< Esdras 4 >

1 Et ceux qui opprimaient Juda et Benjamin ouïrent que les enfants de la captivité bâtissaient un temple au Seigneur Dieu d'Israël.
Tango banguna ya Yuda mpe ya Benjame bayokaki ete bato oyo bawutaki na bowumbu bazali kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele,
2 Et ils s'approchèrent de Zorobabel et des chefs de famille, et ils leur dirent: Nous bâtirons avec vous, parce que, comme vous, nous cherchons notre Dieu, et que nous lui sacrifions, depuis le temps d'Asaradan, roi des Assyriens, qui nous a transportés ici.
bayaki epai ya Zorobabeli mpe bakambi ya mabota; balobaki na bango: — Botika ete tosunga bino na mosala ya kotonga Tempelo oyo, pamba te biso mpe tolukaka Nzambe na bino mpe tobonzelaka Ye mbeka wuta na tango ya Esari-Adoni, mokonzi ya Asiri, oyo amemaki biso awa.
3 Et Zorobabel, et Josué, et le reste des chefs de famille d'Israël, leur répondirent: Ce n'est pas avec vous que nous bâtirons un temple à notre Dieu; car, nous seuls, tous ensemble, nous bâtirons au Seigneur notre Dieu, comme nous l'a prescrit Cyrus, roi des Perses.
Kasi Zorobabeli, Jozue mpe bakambi mosusu ya mabota ya Isalaele bazongisaki: — Bokotonga te elongo na biso Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso; tokotonga yango biso moko mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, kolanda mitindo ya Sirisi, mokonzi ya Persi.
4 Et le peuple de la terre affaiblissait les mains de Juda, et il l'empêchait de bâtir.
Bato ya bikolo oyo ezalaki elongo na bango kati na mboka balembisaki bato ya Yuda nzoto mpe babangisaki bango mpo ete bakoba lisusu te kotonga;
5 Et des gens, salariés pour nuire aux fils de Juda, complotèrent pour ruiner leurs desseins, tant que vécut Cyrus, jusqu'au règne de Darius, roi des Perses.
bapesaki bapesi toli kanyaka mpo ete batelemela mpe babebisa mabongisi na bango na nzela ya batoli ya mabe, na mikolo nyonso ya Sirisi kino na oyo ya Dariusi, bango mibale bakonzi ya Persi.
6 Au commencement du règne d'Assuérus, ils écrivirent une lettre contre ceux qui habitaient Jérusalem et Juda.
Kaka na ebandeli ya bokonzi ya Kizerisesi, batindelaki ye mokanda mpo na kofunda bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi.
7 Et, durant les jours d'Arthasastha, Tabéel écrivit une lettre bienveillante à Mithradate et aux autres serviteurs; le collecteur des impôts écrivit à Arthasastha, roi des Perses, une lettre en syriaque avec la traduction.
Bongo na mikolo ya Aritakizerisesi lokola mokonzi ya Persi, Bishilami, Mitredati, Tabeyeli mpe baninga na bango ya mosala bakomelaki Aritakizerisesi mokanda. Bakomaki yango na makomi mpe na lokota ya Arami.
8 Rheum le chancelier, et Samsa le scribe, écrivirent aussi une lettre contre Jérusalem au roi Arthasastha.
Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda na ye, bakomelaki mokonzi Aritakizerisesi mokanda oyo na tina na Yelusalemi:
9 Voici ce que jugent Rhéum le chancelier, Samsa le scribe, et le reste de ceux qui, avec nous, sont tes serviteurs: les Dinéens, les Apharsathachéens, les Tharphaléens, les Apharséens, les Arechyéens, les Babyloniens, les Susanachéens, les Davéens,
« Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda, elongo na baninga na bango, basambisi mpe bakambi ya bato ya Dini, ya Arifarisataki, ya Taripeli, ya Afarasi, ya Ereki, ya Babiloni, ya Size, ya Deya, ya Elami,
10 Et les autres nations que le grand et vénérable Assenaphar a transportées dans les villes de Samarie; celles qui résident sur le territoire en deçà du fleuve.
mpe bato ya bikolo mosusu oyo Asuribanipali, mokonzi monene mpe mokonzi ya lokumu, amemaki na bowumbu mpo na kotia bango kati na engumba Samari mpe kati na bituka nyonso ya ngambo ya weste ya ebale Efrate. »
11 Suit la teneur de la lettre qu'ils envoyèrent: À Arthasastha, roi, ses serviteurs, en deçà du fleuve:
Tala maloba oyo batindelaki ye na mokanda: « Epai ya mokonzi Aritakizerisesi. Maloba kowuta na biso basali na yo, bato ya ngambo ya weste ya ebale Efrate.
12 Que le roi sache que les Juifs qui sont partis de son territoire pour cette terre sont arrivés à Jérusalem, ville rebelle et méchante, qu'ils la rebâtissent, qu'ils en ont restauré les remparts, et qu'ils les ont élevés au-dessus des fondations.
