< Joël 3 >

1 Car voici qu'en ce temps, et en ces jours-là, quand J'aurai fait revenir de la captivité Juda et Jérusalem,
« Na mikolo mpe na tango wana, tango nakozongisa bakangami ya Yuda mpe ya Yelusalemi,
2 J'assemblerai toutes les nations et les conduirai dans la vallée de Josaphat; là Je plaiderai avec elles pour Mon peuple et pour Israël, Mon héritage: car elles l'ont dispersé parmi les Gentils, qui se sont partagé Ma terre.
nakosangisa bato ya bikolo nyonso mpe nakokitisa bango na lubwaku ya Jozafati. Nakosambisa bango kuna na tina na libula na Ngai, Isalaele, bato na Ngai; pamba te bapanzi bato na Ngai kati na bikolo mpe bakaboli mokili na Ngai.
3 Et ils ont tiré Mon peuple au sort, et ils ont livré des enfants à la prostitution, et ils ont vendu des jeunes filles pour du vin, et ils ont bu.
Babeti zeke mpo na kokabola bato na Ngai, bapesi bilenge mibali basi ya ndumba, bateki bilenge basi mpo na kozwa kaka vino, mpe balangwe yango.
4 Or, qu'y a-t-il entre vous et Moi, Tyr, Sidon, Galilée des Philistins? Est-ce que vous pourrez user de représailles avec Moi? Ou Me garderez-vous rancune en votre cœur? Je vous rétribuerai, Moi, vite et sévèrement, sur vos têtes:
Eh bongo bino, Tiri mpe Sidoni, bituka ya bato ya Filisitia, likambo nini lisusu kati na Ngai mpe bino? Bolingi kozongisela Ngai mabe to kotombokela Ngai? Soki yango nde ezali makanisi na bino, Ngai nde nasengeli kozongisela bino mabe na lombangu.
5 Parce que vous avez pris Mon argent et Mon or; parce que vous avez porté dans vos temples Mes ornements précieux;
Pamba te bozwaki palata mpe wolo na Ngai, bomengo na Ngai ya motuya makasi mpe bomemaki yango na batempelo na bino.
6 parce que vous avez vendu aux fils des Grecs les fils de Juda et les fils de Jérusalem, pour les chasser de leurs frontières.
Botekaki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi epai ya Bagreki mpo na komema bango mosika ya mokili na bango.
7 Mais voilà que Je les ramènerai des contrées où vous les avez conduits, et Je vous rétribuerai sur vos têtes.
Ngai moko nakopesa bango makasi mpo ete babima na bisika nyonso epai wapi botekaki bango.
8 Et Je donnerai vos fils et vos filles aux fils de Juda, pour qu'ils les vendent comme captifs chez une nation lointaine; ainsi a parlé le Seigneur.
Nakoteka bana na bino ya mibali mpe ya basi epai ya bato ya Yuda, mpe bango bakoteka bango epai ya bato ya Sabe, ekolo ya mosika penza, » elobi Yawe.
9 Publiez ces choses parmi les Gentils; sanctifiez la guerre; excitez les combattants, vous tous hommes exercés aux armes; rassemblez-vous, et partez.
« Bosakola likambo oyo kati na bikolo: Bobulisa mampinga mpo na bitumba! Bolamusa bilombe! Tika ete bilombe nyonso ya bitumba bapusana mpe baya!
10 Forgez des glaives avec vos socs de charrue, et, avec vos faux, des javelines. Que le faible lui-même dise: Je suis fort.
Bosala mipanga, na nzela ya bakongo na bino; mpe makonga, na nzela ya bipasola na bino! Tika ete moto na bolembu aloba: ‹ Nazali makasi. ›
11 Venez tous ensemble et entrez, vous nations d'alentour; vous, fils d'Israël, réunissez-vous là: que l'homme pacifique devienne un guerrier.
Bino bikolo nyonso ya zingazinga, boya na lombangu mpe bosangana! Oh Yawe, kitisa bilombe na Yo!
12 Que toutes les nations se lèvent; qu'elles se rendent dans la vallée de Josaphat; c'est là que Je siège pour juger les nations d'alentour.
Tika ete bikolo nyonso elamuka mpe emata kino na lubwaku ya Jozafati! Pamba te kuna nde nakovanda mpo na kosambisa bikolo nyonso ya zingazinga.
13 Envoyez des faucilles, car le vendangeur est prêt; entrez et foulez aux pieds les grappes, car le pressoir est plein; laissez déborder les cuves, car leur méchanceté a comble la mesure.
Bosimba bambeli, pamba te bambuma eteli. Boya, bokamola bambuma ya vino, pamba te ekamolelo etondi, banzungu etondi, mabe na bango eleki ndelo.
14 Les échos ont retenti dans la vallée du jugement; car le jour du Seigneur est proche dans la vallée du jugement.
Bato bazali ebele, ebele penza, na lubwaku ya kosambisama. Mokolo ya Yawe ekomi pene, na lubwaku ya kosambisama.
15 Le soleil et la terre seront enveloppés de ténèbres, et les étoiles retireront leur lumière.
Sanza mpe moyi ekoyinda, minzoto ekongenga lisusu te.
16 Le Seigneur jettera de grands cris du haut de Sion; Il fera entendre Sa voix du haut de Jérusalem; le ciel et la terre trembleront; mais le Seigneur épargnera Son peuple, et Il fortifiera les fils d'Israël.
Wuta na Siona, Yawe akoloba makasi; wuta na Yelusalemi, akoloba na mongongo makasi lokola kake; Lola mpe mabele ekoningana. Kasi Yawe akozala ekimelo mpo na bato na Ye, engumba batonga makasi mpo na bana ya Isalaele.
17 Et vous connaîtrez que Je suis le Seigneur votre Dieu, qui réside en Sion, sur la montagne sainte; et Jérusalem sera sainte, et les étrangers n'y passeront plus.
Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino; navandaka na Siona, ngomba na Ngai ya bule. Yelusalemi ekozala engumba ya bule, bapaya bakolekela lisusu wana te.
18 Et il arrivera qu'en ce jour-là les montagnes ruisselleront de douceur, et les collines de lait; et l'eau coulera de toutes les sources de Juda, et une fontaine jaillira de la maison du Seigneur, et elle abreuvera le val de Sétim.
Na mokolo wana, bangomba ekotangisa vino ya sika, mpe miliki ekotanga na bangomba mikuse. Miluka nyonso ya Yuda ekotonda na mayi, etima moko ya mayi ekobima wuta na Tempelo ya Yawe mpe ekosopela lubwaku ya banzete ya akasia mayi.
19 L'Égypte sera mise à néant; l'Idumée sera un champ de désolation, à cause des iniquités de ses fils contre Juda, parce qu'ils ont versé le sang innocent sur leur terre.
Kasi mokili ya Ejipito ekobebisama, mokili ya Edomi ekokoma esobe mpo na makambo mabe oyo basalaki epai ya bato ya Yuda, pamba te basopaki makila ya bato ya Yuda na mabele na bango, atako basalaki mabe te.
20 Et la Judée sera habitée dans tous les siècles, et Jérusalem dans les générations des générations.
Bato bakokoma kovanda na mokili ya Yuda mpo na libela, mpe na engumba Yelusalemi, libela na libela.
21 Et Je rechercherai leur sang, et Je n'absoudrai point ceux qui l'ont versé, et le Seigneur aura Son tabernacle en Sion.
Nakopetola bino mpo na ngambo ya makila, mpo ete nanu napetola bino te. »

< Joël 3 >