< Juges 7 >

1 Après cela, Jérobaal, le même que Gédéon, se leva de grand matin, et tout le peuple avec lui; ils campèrent vers la fontaine d'Arad, et le camp de Moab était au nord de la fontaine, du côté de Gabaathamoré, dans le vallon.
Na tongo-tongo, Yerubali, elingi koloba Jedeon, abimaki elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpe batongaki molako na bango pembeni ya etima ya mayi ya Arodi. Nzokande molako ya bato ya Madiani ezalaki na ngambo ya nor ya molako ya bana ya Isalaele, na lubwaku, pembeni ya ngomba moke ya More.
2 Et le Seigneur dit à Gédéon: Le peuple qui te suit est nombreux, tellement que je ne livrerai pas Madian à ses mains, de peur qu'Israël n'aille se glorifier contre moi, et ne dise: C'est ma main qui m'a sauvé.
Yawe alobaki na Jedeon: « Bato oyo ozali na bango baleki ebele mpo na ngai kokaba bato ya Madiani na maboko na bango, noki te Isalaele akozwa lolendo na koloba: ‹ Loboko na ngai moko nde ebikisi ngai. ›
3 Parle donc au peuple, disant: Y a-t-il ici quelqu'un qui craigne et faiblisse? que celui-là s'en aille, qu'il s'éloigne des montagnes de Galaad. Or, vingt-deux mille du peuple partirent, et dix mille restèrent.
Yango wana, loba na bato oyo: ‹ Tika ete moto nyonso oyo azali kolenga na kobanga azala mosika ya ngomba Galadi mpe azonga epai na ye. › » Boye, bato nkoto tuku mibale na mibale bazongaki epai na bango mpe nkoto zomi batikalaki.
4 Et le Seigneur dit à Gédéon; Ce peuple est encore nombreux; fais-le descendre auprès de l'eau, et là je le purifierai pour toi. Et celui de qui je le dirai: Il doit marcher avec toi, marchera; celui de qui je te dirai: Il ne doit point marcher avec toi, ne marchera pas.
Kasi Yawe alobaki na Jedeon: « Bato bazali kaka ebele. Kitisa bango nyonso na mayi, mpe kuna, nakomeka bango mpo na yo. Soki nalobi: ‹ Oyo akoki kokende na yo, ye nde asengeli kokende na yo. › Kasi soki nalobi: ‹ Oyo akoki te kokende na yo, ye asengeli te kokende na yo. › »
5 Et Gédéon conduisit le peuple auprès de l'eau, et le Seigneur lui dit: Celui qui prendra de l'eau avec la langue, comme le font les chiens, tu le placeras d'un côté, et tu placeras d'un autre côté tous ceux qui se mettront à genoux pour boire.
Boye, Jedeon akitisaki bato na mayi. Kuna, Yawe alobaki na ye: « Kabola bango: tia na ngambo moko, bato oyo bakomela mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa; mpe tia na ngambo mosusu, bato oyo bakofukama, mpo na komela mayi. »
6 Or, le nombre de ceux qui prirent de l'eau dans leur main et la portèrent à leur bouche s'éleva à trois cents, et tout le reste du peuple se mit à genoux pour boire.
Bato nkama misato bazwaki mayi na maboko na bango mpo na komema yango na minoko na bango mpe komela yango na nzela ya lolemo; bato nyonso oyo batikali bafukamaki mpo na komela mayi.
7 Et le Seigneur dit à Gédéon: C'est avec les trois cents hommes qui ont pris de l'eau dans leurs mains que je vous sauverai et vous livrerai Madian; tout le reste du peuple s'en ira, chacun en son pays.
Yawe alobaki na Jedeon: « Nakobikisa bino na nzela ya bato nkama misato oyo bamelaki mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa, mpe nakokaba bato ya Madiani na maboko na yo. Tika ete bato nyonso oyo batikali bazonga, moto na moto na esika na ye. »
8 Les trois cents prirent donc tous les vivres du peuple et leurs cors, et Gédéon congédia tout Israël, chacun en sa demeure, puis il encouragea les trois cents. Cependant, le camp des Madianites était au-dessous de lui, au fond de la vallée.
