati na pasi na ngai.
93 Je n'oublierai jamais tes ordonnances, car en elles tu m'as vivifié.
Nakotikala kobosana ata moke te mitindo na Yo, pamba te obatelaka bomoi na ngai na nzela na yango.
94 Je suis à toi, sauve-moi; car j'ai recherché tes préceptes.
Bikisa ngai, pamba te nazali moto na Yo mpe natosaka mitindo na Yo!
95 Les pécheurs m'ont épié pour me perdre; mais j'avais compris tes témoignages.
Bato mabe bazali koluka koboma ngai, kasi ngai nakangami kaka na malako na Yo.
96 J'ai vu la fin de toute œuvre, même la plus parfaite; seule ta loi est éternelle.
Na nyonso oyo emonanaka lokola ya kokoka, namonaki mondelo; kasi mibeko na Yo ezalaka na mondelo te.
97 Que j'aime ta loi, Seigneur! elle est tout le jour l'objet de ma méditation.
Nalingaka mibeko na Yo mingi! Nakanisaka yango mikolo nyonso.
98 Plus qu'à mes ennemis tu m'as fait goûter ta loi, car elle est toujours devant moi.
Mibeko na Yo ekomisaka ngai moto ya bwanya koleka banguna na ngai; ezalaka elongo na ngai tango nyonso.
99 J'ai eu plus d'intelligence que ceux qui m'ont instruit, car tes témoignages sont ma méditation.
Naleki balakisi na ngai nyonso na mayele, pamba te nakanisaka malako na Yo.
100 J'ai eu plus d'intelligence que les anciens, car j'ai cherché tes commandements.
Naleki mibange na bososoli, pamba te natosaka mibeko na Yo.
101 J'ai détourné mes pieds de toute voie mauvaise, afin de garder tes paroles.
Natambolaka te na banzela nyonso ya mabe mpo na kotosa liloba na Yo.
102 Je n'ai point dévié de tes jugements, parce que tu as été mon législateur.
Nakangamaka na mibeko na Yo, pamba te Yo moko nde oteyaka ngai yango.
103 Que tes paroles sont douces à mon palais! elles le sont plus que le miel à ma bouche.
Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.
104 Je tiens mon intelligence de tes préceptes; aussi ai-je en haine toute voie d'iniquité.
Mitindo na Yo ekomisi ngai moto ya bososoli; yango wana nayinaka nzela nyonso ya mabe.
105 Ta loi est la lampe de mes pieds et la lumière de mes sentiers.
Liloba na Yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai, mpe pole mpo na nzela na ngai.
106 J'ai juré et résolu de garder les jugements de ta justice.
Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango: « Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. »
107 J'ai été profondément humilié, Seigneur; vivifie-moi selon ta parole.
Motema na ngai etutami makasi; Yawe, batela bomoi na ngai kolanda liloba na Yo.
108 Seigneur, aie pour agréables les offrandes volontaires de ma bouche, et enseigne-moi tes jugements.
Yawe, ndima likabo ya bibebu na ngai, mpe teya ngai mibeko na Yo.
109 Mon âme est toujours en tes mains, et je n'ai point oublié ta loi.
Solo, nakutanaka tango nyonso na makama, kasi nabosanaka mibeko na Yo te.
110 Les pécheurs m'ont tendu des pièges, et je n'ai point dévié de tes commandements.
Bato mabe batiaka mitambo mpo ete nakweya, kasi nakangamaka kaka na mibeko na Yo.
111 J'ai eu pour héritage éternel tes témoignages, et ils sont le tressaillement de mon cœur.
Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela, esalaka esengo ya motema na ngai.
112 J'ai incliné mon cœur à toujours agir selon tes ordonnances, en vue de ma rétribution.
Nazwa mokano ya kotambola kolanda mitindo na Yo, tango nyonso, kino na suka.
113 Je hais les méchants, et j'aime ta loi.
Nayinaka bato ya mitema mibale, kasi nalingaka nde mibeko na Yo.
114 Tu es mon champion et mon appui; j'ai surabondamment espéré en tes promesses.
Ozali ebombamelo mpe nguba na ngai; natiaka elikya kati na liloba na Yo.
