< Exode 38 >

1 Et Beseléel fit l'arche.
Betisaleyeli asalaki na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo ya bambeka ya kotumba; ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano; bongo bosanda na yango ezalaki ya metele moko na basantimetele tuku mitano.
2 Il la revêtit d'or pur au dedans et au dehors.
Asalaki maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko; mpe abambaki bronze na etumbelo.
3 Et, pour elle, il jeta en fonte quatre anneaux d'or, deux d'un côté, deux de l'autre côté,
Asalaki na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto.
4 Assez larges pour qu'en y passant les leviers, on pût enlever l'arche.
Asalaki motalaka ya bronze mpo na etumbelo; akangisaki bapete minei ya bronze na basonge nyonso minei ya motalaka.
5 Au-dessus de l'arche, il fit le propitiatoire en or pur,
Asalaki na bronze bapete minei oyo atiaki na basonge nyonso minei ya motalaka mpo na koyamba mabaya.
6 Avec les deux chérubins d'or,
Asalaki na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe abambaki yango bronze.
7 L'un des chérubins sur l'un des bords du propitiatoire, l'autre chérubin sur l'autre bord
Boye, mpo na komema etumbelo, bakotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo. Bongo etumbelo yango ezalaki polele kati na yango.
8 Ombrageant de leurs ailes la surface du propitiatoire.
Asalaki lisusu na bronze ya bitalatala ya basi oyo bazalaki kosangana na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani: sani monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango.
9 Il fit, pour être placé devant l'arche, la table; en or pur
Tala ndenge atongaki lopango ya Mongombo: ngambo ya sude oyo ezalaki ya bametele pene tuku mitano na molayi, ezipamaki na rido ya lino oyo basali bilamba basalaki.
10 Et, pour elle, il jeta en fonte quatre anneaux, deux sur l'un des côtés, deux sur l'autre côté, Assez larges pour qu'en y passant les leviers, on pût enlever la table.
Makonzi na yango tuku mibale mpe bivandelo tuku mibale esalemaki na bronze; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata.
11 Il fit les leviers de l'arche et de la table, et il les revêtit d'or.
Ngambo ya nor ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ezalaki na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ezalaki ya palata.
12 Il fit aussi en or les vases de la table, les assiettes, les encensoirs, les urnes à puiser les libations, les coupes à les répandre.
Ngambo ya weste ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe barido elongo na makonzi zomi, makolo zomi, bibende ya palata egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela.
13 Et il fit, pour porter la lumière, le chandelier d'or, à tige droite inflexible,
Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse.
14 avec les branches sortant de ses deux côtés;
Ngambo moko ya ekuke ezalaki na barido ya bametele pene sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
15 Les fleurs tenant aux branches, qui étaient trois à droite et trois à gauche, semblables les unes aux autres,
Ngambo mosusu ya ekuke ezalaki mpe na barido ya bametele pene sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
16 Et leurs petites lampes, posant sur leurs extrémités, façonnées comme des noix, avec les becs qui en sortent pour en être les foyers lumineux, et le septième bec, sur la pointe extrême du chandelier, en or massif.
Barido nyonso zingazinga ya lopango ezalaki ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango.
17 Et les sept lampes d'or, reposant sur le chandelier, avec leurs mouchettes d'or, et leurs récipients en or.
Makolo ya makonzi ezalaki ya bronze; bibende egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata. Makonzi nyonso ya lopango ezalaki na biloko ya palata ya kosimbela.
18 Il revêtit d'argent les colonnes; il jeta en fonte les colonnes, les anneaux d'or; il revêtit d'or les leviers, ainsi que les colonnes du voile intérieur, il fit les attaches d'or,
Rido ya ekuke ya lopango ezalaki ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. Molayi na yango ezalaki na bametele pene zomi, mpe bosanda na yango, bametele pene mibale na basantimetele pene tuku mitano, ndenge barido nyonso ya lopango ezalaki.