Boye mibali yango nkama misato bazwaki biloko ya kolia mpe bakelelo ya bato mosusu. Mpe Jedeon azongisaki na bandako na bango, bana ya Isalaele oyo batikalaki. Nzokande, molako ya bato ya Madiani ezalaki na lubwaku, na se ya molako ya bana ya Isalaele.
9 Et cette nuit-là même, il advint que le Seigneur lui dit: Debout, descends sur leur camp, car je l'ai livré à tes mains,
Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon: « Telema, kita mpo na kobundisa molako ya bato ya Madiani, pamba te napesi yango na maboko na yo.
10 Si tu crains de descendre seul, descends sur le camp avec Phara, ton serviteur.
Soki ozali kobanga kobunda, kita elongo na Pura, mosali na yo ya mobali,
11 Ecoute ce qu'ils diront; après cela, tes mains seront fortifiées, et tu descendras pour attaquer le camp. Il descendit, accompagné seulement de Phara, son serviteur, vers la plus avancée des compagnies de cinquante hommes qui étaient dans le camp.
mpe yoka maloba oyo bazali koloba. Boye okozwa makasi ya kobundisa bango. » Jedeon akitaki elongo na Pura, mosali na ye ya mobali, kino na liboso ya molako ya bitumba.
12 Et Madian, Amalec et les fils de l'Orient étaient entassés au fond de la vallée, comme les sauterelles quand elles foisonnent; la multitude de leurs chameaux était innombrable, et ils étaient comme le sable sur le rivage de la mer.
Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale.
13 Quand Gédéon survint, voilà qu'un homme racontait à son voisin un songe, et il disait: J'ai eu un songe; j'ai vu un pain de pâte d'orge roulant sur le camp des Madianites; il arriva jusqu'à une tente, il la frappa et la fit tomber; il renversa de fond en comble la tente, et elle tomba.
Jedeon akomaki na molako ya banguna na bango na tango kaka mobali moko ya Madiani azalaki kobeta lisolo ya ndoto na ye epai ya moninga na ye: — Tala ndoto naloti: Namonaki lipa moko basala na bambuma ya orje ezali kobaluka kati na molako na biso mobimba, bongo lipa yango eyaki kotuta ndako ya kapo na makasi koleka. Ndako ya kapo ekweyaki mpe ebalukaki.
14 Or, son voisin lui répondit: Le pain n'est autre chose que l'épée de Gédéon, fils de Joas, homme d'Israël. Le Seigneur a livré à ses mains Madian et notre camp tout entier.
Moninga na ye azongisaki: — Oyo ekoki kozala eloko mosusu te! Ezali kaka mopanga ya Jedeon, mwana mobali ya Joasi, moto ya Isalaele. Solo, Nzambe akabi bato ya Madiani mpe molako mobimba na maboko na ye.
15 Gédéon, ayant ouï le récit du songe et son interprétation, adora le Seigneur; il rentra au camp d'Israël, et il dit: Levez-vous, parce que le Seigneur a livré à nos mains le camp des Madianites.
Tango Jedeon ayokaki ndoto mpe ndimbola na yango, afukamelaki Nzambe mpe atondaki Ye. Azongaki na molako ya Isalaele mpe agangaki: « Botelema, Yawe akabi molako ya bato ya Madiani na maboko na biso. »
16 Il divisa ses trois cents hommes en trois troupes, et il leur donna des cors à tous, et dans l'autre main des pots vides, et dans chaque pot une lampe.
Jedeon akabolaki basoda na ye nkama misato na biteni misato. Mpe apesaki na mobali moko na moko kelelo moko, mbeki moko oyo ezangi eloko na kati, singa ya mwinda mpe moto ya mbeki.
17 Et il leur dit: Soyez attentifs a ce que je ferai, et faites de même. J'entrerai par la tête du camp, et comme je ferai vous ferez aussi.
