< Deutéronome 3 >
1 Et nous nous remîmes en marche, en suivant la route de Basan, et Og, roi de Basan, sortit à notre rencontre avec son peuple pour nous combattre en Edraï
Sima, tobalukaki mpe tokendeki na nzela ya Bashani. Bongo Ogi, mokonzi ya Bashani, elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kokutana na biso mpe babundisaki biso na Edreyi.
2 Et le Seigneur me dit: Ne le crains pas, je l'ai livré à tes mains avec tout son peuple et son territoire; traite-le comme tu as traité Séhon, roi des Amorrhéens, qui résidait en Esebon.
Yawe alobaki na ngai: « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye na maboko na yo elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. »
3 Et le Seigneur notre Dieu nous le livra, lui et tout son peuple; nous le battîmes si complètement, que rien ne reste de sa race.
Boye Yawe, Nzambe na biso, akabaki lisusu Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe mampinga na ye nyonso, na maboko na biso; mpe tobomaki bango, totikaki ata moto moko te.
4 En ce temps-là, nous nous rendîmes maîtres de toutes ses villes; il n'y en eut pas une que nous ne prîmes: les soixante villes et tout le territoire d'Argob, possession du roi Og de Basan,
Na tango wana, tobotolaki bingumba na ye nyonso, totikaki ata engumba moko te kati na bingumba tuku motoba na etando ya Arigobi kati na mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.
5 Toutes villes fortes, avec de hautes murailles, des portes et des barrières, nous les détruisîmes, outre les villes des Phérézéens, qui étaient très-nombreuses,
Bingumba wana nyonso ezalaki ya kotongama makasi mpe ezalaki na bamir ya milayi mpe na bikuke oyo bakangaka na bibende mpe ezalaki lisusu na bamboka ebele oyo ezanga bamir.
6 Comme nous avions détruit celles de Séhon, roi d'Esebon; nous détruisîmes tour à tour chaque ville, nous exterminâmes femmes et enfants,
Boye, tobukaki yango nyonso ndenge tosalaki epai ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni. Tango tobukaki bingumba na ye, tobomaki mibali, basi mpe bana na ye.
7 Ainsi que tout le bétail. Et nous prîmes pour notre butin toute la dépouille des villes.
Kasi tomemaki mpo na biso bibwele mpe bomengo ya bitumba oyo tobotolaki na bingumba.
8 En ce temps nous devînmes maîtres, à la place des deux rois amorrhéens, de toute la rive gauche du Jourdain, depuis le torrent d'Arnon jusqu'à Hermon.
Boye, na tango wana, tozwaki na maboko ya bakonzi mibale ya bato ya Amori, mokili oyo ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, wuta na lubwaku ya Arinoni kino koleka ngomba Erimoni.
9 (Les Phéniciens nomment Hermon Sanior, et les Amorrhéens Sanir.)
Bato ya Sidoni babengaka ngomba Erimoni Sirioni mpe bato ya Amori babengaka yango Seniri.
10 Nous prîmes toutes les villes de Misor avec tout Galaad, et tout Basan, jusqu'à Esga et Edraï, villes du royaume de Og en Basan.
Tozwaki bingumba nyonso ya etando, Galadi nyonso mpe Bashani nyonso kino koleka bingumba ya Salika mpe ya Edreyi, bingumba ya Bashani epai wapi Ogi azalaki koyangela.
11 Og, roi de Basan, était seul resté de la race de Raphaïm: son lit était de fer; on le voit dans la citadelle des fils d'Ammon; il a de long neuf coudées d'homme adulte sur quatre de large.
Nzokande Ogi, mokonzi ya Bashani, atikalaki kaka ye moko na bomoi kati na bato ya Refayimi. Mbeto na ye ezalaki ya bibende; molayi na yango ezalaki na bametele pene minei mpe mokuse na yango, bametele pene mibale. Mbeto yango ezali kino lelo na engumba Raba ya bato ya Amoni.
12 Et nous héritâmes de cette terre en ce temps-là, à partir d'Aroer, qui est sur le bord du torrent d'Arnon: j'ai donné à Ruben et à Gad la moitié de la montagne de Galaad et ses villes.
Na tango wana, tobotolaki mokili yango. Napesaki epai ya bato ya libota ya Ribeni mpe ya libota ya Gadi mokili oyo ezalaki wuta na Aroeri, kati na lubwaku ya Arinoni kino ndambo ya etuka ya bangomba ya Galadi mpe bingumba na yango.
13 J'ai donné à la demi-tribu de Manassé le reste de Galaad, et tout Basan, royaume de Og, et tout le territoire d'Argob, toute cette partie de Basan; cette terre est réputée terre de Raphaïm.
Ndambo oyo etikalaki na Galadi mpe nyonso mosusu ya Bashani, mokili ya Ogi, napesaki yango na ndambo ya libota ya Manase: Mokili nyonso ya Arigobi, oyo ezali na Bashani, eyebanaki lokola mokili ya bato ya Refayimi.
14 Jair, fils de Manassé, a pris tous les alentours d'Argob jusqu'aux confins de Gessari et de Machathi, et il leur a donné, d'après son nom, le nom de Thanoth-Jaïr, que porte aujourd'hui le royaume de Basan.
