< Isaïe 33 >

1 Malheur à ceux qui vous affligent! Que nul ne vous rende misérables; que celui qui vous méprise cesse de vous mépriser. Ceux qui vous comptent pour rien seront pris à leur tour; ils seront subjugués, ils deviendront aussi faibles que le ver sur un manteau.
Oh mobebisi, mawa na yo, yo oyo nanu obebisama te! Oh mofundi, mawa na yo, yo oyo nanu bafunda te! Tango okosilisa kobebisa, yo mpe bakobebisa yo, tango okosilisa kofunda, yo mpe bakofunda yo.
2 Seigneur, faites-nous miséricorde; car nous avons eu confiance en vous; la race des incrédules est allée à sa perte; notre salut viendra au temps de la tribulation.
Oh Yawe, yokela biso mawa, tozali kotalela Yo! Tongo nyonso, zala makasi na biso, zala lobiko na biso na tango ya pasi!
3 A votre voix redoutable, les peuples ont eu peur de vous, et ils ont été hors d'eux-mêmes, et les Gentils se sont dispersés.
Kaka na lokito ya mongongo na Yo, bato bakimaka; soki otelemi, bikolo epalanganaka.
4 Maintenant on recueillera vos dépouilles, celles du petit comme celles du grand; tel un homme ramasse des sauterelles, ainsi on se jouera de vous.
Oh bikolo, bakolokota bomengo na bino ya bitumba ndenge balokotaka mankoko; bakosopanela yango na elulu ndenge mabanki esalaka.
5 Le Saint, le Seigneur Dieu, qui réside au plus haut des cieux, a rempli Sion de justice et d'équité.
Yawe anetolami mpo ete avandaka na likolo, akotondisa Siona na bosembo mpe na solo.
6 Ils se soumettront à la loi; notre salut est dans ses trésors; c'est là que la sagesse, la science et la piété sont auprès du Seigneur; ce sont là les trésors de la justice.
Mikolo ya bomoi na yo ekozala na kimia; bwanya mpe boyebi ekozala bomengo ya lobiko na yo; kotosa Yawe, yango nde bozwi na yo.
7 Voilà qu'ils vont avoir peur de vous, ceux que vous craigniez; ils crieront à cause de vous; des messagers seront envoyés, pleurant amèrement et implorant la paix.
Tala, basoda na bango ya mpiko bazali koganga makasi na balabala; bamemi sango ya kimia, azali kolela makasi.
8 Car toutes leurs voies seront désertes; la crainte qu'inspiraient les Gentils est calmée: l'alliance avec eux est rompue; vous ne les compterez plus parmi les hommes.
Nzela ya minene esili kokawuka, ata moto moko te ya mobembo azali koleka. Mobebisi abuki boyokani, asambwisi bingumba mpe azali na botosi ya moto ata moko te.
9 La terre est en deuil; le Liban est confondu; Saron est devenu un marécage; la Galilée et le Carmel sont à découvert.
Mokili ezali na matanga, esili kolemba nzoto, Libani esambwe na soni mpe elembi-lembi lokola fololo, Saroni ekomi lokola esobe mpe Bashani mpe Karimeli ekweyisi makasa na yango.
10 Alors je me lèverai, dit le Seigneur; alors je serai loué, je serai glorifié
« Sik’oyo nakotelema, » elobi Yawe. « Sik’oyo nakonetolama, sik’oyo nakotombolama.
11 Vous verrez alors, et vous comprendrez; votre force d'esprit sera vaine, et le feu vous dévorera.
Mabongisi ya mitema na bino ezali kaka lokola matiti ya kokawuka mpe soki ekokisami, ezalaka kaka lokola matiti ya kokawuka, pema na bino moko ekozikisa bino lokola moto.
12 Et les nations seront consumées, comme les ronces d'un champ qu'on arrache et qu'on brûle.
Bato bakozika na libanga ya moto, ndenge nzube oyo bakata ezikaka na moto. »
13 Ceux qui demeurent au loin apprendront ce que j'aurai fait; ceux qui sont près de moi connaîtront ma force.
Bino bato oyo bozali mosika, boyoka makambo oyo nazali kosala, bino bato oyo bozali pene, bososola nguya na ngai!