19 Et il fit les boucles d'or du tabernacle, les boucles du parvis, et les boucles d'airain pour tendre la couverture extérieure;
Ezalaki mpe na makonzi minei mpe bivandelo minei ya bronze. Bibende na yango oyo egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela rido ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata.
20 il jeta en fonte les chapiteaux d'argent du tabernacle, les chapiteaux d'airain de la porte du tabernacle et de la porte du parvis; il fit aussi les attaches d'argent sur les colonnes qu'il avait revêtues d'argent.
Bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ezalaki ya bronze.
21 Et il fit les piquets du tabernacle, et les piquets du parvis, tous en airain.
Tala motuya ya biloko oyo basalelaki Mongombo oyo, kati na yango, ezalaki na buku ya Boyokani, ndenge kaka Moyize atindaki. Balevi batongaki yango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.
22 Il fit l'autel d'airain, avec les encensoirs d'airain, qui avaient appartenu aux hommes de la troupe de Coré.
Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, ya libota ya Yuda, asalaki nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.
23 Et il fit les vases de l'autel avec son foyer, sa base, les coupes et les crochets d'airain.
Asungamaki na Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, mosali mpe motongi bililingi na maboko, oyo azalaki kobimisa makanisi mpe kotonga bililingi na bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko.
24 Il fit aussi pour l'autel une devanture en forme de grillage, au-dessous du foyer, descendant jusqu'à la moitié de l'autel, et il adapta quatre anneaux aux quatre angles supérieurs de cette devanture de l'autel; assez larges pour qu'en y passant les leviers, on pût enlever l'autel;
Wolo nyonso oyo basalelaki mpo na kotonga mpe mpo na misala nyonso ya Mongombo, wolo oyo babonzelaki Yawe, ezalaki bakilo nkoto moko mpe bagrame nkama moko na tuku mibale, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Wolo nyonso wana ewutaki na makabo ya kotombola.
25 Il fit encore l'huile sainte de l'onction, et composa l'encens: œuvre pure de l'art du parfumeur.
Palata oyo bazwaki na maboko ya bato oyo batangamaki na lisanga, ezalaki bakilo nkoto misato mpe bagrame nkama minei na tuku minei, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo.
26 Il fit le réservoir d'airain et sa base d'airain, avec l'airain des miroirs des femmes, qui jeûnèrent devant la porte du tabernacle le jour où il le dressa.
Elingi koloba ete moto nyonso oyo batangaki amemaki bagrame mitano na badesigrame sambo, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Bato nyonso oyo batangamaki, oyo bazalaki na mibu ya mbotama tuku mibale mpe koleka, bazalaki nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.
27 Il fit le réservoir, afin que Moïse et Aaron et ses fils s’y lavassent les pieds et les mains, avant d'entrer dans le tabernacle du témoignage ou de monter à l'autel pour exercer le sacerdoce; ils s'y lavaient comme le Seigneur l'avait prescrit à Moïse.
Basalelaki bakilo ya palata nkoto misato na nkama minei na tuku mibale mpo na kosala bivandelo nkama moko ya Mongombo mpe barido nkama moko: elingi koloba ete basalelaki bakilo pene tuku misato na minei mpe bagrame pene nkama mibale mpo na evandelo moko.
Shekeli nkoto moko na nkama sambo na tuku sambo na mitano oyo etikalaki, basalelaki yango bibende oyo egumbama lokola ndobo, biloko ya kosimbela rido mpe balatiselaki yango basonge ya makonzi.
Bronze oyo ewutaki na makabo ya kotombola ezalaki bakilo pene nkoto mibale na nkama minei na tuku mibale na moko.
Bazwaki yango mpo na kosala bivandelo ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, etumbelo ya bronze elongo na motalaka na yango mpe bisalelo na yango nyonso.
Basalelaki yango lisusu bivandelo nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya lopango ya Mongombo, bivandelo ya ekotelo na yango, bapike nyonso ya Mongombo mpe bapike oyo ezingelaki lopango.

< Exode 38 >