Yairi, mokitani ya Manase, abotolaki etuka nyonso ya Arigobi kino na mondelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati. Apesaki bamboka yango kombo na ye. Yango wana kino lelo babengaka Bashani bamboka ya Yairi.
15 Et j'ai donné Galaad à Machir.
Mpe napesaki Galadi epai ya Makiri.
16 A Ruben et à Gad, j'ai donné le territoire au-dessous de Galaad, jusqu'au torrent d'Arnon; ils ont pour limite, de ce côté, le milieu du torrent, et ils s'étendent jusqu'à Jaboc; le torrent les sépare des fils d'Ammon.
Kasi epai ya mabota ya Ribeni mpe ya Gadi, napesaki etando oyo ebanda wuta na Galadi, ekenda na lubwaku ya Arinoni mpe esalaki mondelo kino na ebale ya Yaboki oyo esalaki mondelo na mokili ya Amoni.
17 Ils ont en outre Araba; et la limite qui les sépare de Machénéreth est le Jourdain, jusqu'à la mer d'Araba ou mer Salée, sous Asedoth ou Phasga, du coté de l'orient;
Mondelo na yango ya weste ezalaki Yordani: wuta na Kinereti kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, na se ya bangomba ya Pisiga na ngambo ya este.
18 Or, en ce temps, je vous dis: Le Seigneur notre Dieu vous a donné cette terre en partage; mais que vos hommes forts prennent les armes, qu'ils marchent à l'avant-garde de vos frères, fils d'Israël;
Na tango wana, napesaki bino mitindo oyo: « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino mokili oyo mpo ete bokamata yango. Kasi bato na bino nyonso oyo bazali na makoki ya kobunda balata bibundeli mpe baleka liboso ya bandeko na bino bana ya Isalaele.
19 Que vos femmes, vos enfants et votre bétail, que je sais être très- nombreux, demeurent seuls dans les villes que je vous ai données.
Bobele basi na bino, bana na bino mpe ebele ya bibwele na bino nde bakotikala na bingumba oyo napesaki bino
20 Jusqu'à ce que le Seigneur notre Dieu ait établi et fixé vos frères comme vous, et qu'ils se soient pareillement partagé le territoire que le Seigneur notre Dieu leur donne au delà du Jourdain; alors vous reviendrez chacun dans l'héritage que je vous ai distribué.
kino tango Yawe akopesa bopemi epai ya bandeko na bino ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino bango lisusu bakozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango na ngambo mosusu ya Yordani. Sima na yango, bokozonga, moko na moko, na mabele oyo napesaki bino. »
21 Et en ce temps-là, je dis à Josué: Le peuple a vu de ses yeux comment le Seigneur notre Dieu a traité ces deux rois; c'est ainsi que le Seigneur notre Dieu traitera tous les royaumes contre lesquels tu marcheras de l'autre côté du fleuve.
Na tango wana, nalobaki na Jozue: « Omonaki yo moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai na bakonzi oyo mibale; akosala kaka ndenge moko na bikolo nyonso epai wapi bokoleka.
22 N'aie d'eux aucune crainte, parce que le Seigneur notre Dieu combattra pour vous.
Bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, Ye moko akobundela bino. »
23 Et, en ce temps-là, je fis au Seigneur cette prière:
Na tango wana, nabondelaki Yawe:
24 Seigneur Dieu, vous avez commencé à montrer à votre serviteur, votre force, votre puissance, votre main robuste et votre bras très-haut; car quel dieu y a-t-il dans le ciel et sur la terre pour faire ce que vous avez fait, et avec autant de vigueur?
— Oh Nkolo Yawe, obandaki kolakisa monene na Yo mpe nguya na Yo epai ya mosali na Yo. Pamba te nzambe nini na likolo mpe na se akoki kosala misala minene mpe makambo ya kokamwa lokola oyo Yo osali?
25 Je passerai donc le fleuve, et je verrai cette bonne terre au delà du Jourdain, cette montagne fertile et l'Anti-Liban?
Nabondeli Yo, yokela ngai mawa mpo ete nakatisa Yordani mpo namona mokili oyo ya kitoko na ngambo mosusu, etuka kitoko ya bangomba mpe Libani.
26 Mais le Seigneur, à cause de vous, ne me regarda point, il ne m'exauça pas; il me dit: C'est assez, ne continue pas un tel discours.
Kasi likolo na bino, Yawe asilikelaki ngai mpe aboyaki koyoka ngai. Alobaki na ngai: — Ekoki boye! Koloba na ngai lisusu likambo wana te.
27 Monte sur la cime du roc, lève les yeux à l'occident, au nord, au midi et à l'orient, vois de tes yeux, mais tu ne passeras pas le Jourdain,
Mata na songe ya ngomba Pisiga mpe tala na ngambo ya weste, na nor, na sude mpe na este. Tala kaka mokili na miso kasi okotikala kokatisa Yordani te.
28 Donne mes ordres à Josué; fortifie-le, et encourage-le; car c'est lui qui traversera le fleuve devant le peuple; c'est lui qui leur partagera la terre que tu auras vue.
Pesa mitindo na Jozue, pesa ye makasi mpe lendisa ye; pamba te ye nde akokamba bato oyo mpe akosala ete bazwa lokola libula mokili oyo ozali komona.
29 Et nous campâmes dans la vallée près du temple de Phégor.
Bongo tovandaki na lubwaku oyo etalani na Beti-Peori.