Tika ete mokonzi ayeba ete Bayuda oyo bawutaki epai na yo bakomi kati na biso, na Yelusalemi; bazali kotonga engumba ya batomboki mpe ya bato ya mobulu, bazali kotonga bamir mpe kobongisa lisusu miboko.
13 Que le roi sache bien qu'aussitôt leur ville reconstruite et leurs murs réparés, ils cesseront d'être tes tributaires, ils ne donneront rien; et ainsi, ils feront tort aux rois;
Tika ete mokonzi ayeba lisusu ete, soki engumba oyo etongami lisusu mpe babongisi bamir na yango, bakofuta lisusu te mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela; na bongo, bomengo ya mokonzi ekokita.
14 Et il ne nous est point possible de voir le roi outragé; c'est pourquoi nous avons envoyé un message pour instruire le roi,
Sik’oyo, lokola tozwi libaku ya kosala epai ya mokonzi mpe lokola ezali malamu te mpo na biso komona lokumu ya mokonzi kobebisama, totindi sango oyo mpo na kotalisa makambo oyo epai ya mokonzi
15 Afin que l'on regarde dans le livre des archives de tes pères, où tu trouveras et tu apprendras que cette ville est une ville rebelle, qu'elle fait tort aux rois et aux royaumes, qu'il y a toujours eu chez elle des esclaves fugitifs, et que c'est pour cela qu'elle a été dépeuplée.
mpo ete baluka kati na babuku ya bakonzi oyo bazalaki liboso na yo mpo na kososola malamu. Okomona solo kati na babuku yango ete engumba oyo ezali engumba ya batomboki, etungisaka bakonzi mpe bituka. Mpe lisusu, wuta kala, ezali esika ya batomboki. Yango wana engumba oyo ebebisamaki.
16 Nous déclarons donc au roi que, si cette ville est rebâtie, si ses remparts sont relevés, il n'y aura plus de paix pour toi.
Tozali koyebisa mokonzi ete soki batongi lisusu engumba oyo mpe babongisi bamir na yango, okotikala lisusu na eloko moko te na ngambo ya weste ya ebale Efrate. »
17 Et le roi envoya dire à Rhéum le chancelier, à Samsa le scribe, et à ses serviteurs qui habitaient en Samarie et en deçà du fleuve: La paix;
Mokonzi azongisaki eyano oyo: « Epai ya moyangeli Rewumi; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango mosusu ya mosala oyo bavandaka na Samari mpe kati na bituka nyonso na ngambo ya weste ya ebale Efrate: Napesi bino mbote.
18 Le collecteur des impôts que vous nous avez envoyé a été appelé devant moi.
Batangaki mpe babongolaki na miso na ngai mokanda oyo botindelaki biso.
19 Et j'ai fait un édit; puis, nous avons examiné, et nous avons trouvé que cette ville de tout temps s'est soulevée contre les rois; que la rébellion, que la désertion y résident.
Napesaki mitindo mpo ete baluka koyeba mpe kososola bosolo. Boye emonani solo ete, wuta na kala, engumba oyo etombokelaka kaka bakonzi mpe etindaka bato na botomboki mpe na mobulu.
20 Or, il y a eu en Jérusalem des rois puissants; ils ont maîtrisé toute la contrée au delà de l'Euphrate; d'abondants revenus et des impôts leur ont été payés.
Na Yelusalemi, ezalaki na bakonzi ya nguya oyo bazalaki kokonza etuka mobimba ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe epai ya banani bazalaki kofuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela.
21 Maintenant donc, faites un édit pour suspendre le travail de ces hommes; cette ville ne sera plus rebâtie.
Boye, bopesa sik’oyo mitindo epai ya bato wana ete bakoba lisusu te kotonga mpo ete engumba wana etongama lisusu te kino tango ngai moko nakopesa mitindo.
22 Soyez attentifs à maintenir cet édit; ne vous en relâchez point, de peur qu'un jour le mal ne s'y aggrave au détriment du roi.
Bosala keba ete bozwa likambo oyo na pete te. Mpo na nini kotika nzela ete mobulu oyo ekola mpe ekitisa bomengo ya mokonzi? »
23 Le collecteur des impôts d'Arthasastha, roi, lut donc cette lettre devant Rhéum le chancelier, Samsa le scribe, et les autres serviteurs du roi, et ils allèrent en toute hâte à Jérusalem et en Juda avec des troupes et de la cavalerie, et ils arrêtèrent les travaux du peuple.
Tango kaka batangaki mokanda ya mokonzi Aritakizerisesi liboso ya Rewumi; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango ya mosala bakendeki mbala moko na Yelusalemi epai ya Bayuda mpe bapekisaki bango na makasi ete bakoba lisusu te kotonga.
24 Ainsi, la reconstruction du temple de Dieu fut suspendue à Jérusalem, et on ne la reprit qu'à la seconde année du règne de Darius.
Wuta tango wana, misala ya Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi etelemaki kino na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, mokonzi ya Persi.

< Esdras 4 >