< Josué 20 >
1 Et le Seigneur parla à Josué, disant:
Yawe alobaki na Jozue:
2 Parle aux fils d'Israël, dis-leur: Donnez les villes de refuge que je vous ai dites par Moïse;
« Yebisa bana ya Isalaele ete bapona bingumba ya kokimela, ndenge nayebisaki bino na nzela ya Moyize,
3 Villes de refuge pour le meurtrier qui involontairement aura frappé à mort; ces villes seront pour vous des refuges, et le meurtrier ne sera point tué par le vengeur du sang, avant d'avoir comparu en jugement devant la synagogue.
mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoka kokimela kuna mpe azwa ebombamelo liboso ya mobukanisi makila.
Soki akimeli kati na moko ya bingumba wana, akotelema na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe akotalisa likambo na ye epai ya bampaka ya engumba wana. Bongo bampaka bakoyamba moto yango kati na engumba mpe bakopesa ye esika ya kovanda elongo na bango.
Soki mobukanisi makila alandi ye, bampaka basengeli te kokaba mobomi yango na maboko na ye, pamba te abomaki mozalani na ye na nko te mpe azalaki liboso na makanisi ya mabe te.
Akotikala na engumba wana kino tango akoleka na esambiselo liboso ya lisanga mpe kino tango mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo azali na mosala na tango wana, akokufa. Na sima na yango nde mobomi yango akoki kozonga na engumba na ye, na ndako na ye, kati na engumba epai wapi awuta. »
7 Josué désigna donc Cadès, en Galilée, dans les montagnes de Nephthali; Sichem, dans les montagnes d'Ephraïm; la ville d'Arboc, la même qu'Hébron, dans les montagnes de Juda.
Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.
8 Et au delà du Jourdain, il désigna Bosor dans le désert, dans la plaine de la tribu de Ruben; Arémoth, en Galaad, de la tribu de Gad, et, dans le royaume de Basan, Gaulon, de la tribu de Manassé.
Na ngambo mosusu ya Yordani, na este ya Jeriko, baponaki Betseri kati na esobe, na likolo ya ngomba ya libota ya Ribeni; Ramoti kati na Galadi, kati na etuka ya libota ya Gadi; mpe Golani kati na Bashani, kati na etuka ya libota ya Manase.
9 Telles sont les villes qui furent choisies pour les fils d'Israël, et pour le prosélyte résidant parmi eux, afin de servir de refuge à tout homme qui porterait involontairement un coup mortel, et afin qu'il ne pérît pas, de la main du vengeur de sang, avant d'avoir comparu en jugement devant la synagogue.
Yango nde ezalaki bingumba oyo eponamaki mpo na moto nyonso ya Isalaele to mpe mpo na mopaya nyonso oyo azali kovanda kati na bango. Moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokimela kuna, mpo ete mobukanisi makila aboma ye te, liboso ete aleka na esambiselo na miso ya lisanga.