115 Éloignez-vous de moi, pervers, et j'approfondirai les commandements de mon Dieu.
Bato ya misala mabe, bokende mosika na ngai! Nakotosa mibeko ya Nzambe na ngai!
116 Soutiens-moi, Seigneur, selon ta parole, et vivifie-moi; et que je ne sois point confondu en mon attente.
Sunga ngai kolanda elaka na Yo, mpe nakobika; koyokisa elikya na ngai soni te.
117 Secours-moi, et je serai sauvé, et je méditerai toujours sur tes préceptes.
Sunga ngai mpo ete nabika; nakotikala kobosana mitindo na Yo ata moke te.
118 Tu as réduit à néant tous ceux qui se sont éloignés de tes jugements, parce que leur pensée est inique.
Obwakaka bato nyonso oyo bapesaka mitindo na Yo mokongo, pamba te mokano na bango ezalaka ya lokuta.
119 J'ai compté comme pécheurs tous les prévaricateurs de la terre; c'est pourquoi j'aime tes témoignages.
Olongolaka bato nyonso ya mabe ya mokili lokola bosoto; yango wana nalingaka malako na Yo.
120 Transperce mes chairs de ta crainte, car j'ai toujours redouté tes jugements.
Nalengaka na somo liboso na Yo mpe nabangaka mikano na Yo.
121 J'ai été droit dans mes jugements et ma justice; ne me livre pas à ceux qui me nuisent.
Natambolaka na bosembo mpe bosolo; kokaba ngai na maboko ya banyokoli na ngai te!
122 Affermis ton serviteur dans le bien; que les superbes ne le calomnient pas.
Kamata mokumba ya bolamu na ngai, mosali na Yo; tika ete bato ya lolendo banyokola ngai te.
123 Mes yeux ont défailli à force d'attendre mon salut et la parole de ton équité.
Miso na ngai elembi kozela lisungi kowuta na Yo mpe kokokisama ya bosembo na Yo kolanda elaka na Yo.
124 Traite ton serviteur selon ta miséricorde, et enseigne-moi tes préceptes.
Salela ngai, mosali na Yo, kolanda bolingo na Yo, lakisa ngai mitindo na Yo.
125 Je suis ton serviteur; donne-moi l'intelligence, et je connaîtrai tes témoignages.
Nazali mosali na Yo; pesa ngai mayele mpo ete nasosola malako na Yo.
126 Le temps d'agir est venu pour le Seigneur; car ils ont renversé ta loi.
Yawe, tango ya kosala ekoki; pamba te bazali kobuka mibeko na Yo!
127 C'est pour cela que j'ai aimé tes commandements plus que l'or et la topaze.
Yango wana nalingaka mibeko na Yo koleka wolo, koleka kutu wolo ya peto;
128 Aussi me suis-je dirigé selon tes commandements; j'ai pris en haine la voie de l'iniquité.
namonaka mpe malako na Yo nyonso alima; nzokande, nayinaka lokuta nyonso.
129 Tes témoignages sont merveilleux; aussi mon âme les a recherchés.
Malako na Yo ezali kitoko, yango wana nabatelaka yango.
130 La manifestation de tes paroles éclairera et instruira les plus jeunes enfants.
Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka, epesaka bazoba mayele.
131 J'ai ouvert la bouche, et je suis resté haletant du désir de tes commandements.
Monoko na ngai efungwamaka makasi likolo ya kozela, pamba te nazali na posa makasi ya mibeko na Yo.
132 Regarde-moi, et faites-moi miséricorde, comme il est juste envers ceux qui aiment ton nom.
Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda ndenge okata mpo na bato oyo balingaka Kombo na Yo.
133 Dirige mes pas selon ta parole, et que nulle iniquité ne soit maîtresse de moi.
Lendisa bomoi na ngai na nzela ya liloba na Yo mpe pekisa mabe ete ekonza ngai te.
134 Délivre-moi des fausses accusations des hommes, et je garderai tes commandements.
Kangola ngai wuta na minyoko ya bato, mpe nakotosa mibeko na Yo.