Na sima, apesaki bango mitindo oyo: « Bino nyonso, botala esika ngai nazali mpe bolanda ndenge ngai nakosala tango nakokoma pembeni ya molako ya banguna na biso.
18 Je ferai retentir mon cor, et vous sonnerez de même tout à l'entour du camp, et vous direz: Au Seigneur et à Gédéon!
Tango ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai tokobeta kelelo, bino nyonso, na zingazinga ya molako, bokobeta mpe bakelelo na bino mpe bokoganga: ‹ Mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. › »
19 Gédéon et ses cent hommes entrèrent donc par la tête du camp, au commencement de la seconde veille; le bruit qu'ils firent réveilla les gardes; et ils sonnèrent du cor, et ils agitèrent les pots qu'ils tenaient à la main.
Jedeon mpe mibali nkama moko oyo bazalaki na ye elongo, bakomaki pembeni ya molako, mwa tango moke liboso ete midi ya butu ekoka, wana bawutaki kotia bakengeli mosusu. Babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki oyo ezalaki na maboko na bango.
20 Les trois troupes sonnèrent du cor, et brisèrent leurs pots; alors, les hommes, tenant de la main gauche les lampes et de la main droite les cors, qu'ils faisaient retentir, crièrent: L'épée du Seigneur et de Gédéon!
Biteni nyonso misato ya basoda babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki. Na loboko na bango ya mwasi, basimbaki minda, mpe, na loboko ya mobali, bakelelo mpo na kobeta. Mpe bazalaki koganga: « Mopanga mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. »
21 Chaque homme resta en place tout autour du camp, et tout le camp se mit à courir; les Madianites se donnèrent des ordres confus, et ils s'enfuirent.
Wana soda moko na moko ya Isalaele atelemaki na esika na ye zingazinga ya molako, banguna kati na molako bapotaki mbangu, bagangaki mpe bakimaki.
22 Et les trois cents cors sonnaient toujours, et le Seigneur tourna l'épée de chaque Madianite contre son voisin dans le camp tout entier. Le camp s'enfuit jusqu'à Bethséed, Tagaragatha, Abelméula, tirant vers Tabath.
Tango bakelelo nkama misato ebetaki lisusu, Yawe asalaki ete, kati na molako mobimba, moto na moto atuba moninga na ye mopanga; mpe bango nyonso bakimaki kino na Beti-Shita, na ngambo ya Tserera, mpe kino na ngambo ya Abele-Meola pembeni ya Tabati.
23 En Israël, Nephthali, Aser, tout Manassé apportèrent leur secours, et ils poursuivirent Madian.
Bana ya Isalaele oyo bawutaki na Nefitali, na Aseri mpe na Manase basanganaki mpo na kobengana bato ya Madiani.
24 Et Gédéon dépêcha des messagers dans toutes les montagnes d'Ephraïm, disant: Descendez à la rencontre de Madian, emparez-vous de l'eau jusqu'à Béthéra, emparez-vous du cours du Jourdain. Et tous les hommes d'Ephraïm crièrent, et ils s'emparèrent de l'eau jusqu'à Béthéra; ils s'emparèrent du cours du Jourdain.
Jedeon atindaki bantoma kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpo na koloba: « Bokita mpo na kokutana na bato ya Madiani; bokanga, liboso na bango, nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani. » Bana nyonso ya libota ya Efrayimi bakitaki mpe bakangaki nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani.
25 Et ils prirent les chefs de Madian Oreb et Zeb; ils tuèrent Oreb à Sur- Oreb; ils tuèrent Zeb en Jacephzeph. Et ils poursuivirent Madian, et ils rapportèrent, de l'autre côté du Jourdain, à Gédéon, les têtes de Zeb et d'Oreb.
Bakangaki bakonzi mibale ya bato ya Madiani: Orebi mpe Zeebi. Babomaki Orebi na libanga monene ya Orebi, mpe Zeebi na esika oyo bakamolaka vino ya Zeebi. Balandaki bato ya Madiani mpe bamemelaki Jedeon mito ya Orebi mpe ya Zeebi, kuna na ngambo ya Yordani.

< Juges 7 >