< Jérémie 49 >

1 Et tous les chefs de l'armée, Joanan, Azarias, fils de Maasie, et tout le peuple, du petit au grand, allèrent trouver Jérémie le prophète, et ils lui dirent:
Na tina na bato ya Amoni: Tala liloba oyo Yawe alobi: « Boni, Isalaele atikali lisusu na bana mibali te? Atikali lisusu na bakitani ya libula te? Bongo mpo na nini Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, abotoli bingumba ya Gadi? Mpo na nini bato na ye bayei kovanda na Gadi?
2 Que notre appel à la compassion soit devant ta face. Prie le Seigneur ton Dieu pour les restes de notre peuple; car de beaucoup que nous étions, nous sommes restés fort peu, comme tu le vois de tes yeux.
Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakosala ete lokito ya bitumba eyokana mpo na kobundisa Raba, engumba ya bato ya Amoni; ekokoma esika ya mabe mpe bamboka mike na yango ekozikisama na moto. Bongo Isalaele akobengana bato oyo babenganaki ye, » elobi Yawe.
3 Et que le Seigneur ton Dieu nous fasse connaître la voie où nous devons marcher, et la parole qu'il nous faut accomplir.
« Eshiboni, lela mpo ete Ayi ebebisami! Bino bavandi ya Raba, boganga! Bolata basaki mpe bosala matanga, bokima na bangambo nyonso ya mir, pamba te Moloki akokende na bowumbu elongo na banganga-nzambe mpe bakambi na ye.
4 Et Jérémie leur dit: J'ai entendu, voilà que je prierai pour vous le Seigneur mon Dieu, selon vos paroles; et la parole que me répondra le Seigneur Dieu, je vous la ferai connaître, et je ne vous en cacherai aucune chose.
Mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabwaku na yo, mabwaku oyo ebotaka bambuma ebele? Oh elenge mwasi oyo otambolaka na bosembo te, ozali solo kotia motema na bomengo na yo mpe ozali koloba: ‹ Nani akobundisa ngai? ›
5 Et ils dirent: Que le Seigneur soit entre nous un témoin juste et vrai, si nous n'agissons selon toute parole que le Seigneur nous enverra.
Nakomemela yo pasi, wuta na zingazinga na yo, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Bakomema moko na moko kati na bino na bowumbu, mpe moto ata moko te akokoka kosangisa bato oyo bakokima.
6 Qu'elle nous annonce du bien ou du mal, la voix du Seigneur, vers qui nous t'envoyons, nous l'écouterons, afin qu'il en aille mieux pour nous, parce que nous aurons écouté la voix du Seigneur notre Dieu.
Kasi sima na mikolo, nakozongisa lisusu lokumu ya bato ya Amoni, » elobi Yawe.
7 Et dix jours après la parole du Seigneur vint à Jérémie.
Na tina na Edomi: Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Boni, engumba ya Temani etikali lisusu na bato ya bwanya te? Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te? Boni, bwanya na bango esili penza?
8 Et il appela Joanan, et les chefs de l'armée, et tout le peuple, du petit au grand;
Bobaluka mpe bokima, bokende kobombama na madusu ya mabanga, bino bavandi ya engumba Dedani! Pamba te nakotindela Ezawu pasi tango nakopesa ye etumbu.
9 Et il leur dit: Voici ce que dit le Seigneur:
Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo, bakotika ata mbuma moko te ya vino. Soki miyibi bayei epai na yo na butu, bakobebisa ndenge balingi.
10 Si vous demeurez en cette terre, je vous réédifierai, et ne vous abattrai pas; je vous planterai et ne vous arracherai pas, parce que je mets un terme aux maux que je vous ai faits.
Kasi nakotika Ezawu bolumbu, mpe nakobimisa polele ebombamelo na ye, bongo akokoka lisusu komibomba te. Bana na ye ya mibali to bandeko na ye to mpe bazalani na ye bakosila kokufa; moko te akotikala na bomoi.
11 N'ayez plus peur du roi de Babylone, que vous craignez, n'ayez plus peur de lui, dit le Seigneur; car je suis avec vous pour vous délivrer et vous sauver de leurs mains.
Tika bana bitike na yo, nakobatela bomoi na bango; mpe basi na yo, oyo bakufisa mibali bakotiela Ngai motema. »
12 Et je vous ferai miséricorde, et j'aurai compassion de vous, et je vous ramènerai en votre terre.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Soki bato oyo basengeli komela kopo te bameli yango, bongo mpo na nini yo ozanga kozwa etumbu? Te, okozanga te kozwa etumbu, mpe osengeli komela kopo yango!
13 Et si vous dites: Nous ne demeurerons pas en cette terre pour ne plus entendre la voix du Seigneur.
Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « Botsira ekobebisama mpe ekokoma eloko ya somo, eloko ya kotiola mpe ya lisuma; mpe bingumba na yango nyonso ekobebisama mpo na libela. »
14 Nous irons en Égypte, et nous ne verrons pas la guerre, et nous n'entendrons pas le son des trompettes, et nous ne manquerons pas de pain, et nous demeurerons en cette terre.
Nayoki sango kowuta na Yawe; mpe batindaki ntoma moko epai ya bikolo mpo na koloba: « Bosangana mpo na kobundisa yango! Botelema mpo na bitumba!