135 Fais que brille ton visage sur ton serviteur, et enseigne-moi tes préceptes.
Tika ete elongi na Yo engengela ngai, mosali na Yo; lakisa ngai mibeko na Yo!
136 Mes yeux se sont fondus en des torrents de larmes, parce que je n'avais point gardé ta loi.
Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli, pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.
137 Tu es juste, Seigneur, et tes jugements sont droits.
Yawe, ozali sembo, mpe mibeko na Yo ezali alima;
138 Tu nous as recommandé tes témoignages, comme étant la justice et la vérité.
osalaki malako na Yo na bosembo mpe na bolingo.
139 Ton zèle m'a consumé, parce que mes ennemis avaient oublié tes paroles.
Mpo ete banguna na ngai bazwaka liloba na Yo na motuya te, nayokaka kanda makasi komata ngai na motema.
140 Ta parole est éprouvée comme un feu ardent, et ton serviteur l'aime.
Nzokande liloba na Yo ezali penza peto; mpe ngai, mosali na Yo, nalingaka yango.
141 Et, quoique jeune et méprisé, je n'ai point oublié tes préceptes.
Atako nazali moke mpe batiolaka ngai, kasi nabosanaka mitindo na Yo te.
142 Ta justice est la justice éternelle, et ta loi, la vérité.
Bosembo na Yo ekotikala bongo mpo na libela, ekotikala kobongwana te; mpe mibeko na Yo ezali solo.
143 La tribulation et la détresse sont venues me trouver; tes commandements ont été ma méditation.
Pasi ekangi ngai, mpe mayele esili ngai; kasi mibeko na Yo epesaka ngai esengo.
144 Tes témoignages sont une justice éternelle; donne-m'en l'intelligence, et je vivrai.
Malako na Yo ezali sembo mpo na libela; pesa ngai bososoli mpo ete nabika!
145 J'ai crié au fond de mon âme; exauce-moi, Seigneur, et je rechercherai tes préceptes.
Nazali kobelela Yo na motema na ngai mobimba: « Yawe, yanola ngai; nakotosa mitindo na Yo!
146 J'ai crié vers toi; sauve-moi, et je garderai tes témoignages.
Nazali kobelela Yo: bikisa ngai, mpo ete natosa malako na Yo!
147 Je me suis levé avant le jour, et j'ai crié, tant j'espérais en tes promesses.
Nalamukaka liboso ete tongo etana mpo na kobelela Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
148 Mes yeux se sont ouverts avant l'aurore, pour méditer tes paroles.
Nalamukaka na kati-kati ya butu mpo na kokanisa mitindo na Yo.
149 Écoute ma voix. Seigneur, selon ta miséricorde; vivifie-moi selon ton jugement.
Yoka ngai na bolingo na Yo! Yawe, batela bomoi na ngai kolanda mibeko na Yo!
150 Mes persécuteurs se sont approchés de l'iniquité, et ils se sont éloignés de ta loi.
Bato oyo basalaka mabongisi mabe, oyo batosaka mibeko na Yo te, bazali koya pene na ngai.
151 Tu es proche, Seigneur, et toutes tes voies sont vérité.
Nzokande Yo, Yawe, ozali pene, mpe mibeko na Yo nyonso ezali bosolo.
152 J'ai reconnu dès le commencement, par tes témoignages, que tu les avais fondés pour tous les siècles.
Wuta kala, ngai nayebi, na nzela ya malako na Yo, ete otia mibeko yango mpo na libela.
153 Vois mon humiliation, et délivre-moi; car je n'ai point oublié ta loi.
Mona malamu pasi na ngai mpe kangola ngai, pamba te nabosanaka mibeko na Yo te.
154 Juge ma cause, et rachète-moi; vivifie-moi selon ta parole.
Kota likambo na ngai mpe kangola ngai, batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo!
155 Le salut est loin des pécheurs, parce qu'ils n'ont point, recherché tes préceptes.
Lobiko ezalaka mosika ya bato mabe, pamba te bamonaka pamba mitindo na Yo.
156 Tes miséricordes sont abondantes, Seigneur; vivifie-moi selon ton jugement.
Yawe, mawa na Yo ezali monene penza; batela bomoi na ngai kolanda mibeko na Yo.