14 Les pécheurs sont partis de Sion, un tremblement a saisi les impies. Qui vous annoncera que le feu est allumé? Qui vous fera connaître le séjour éternel?
Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te: « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso? »
15 Celui qui marche dans la justice, qui parle avec droiture, qui hait les transgressions et l'iniquité, qui de ses mains repousse les présents, qui fait la sourde oreille quand on excuse l'effusion du sang, qui ferme les yeux pour ne pas voir le mal.
Moto oyo atambolaka na bosembo mpe alobaka solo, moto oyo abwakaka litomba oyo ezwami na nzela ya moyibi, moto oyo asembolaka maboko na ye te mpo na kozwa kanyaka, moto oyo akangaka matoyi na ye mpo na koboya koyoka masolo ya koboma bato, mpe oyo akangaka miso na ye mpo na koboya komona mabe.
16 Celui-là résidera dans un grotte élevée en une roche inexpugnable. Là on lui donnera des vivres et de l'eau toujours fidèle à couler.
Moto wana akovanda na likolo: mabanga ya makasi ekozala ekimelo na ye. Akozanga te lipa ya kolia mpe mayi ya komela.
17 Vous verrez le roi dans sa gloire, vos yeux verront de loin la terre;
Miso na yo ekomona Mokonzi na kitoko na Ye nyonso mpe ekomona ndenge mokili ekenda kino na mosika.
18 Et votre âme s'occupera de l'objet de sa crainte. Où sont les scribes? Où sont les conseillers? Où est celui qui apprenait à compter les petits enfants?
Motema na yo ekokanisa lisusu somo oyo ozalaki koyoka: « Wapi mokonzi oyo azwaka mpako? Wapi moto oyo amekaka bakilo? Wapi moto oyo atalaka bandako na biso ya milayi? »
19 On ne verra plus un peuple, grands et petits, sans sagesse, parlant une langue inconnue, qu'un peuple ne pourrait ni ouïr ni comprendre.
Okomona lisusu bato ya lolendo te, bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koyoka mpe maloba na bango, pasi mpo na kososola.
20 Voici la ville de Sion, notre salut; tes yeux verront Jérusalem, riche cité; ses tabernacles ne chancelleront pas; les pieux de son tabernacle demeureront inébranlables dans les siècles des siècles, et ses cordages ne se rompront jamais;
Tala Siona, engumba ya bafeti na biso ya minene, miso na yo ekomona Yelusalemi, ndako ya kimia, ndako ya kapo oyo ekopikama makasi; bakokoka kopikola makonzi na yango te, mpe basinga na yango ekokatana te.
21 Parce que le nom du Seigneur est grand pour vous: pour vous il y aura une contrée, des fleuves et des canaux larges et spacieux. Mais toi, tu ne prendras pas cette voie; le navire que poussent tes rameurs ne la prendra point.
Kuna, Yawe akozala Elombe na biso. Ekozala etuka ya bibale minene mpe ya miluka. Masuwa moko te ekoya kuna, masuwa moko te ya lokumu ekoleka wana.
22 Car mon Dieu est grand; le Seigneur mon juge ne me dédaignera pas; le Seigneur est notre roi, le Seigneur est notre prince: c'est le Seigneur qui nous sauvera.
Pamba te Yawe azali Mosambisi na biso, Yawe azali Mosali mibeko na biso, Yawe azali Mokonzi na biso; Ye nde akobikisa biso.
23 Tes cordages sont rompus, parce qu'ils n'avaient pas de force; ton mât penche, il ne fera pas descendre les voiles; il n'élèvera pas le signal, jusqu'à ce que le navire soit livré au pillage. Et beaucoup de boiteux même y feront du butin.
Basinga na yo esili kolemba, ezali lisusu te kosimba malamu nzete ya bendele; ezali lisusu te kofungola malamu vwale. Boye, na tango bakokabola ebele ya bomengo ya bitumba, bato ya tengu-tengu, bango moko penza, bakobotola eteni na bango ya bomengo.
24 Et l'on ne dira pas parmi le peuple qui y demeure: Je suis trop las; car leur péché leur a été remis.
Movandi moke te ya Siona akoloba: « Nazali kobela! » Masumu ya bavandi ya kuna ekolimbisama.

< Isaïe 33 >