15 Si vous dites cela, écoutez la parole du Seigneur: Voici ce que dit le Seigneur: Si vous tournez votre face vers l'Égypte, si vous y entrez pour y demeurer,
Nakokomisa yo moke kati na bikolo, ekolo ya kotiola kati na bato.
16 Ceci adviendra: le glaive que vous craignez vous trouvera en Égypte, et la famine, dont l'aspect vous donne tant d'inquiétude, marchera derrière vous et vous atteindra en Égypte, et vous y mourrez.
Somo oyo bato bazali koyoka yo mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. Yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba; ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
17 Et tous les Hébreux et tous les prosélytes qui auront tourné leur face vers l'Égypte pour y demeurer périront par le glaive ou par la famine, et aucun d'eux n'échappera aux maux que j'amènerai sur eux.
« Mokili ya Edomi ekokoma eloko ya somo; moto nyonso oyo akolekela wana akokamwa mpe akoyoka somo wana akomona kobeba na yango nyonso.
18 Car voici ce que dit le Seigneur: De même que ma colère est tombée sur les habitants de Jérusalem, ainsi ma colère tombera goutte à goutte si vous entrez en Égypte; et vous serez en abomination, vous serez assujettis, maudits, outragés, et vous ne verrez plus cette terre.
Ndenge Sodome mpe Gomore ebebisamaki elongo na bingumba na yango ya zingazinga, » elobi Yawe, « moto moko te akovanda lisusu kuna, moko te akowumela kati na yango.
19 Voici ce que vous dit le Seigneur, ô restes de Juda: N'entrez pas en Égypte, et maintenant sachez
Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Edomi na mokili na yango na mbala moko; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. Nani akokani na Ngai? Nani akoki kobeta tembe na Ngai? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai?
20 Que vous avez agi avec malice en vos âmes, quand vous m'avez envoyé, disant: Prie pour nous le Seigneur, et nous nous conduirons selon tout ce que le Seigneur te dira.
Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na kotelemela Edomi, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela bavandi ya Temani: ‹ Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.
21 Et vous avez entendu la parole du Seigneur qu'il m'a envoyée pour vous.
Mabele ekoningana na lokito ya kokweya na bango, makelele na yango ekoyokana kino na ebale monene ya Barozo.
22 Et vous périrez par le glaive et la famine dans le lieu où vous voulez aller pour vous y établir.
Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu, etanda mapapu na yango likolo ya Botsira! Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › »
Na tina ya Damasi: « Amati mpe Aripadi batondisami na soni, pamba te bayoki sango ya mabe. Mitema na bango ekomi likolo-likolo mpe bakomi komitungisa lokola ebale oyo etomboki.
Bato ya Damasi balembi nzoto, bakomi koluka kokima mpe somo ekangi bango; kobanga mpe pasi ezwi bango lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
Ndenge nini bosundola engumba ya lokumu boye, engumba oyo ezalaki kosepelisa motema na Ngai?
Solo, bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala na yango na mokolo wana, basoda na yango ya mpiko bakokanga minoko, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
« Nakozikisa bamir ya Damasi na moto mpe moto yango ekozikisa bandako batonga makasi ya mokonzi Beni-Adadi. »
Na tina na Kedari mpe mikili ya Atsori, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki: Tala liloba oyo Yawe alobi: « Botelema mpe bobundisa Kedari, bobebisa bato ya este.
Bobotola na makasi bandako na bango ya kapo mpe bibwele na bango; bomema bilamba, biloko na bango ya kitoko mpe bashamo na bango! Tika ete bato bawolola bango na bangambo nyonso: ‹ Somo ekangi bango na bangambo nyonso! ›
Bino bavandi ya Atsori, bokima na lombangu, bobombama na madusu ya mabanga, » elobi Yawe. « Pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, asaleli bino likita, asali penza mabongisi ya kosala bino mabe!
Botelema mpe bobundisa ekolo oyo ezali na kimia, ekolo oyo ebangaka eloko moko te, » elobi Yawe, « ekolo oyo ezanga bikuke mpe banzete oyo bakangelaka bikuke, ekolo oyo bato na yango bazalaka kaka bango moko.
Tika ete bashamo na bango ekoma bomengo ya bitumba, bayiba bibwele na bango ebele. Nakopanza na mopepe bavandi ya mosika, mpe nakokweyisela bango pasi longwa na bisika nyonso, » elobi Yawe.
« Atsori ekokoma esika oyo mbwa ya zamba evandaka, esika oyo etikala pamba mpo na libela: moto moko te akovanda lisusu kuna mpe moto moko te akowumela lisusu kati na yango. »
Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Elami, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda:
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Tala, nakobuka tolotolo ya Elami, ebundeli oyo esalaka makasi na ye.
Nakotindela Elami mipepe minei ya makasi, wuta na basonge minei ya lola, nakopanza bango na mokili mobimba mpe akozala na ekolo moko te oyo ekozanga koyamba bato ya Elami oyo bakokima.
Nakosala ete bato ya Elami balenga liboso ya banguna na bango, liboso ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe; nakokweyisela bango pasi na kanda na Ngai, » elobi Yawe. « Nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango.
Nakotia Kiti na Ngai ya bokonzi kati na Elami mpe nakoboma mokonzi mpe bakalaka na yango, » elobi Yawe.
« Nzokande, na mikolo ekolanda, nakozongisa lokumu ya Elami, » elobi Yawe.

< Jérémie 49 >