< Isaïe 61 >

1 L'Esprit du Seigneur est sur moi; c'est pourquoi il m'a consacré de son onction; il m'a envoyé pour évangéliser les pauvres, guérir les cœurs contrits, annoncer aux captifs la délivrance, et aux aveugles la vue;
Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko;
2 Pour publier l'année agréable au Seigneur, et le jour de la rétribution, et consoler tous les affligés;
mpo na kosakola mpo na Yawe mobu ya ngolu, kosakola mpo na Nzambe na biso mokolo ya kozongisa mabe na mabe, kobondisa bato oyo bazali kolela,
3 Pour donner aux affligés de Sion, au lieu de cendres la gloire; au lieu des larmes, l'onction de la joie; au lieu d'un cœur affligé, un vêtement de gloire; et ils seront appelés générations de justice, plantes du Seigneur pour sa gloire.
komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.
4 Et ils rebâtiront des places depuis longtemps désertes; ils relèveront celles qui avaient été abandonnées jadis et désolées pendant des générations.
Bakotonga lisusu bisika oyo ekoma mabanga-mabanga wuta kala, bisika oyo ebukana-bukana wuta na tango ya kala; bakokomisa sika bingumba oyo ekweya, oyo ebeba wuta bileko ya kala.
5 Et les étrangers viendront paître tes brebis, et les fils des Philistins seront tes laboureurs et tes vignerons.
Bapaya bakoleisa bibwele na yo, bana ya bapaya bakosalela yo bilanga mpe bakolonela yo bilanga ya vino.
6 Et vous, vous serez appelés prêtres du Seigneur, ministres de Dieu; vous vous nourrirez de la force des Gentils, et leurs richesses vous feront admirer.
Kasi bino, bokobengama Banganga-Nzambe ya Yawe, bakopesa bino kombo bawumbu ya Nzambe na biso; bokolia mpe bokotonda na bozwi ya bikolo mpe bokozwa lokumu na bomengo na bango.
7 Ainsi, pour la seconde fois, ils auront la terre pour héritage, et leur tête sera couronnée d'une joie éternelle.
Na esika ya soni na bino, bokozwa litomba mbala mibale, mpe na esika ya kosambwa, bokosepela na libula na bino. Boye, bokozwa litomba mbala mibale kati na mokili na bino mpe bokosepela mpo na libela.
8 Car moi je suis le Seigneur, j'aime la justice et je déteste les rapines de l'iniquité. Je donnerai aux justes le fruit de leur labeur, et je ferai avec eux une alliance éternelle.
Pamba te Ngai Yawe, nalingaka bosembo, nayinaka moyibi mpe masumu; nakofuta bino na bolingo na Ngai mpe nakosala boyokani ya libela elongo na bino.
9 Et on reconnaîtra leur race parmi les Gentils, et leurs enfants au milieu des peuples. Quiconque les verra les reconnaîtra, parce que c'est une semence bénie de Dieu.
Bakitani na bino bakoyebana kati na mabota, mpe bana na bino bakoyebana kati na bikolo; moto nyonso oyo akomona bino akondima ete bozali bato oyo Yawe apamboli.
10 Et ils se réjouiront dans la joie du Seigneur. Que mon âme se réjouisse donc dans le Seigneur; car il m'a revêtu d'un manteau de salut et d'une tunique d'allégresse; il m'a mis la mitre d'un jeune époux; et toute la parure d'une jeune épousée.
Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.
11 Telle la terre fait croître ses fleurs, et le jardin ses semences; tel le Seigneur Maître fera fleurir la justice et la joie aux yeux de tous les Gentils.
Pamba te ndenge mabele ebimisaka matiti mpe elanga ebimisaka nkona na yango, Nkolo Yawe mpe akoyeisa bosembo elongo na masanzoli liboso ya bikolo nyonso.

< Isaïe 61 >