157 Ceux qui me persécutent et m'oppriment sont nombreux; cependant je ne me suis point écarté de tes témoignages.
Banyokoli mpe banguna na ngai bazali solo ebele, kasi ngai nakangamaka kaka na malako na Yo.
158 J'ai vu les insensés, et je me suis consumé, parce qu'ils n'avaient point gardé tes paroles.
Natalaka na nkele bato oyo bazangi kondima, ba-oyo batosaka liloba na Yo te.
159 Vois, Seigneur, combien j'aime ta loi! vivifie-moi selon ta miséricorde.
Yawe, tala ndenge nalingaka mitindo na Yo! Batela bomoi na ngai kolanda bolingo na Yo.
160 La vérité est le principe de tes paroles, et tous les jugements de ta justice sont éternels.
Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo, mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezali mpo na libela.
161 Les princes m'ont persécuté sans cause; mais mon cœur n'a redouté que tes paroles.
Bakambi banyokolaka ngai kaka pamba, kasi kaka liloba na Yo nde ebangisaka motema na ngai.
162 Je me réjouirai de tes paroles, comme celui qui trouve un riche butin.
Nasepelaka na liloba na Yo lokola moto oyo azwi bomengo ebele ya bitumba.
163 Je hais l'iniquité, je l'ai en abomination; j'aime ta loi.
Nayinaka lokuta mpe nayokaka yango nkele, nalingaka nde mibeko na Yo.
164 Sept fois le jour je t'ai loué, à cause des jugements de ta justice.
Nakumisaka Yo mbala sambo na mokolo mpo na mibeko ya bosembo na Yo.
165 Ceux qui aiment ta loi jouissent d'une paix profonde, et il n'est point pour eux de scandale.
Bato oyo balingaka mibeko na Yo bazali bato na kimia monene, mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.
166 J'ai attendu ton salut, Seigneur, et j'ai aimé tes commandements.
Yawe, natielaka Yo motema mpo ete obikisa ngai, mpe natosaka mibeko na Yo.
167 Mon âme a gardé tes témoignages; elle les a vivement aimés.
Natosaka malako na Yo, pamba te nalingaka yango makasi.
168 J'ai gardé tes commandements et tes témoignages, parce que toutes mes voies sont en ta présence. Seigneur.
Natosaka malako mpe mibeko na Yo, pamba te oyebi banzela na ngai nyonso.
169 Que ma prière. Seigneur, arrive jusqu'à toi; donne-moi l'intelligence selon ta parole.
Yawe, tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo! Pesa ngai bososoli kolanda liloba na Yo!
170 Que ma demande. Seigneur, arrive jusqu'à toi; délivre-moi selon ta parole.
Tika ete mabondeli na ngai ekoma kino epai na Yo! Kangola ngai kolanda elaka na Yo.
171 Que mes lèvres chantent un hymne, quand tu m'auras enseigné tes préceptes.
Tika ete bibebu na ngai ekumisa Yo, pamba te olakisaka ngai mitindo na Yo!
172 Que ma langue publie tes promesses, parce que tous tes commandements sont la justice.
Tika ete lolemo na ngai eyemba liloba na Yo, pamba te mibeko na Yo nyonso ezali sembo.
173 Que ta main se prête à me sauver, parce que j'ai choisi ta loi.
Tika ete loboko na Yo esunga ngai, pamba te napona kolanda malako na Yo.
174 J'ai désiré ton salut. Seigneur, et ta loi est l'objet de ma méditation.
Yawe, nazali na posa makasi ya lobiko na Yo; mibeko na Yo epesaka ngai esengo.
175 Mon âme vivra et te louera, et tes jugements seront mon soutien.
Tika ete nazala na bomoi mpo na kokumisa Yo, mpe tika ete mibeko na Yo esunga ngai!
176 J'ai été errant comme une brebis égarée; cherche ton serviteur, parce que je n'ai point oublié ta loi.
Nazali koyengayenga lokola meme oyo ebungi; luka ngai, mosali na Yo, pamba te nabosani mibeko na Yo te. »

< Psaumes 119 >