< Genèse 44 >

1 Joseph donna ses ordres à l'intendant de sa maison, disant: Fais remplir de vivres les sacs de ces hommes, autant qu'ils en pourront emporter, et que l'on place l'argent de chacun à l'entrée de son sac.
Jozefi apesaki mitindo epai ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye: « Tondisa biloko ya kolia na basaki ya bato oyo kolanda kilo oyo bakoki komema mpe tia mbongo ya moko na moko na moto ya saki na ye.
2 Mets aussi ma coupe dans le sac du plus jeune, avec le prix de son blé. Et tout ce que Joseph avait commandé fut fait comme il avait dit.
Okotia kopo na ngai oyo ya palata na moto ya saki ya leki na bango ya suka elongo na mbongo na ye ya ble. » Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye.
3 Dès que le jour parut, les hommes furent congédiés avec leurs ânes.
Na tongo-tongo, batikaki bandeko ya Jozefi kozonga elongo na ba-ane na bango.
4 Comme ils étaient hors de la ville et pas encore très loin, Joseph dit à l'intendant de sa maison: Lève-toi, cours à la poursuite de ces hommes, arrête-les, et dis-leur: Pourquoi rendez-vous le mal pour le bien? Pourquoi m'avez-vous dérobé la coupe d'argent?
Wana babimaki na engumba, bamikomelaki nanu mosika te, Jozefi alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye: « Telema, landa bato wana! Mpe tango okokanga bango, tuna bango: mpo na nini bozongisi mabe na malamu?
5 N'est-ce pas celle en laquelle boit mon seigneur? Il s'en sert pour deviner en prenant les augures; c'est bien mal ce que vous avez fait.
Mpo na nini boyibi kopo oyo nkolo na ngai amelelaka mayi mpe asalelaka mpo na koyeba makambo oyo ekoya? Likambo oyo bosali ezali penza mabe. »
6 Celui-ci les rejoignit, et il leur répéta ces paroles.
Mokambi ya ndako ya Jozefi akangaki bango mpe alobelaki bango lolenge nkolo na ye atindaki ye.
7 Ils répondirent: Pourquoi notre seigneur parle-t-il ainsi? Dieu préserve tes serviteurs d'avoir fait ce que tu dis,
Kasi bazongiselaki ye: — Mpo na nini nkolo na biso alobi makambo ya boye? Basali na yo bakoki kosala makambo ya boye te.
8 Si nous t'avons rapporté, de la terre de Chanaan, l'argent retrouvé dans nos sacs, comment aurions-nous dérobé or ou argent, dans la maison de ton seigneur?
Tomemelaki yo mbongo oyo tomonaki tango tofungolaki basaki na biso wuta na mokili ya Kanana. Ndenge nini tokoki lisusu koyiba wolo to palata kati na ndako ya nkolo na yo?
9 Celui de tes serviteurs sur qui tu trouveras la coupe, qu'il soit mis à mort, et que tous nous devenions esclaves de notre seigneur.
Soki moko kati na basali na yo amonani ete azali na yango, akokufa; mpe biso bamosusu oyo totikali, tokokoma bawumbu ya nkolo na biso.
10 Soit, reprit-il; il sera fait comme vous dites: mais celui-là seulement sur qui je trouverai la coupe sera mon esclave; les autres seront absous.
Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi alobaki: — Malamu mingi! Tika ete ezala ndenge bolobi! Moto oyo akomonana ete azali na yango, akokoma mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bokozala na likambo te.
11 Ils se hâtèrent; chacun descendit son sac, et l'ouvrit.
Moko na moko akitisaki saki na ye na lombangu na mabele mpe afungolaki yango.
12 Puis l'homme fouilla, en commençant par l'aîné jusqu'à ce qu'il arrivât au plus jeune, et il trouva la coupe dans le sac de Benjamin.
Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Jozefi abandaki koluka kobanda na kulutu kino na leki. Mpe kopo emonanaki na saki ya Benjame.
13 Alors, ils déchirèrent leurs vêtements; chacun remit son sac sur son âne, et ils retournèrent à la ville.
Tango bamonaki bongo, bapasolaki bilamba na bango; bazongisaki biloko na ba-ane na bango mpe bazongaki bango nyonso na engumba.
14 Juda entra, avec ses frères, vers Joseph, qui était encore où ils l'avaient déjà vu, et ils tombèrent devant lui la face contre terre.
Jozefi azalaki kaka na ndako. Tango Yuda na bandeko na ye ya mibali bakotaki na ndako, bagumbamaki kino na se liboso na ye.
15 Joseph leur dit: Pourquoi avez-vous fait une telle action? Ne saviez- vous point qu'un homme comme moi devine en prenant les augures?
Jozefi alobaki na bango: — Likambo nini oyo bosali? Boyebi te ete moto lokola ngai nazali na makoki ya komona makambo na bosoloka?
16 Juda repartit: Que répondrons-nous, qu'avons-nous à dire, et comment serons-nous justifiés? Dieu a découvert l'iniquité de tes serviteurs, nous serrons les esclaves de notre seigneur, nous et celui sur qui la coupe a été trouvée.
Yuda azongisaki: — Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai? Tokoloba lisusu nini? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye.
17 Dieu me préserve, reprit Joseph, d'agir de la sorte; l'homme sur qui la coupe a été trouvée sera mon esclave; mais vous, retournez en toute sécurité chez votre père.
Kasi Jozefi alobaki: — Nakoki kosala likambo ya boye te! Kaka moto oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye nde akozala mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bozonga na kimia epai ya tata na bino.
18 Sur quoi Juda, s'étant rapproché de lui, parla en ces termes: Je t'en conjure, seigneur, que ton serviteur dise encore une parole devant toi, et ne t'irrite pas contre ton serviteur, toi le premier après le Pharaon.
Yuda apusanaki pembeni na ye mpe alobaki: — Nabondeli yo, nkolo na ngai! Tika ete mosali na yo aloba liloba moko epai ya nkolo na ngai. Kosilikela mosali na yo te, pamba te ndenge Faraon azali, ndenge wana mpe yo ozali.
19 Seigneur, tu as interrogé tes serviteurs, disant: Avez-vous un père ou un frère?
Nkolo na ngai atunaki basali na ye: « Bozali na tata to na ndeko mosusu ya mobali? »
20 Et nous avons dit au seigneur: Nous avons un père avancé en âge, et il a un plus jeune fils, fruit de sa vieillesse; le frère de celui-ci est mort: lui seul est resté de sa mère, et son père l'aime tendrement.
Tozongiselaki nkolo na ngai: « Tozali na tata oyo akomi mobange mpe ndeko mobali ya leki oyo babotelaki tata na biso na kimobange. Ndeko na ye ya mobali akufa mpe atikala kaka ye moko mwana mobali na libumu ya mama na ye, mpe tata na ye alingaka ye mingi. »
21 Et tu as dit à tes serviteurs: Amenez-le devant moi, j'aurai soin de lui.
Bongo olobaki na basali na yo: « Bomemela ngai ye mpo ete nakoka komona ye na miso na ngai. »
22 Et nous avons dit au seigneur: L'enfant ne pourra quitter son père; s'il quitte son père, celui-ci mourra.
Tozongiselaki nkolo na ngai: « Elenge mobali akoki kotika tata na ye te; soki atiki ye, tata na ye akokufa. »
23 Tu as ajouté: Si votre frère le plus jeune ne vient pas avec vous, vous ne verrez plus mon visage.
Kasi olobaki na basali na yo: « Soki leki na bino ya mobali ayei elongo na bino te, bokomona lisusu elongi na ngai te. »
24 Lorsque nous fûmes de retour chez ton serviteur notre père, nous lui rapportâmes les paroles de notre seigneur.
Tango tozongaki epai ya mosali na yo, tata na ngai, toyebisaki ye makambo nyonso oyo nkolo na ngai alobaki.
25 Et notre père nous dit: Partez encore, achetez-nous un peu de blé.
Bongo tata na biso alobaki: « Bozonga mpe bosomba ndambo ya biloko ya kolia. »
26 Et nous dîmes: Nous ne pourrons aller en Égypte mais si notre frère le plus jeune vient avec nous, nous descendrons. Car nous ne verrons pas la face de l'homme, notre frère le plus jeune n'étant pas avec nous.
Kasi tozongisaki: « Tokoki kokende te. Tokokende kaka soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso. Tokoki komona elongi ya moto wana te soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso te. »
27 À quoi ton serviteur notre père répondit: Vous savez que ma femme m'a enfanté deux fils.
Mosali na yo, tata na biso, alobaki na biso: « Boyebi ete mwasi na ngai, Rasheli, abotelaki ngai bana mibale ya mibali.
28 L'un est sorti de chez moi; vous m'avez dit qu'il avait été la proie d'une bête farouche, et je ne l'ai pas revu jusqu'à ce jour.
Moko na bango akenda mosika na ngai. Nakanisi ete ezali ya solo, nyama moko ya mabe esila kolia ye. Banda tango wana, natikala komona ye lisusu te.
29 Si donc vous emmenez loin de moi celui-ci, et qu'une maladie le prenne en chemin, de tristesse, vous ferez descendre ma vieillesse au sein de la terre. (Sheol h7585)
Soki bozwi ngai lisusu mwana oyo mpe soki likama ekweyeli ye, bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai. » (Sheol h7585)
30 Maintenant donc, si je retourne devant ton serviteur notre père, et si l'enfant n'est pas avec nous, lui qui à sa vie tient suspendue la vie de notre père,
Sik’oyo, soki elenge mobali azali elongo na biso te tango nakozonga epai ya tata na ngai, mosali na yo, mpe soki tata na ngai, oyo motema na ye ekangama makasi na motema ya elenge mobali oyo,
31 Dès que notre père aura vu que l'enfant n'est pas avec nous, il mourra de douleur, et nous ferons descendre au tombeau la vieillesse de ton serviteur, notre père à nous. (Sheol h7585)
amoni ete elenge mobali azali elongo na biso te, wana akokufa. Basali na yo bakoboma tata na biso na pasi na kimobange na ye. (Sheol h7585)
32 Ton serviteur a reçu de son père l'enfant, en disant: Si je ne le ramène pas en ta demeure, si je ne le remets pas devant tes yeux, je serai coupable envers toi tous les jours de ma vie.
Pamba te ngai mosali na yo, nandimaki, na miso ya tata na ngai, kobatela elenge mobali oyo. Nalobaki: « Soki nazongiseli yo ye te, nakozala na ngambo liboso na yo tata na ngai, bomoi na ngai mobimba. »
33 Que je reste donc, en échange de l'enfant, esclave de mon seigneur, et que l'enfant parte avec ses frères.
Yango wana sik’oyo, nabondeli yo, tika ete mosali na yo akoma mowumbu ya nkolo na ngai na esika ya elenge mobali oyo mpe tika ete elenge mobali azonga elongo na bandeko na ye ya mibali.
34 Car comment retournerais-je devant le père, l'enfant n'étant pas avec nous? Que je demeure ici et ne sois pas témoin de la douleur dont sera saisi mon père!
Ndenge nini nakoki kozonga epai ya tata na ngai soki elenge mobali azali elongo na ngai te? Kotika te ete namona pasi oyo ekokomela tata na ngai!

< Genèse 44 >