< 2 Rois 15 >
1 En la vingt-septième année du règne de Jéroboam en Israël, Azarias, fils d'Amasias, monta sur le trône de Juda.
Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi, Azaria, mwana mobali ya Amatsia, akomaki mokonzi ya Yuda.
2 Il avait seize ans quand il devint roi, et il régna cinquante-deux ans à Jérusalem; sa mère se nommait Jéchélie de Jérusalem.
Azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yekolia. » Yekolia azalaki moto ya Yelusalemi.
3 Et il fit ce qui était droit aux yeux du Seigneur; il fit tout ce qu'avait fait son père Amasias.
Azaria asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Amatsia, tata na ye, asalaki.
4 Mais il ne détruisit point les hauts lieux, et le peuple offrit encore des sacrifices et brûla de l'encens sur les hauts lieux.
Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.
5 Or, le doigt du Seigneur avait touché le roi, et il fut lépreux jusqu'à sa mort, et il passa son règne dans une maison séparée; Joatham, fils du roi, régissait le palais, et jugeait le peuple de la terre promise.
Yawe abetaki mokonzi, mpe mokonzi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Boye akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika. Yotami, mwana mobali ya mokonzi, oyo azalaki mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili.
6 Quant au reste de l'histoire d'Azarias, n'est-il pas écrit au livre des Faits et gestes des rois de Juda.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Azaria mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
7 Et Azarias s'endormit avec ses pères; on l'ensevelit auprès d'eux en la ville de David, et Joatham, son fils, régna à sa place.
Azaria akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi; mpe Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
8 En la trente-huitième année du règne d'Azarias en Juda, Zacharias, fils de Jéroboam, commença en Samarie un règne qui dura six mois.
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Zakari, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari; mpe akonzaki basanza motoba.
9 Et il fit le mal aux yeux du Seigneur comme avaient fait ses pères; il ne se retira point des péchés où Jéroboam, fils de Nabat, avait fait tomber Israël.
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge bakoko na ye basalaki. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
10 Et Sellum, fils de Jabès, et d'autres conspirèrent contre lui; ils le frappèrent devant le peuple et le tuèrent; et Sellum régna à sa place.
Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, asalelaki Zakari likita, abundisaki ye liboso ya bato, abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi.
11 Le reste de l'histoire de Zacharie est écrit au livre des Faits et gestes des rois d'Israël.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Zakari, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
12 Le Seigneur avait dit à Jéhu: Tes fils se maintiendront sur le trône d'Israël jusqu'à la quatrième génération. Et sa parole s'accomplit.
Boye nde Liloba oyo Yawe alobaki na Jewu ekokisamaki: « Bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. »
13 Sellum, fils de Jabès, fut proclamé roi; en la trente-neuvième année du règne d'Azarias en Juda, Sellum commença à Samarie un règne qui ne dura qu'un mois.
Tango Oziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, akomaki mokonzi. Akonzaki na Samari sanza moko.
14 Car, Manahem, fils de Gaddi, vint de Tharsila, entra dans Samarie, et y frappa Sellum, fils de Jabès, et il le tua.
Bongo Menayeme, mwana mobali ya Gadi, alongwaki na Tiritsa mpe akendeki na Samari. Abundisaki Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, na Samari; abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi.
15 Le reste de l'histoire de Sellum et sa révolte sont écrits au livre des faits et gestes des rois d'Israël.
Makambo mosusu oyo etali Shalumi, misala na ye mpe likita oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
16 Alors, Manahem dévasta Thersa, tout ce qu'elle contenait et tout son territoire, parce que cette ville lui avait fermé ses portes; il en fit le sac, et il fit avorter des femmes enceintes.
Na tango wana, Menayeme abundisaki engumba Tifisa, abomaki bato nyonso ya engumba mpe abebisaki zingazinga na yango, kobanda na Tiritsa, pamba te baboyaki kofungolela ye bikuke ya engumba na bango. Abebisaki engumba yango mpe atobolaki mabumu ya basi nyonso ya zemi.
17 En la trente-neuvième année du règne d'Azarias en Juda, Manahem, fils de Gaddi, commença en Samarie un règne qui dura dix ans.
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Menayeme, mwana mobali ya Gadi, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki na Samari mibu zomi.
18 Et il fit le mal aux yeux du Seigneur, et il ne se retira pas des péchés où Jéroboam, fils de Nabat, avait fait tomber Israël.
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Na tango nyonso ya bokonzi na ye, atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
19 Pendant son règne, Phua, roi des Assyriens, envahit la terre; et Manahem lui donna mille talents d'argent pour qu'il fût son allié.
Bongo Puli, mokonzi ya Asiri, akotaki na makasi kati na mboka, mpe Menayeme apesaki ye bakilo ya palata, nkoto tuku misato na minei mpo ete Puli asunga ye na kolendisa bokonzi na ye.
20 Et Manahem leva cet argent en Israël, sur tout homme riche, lui prenant cinquante sicles pour les donner au roi des Assyriens; Phua s'en retourna, et il ne resta point dans la terre promise.
Menayeme azwaki palata yango na Isalaele. Mozwi nyonso asengelaki kofuta mpako ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano mpo ete bapesa yango epai ya mokonzi ya Asiri. Na bongo, mokonzi ya Asiri alongwaki na mokili mpe azongaki epai na ye.
21 Quant au reste de l'histoire de Manahem, n'est-il pas écrit au livre des Faits et gestes des rois d'Israël?
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Menayeme mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
22 Et Manahem s'endormit avec ses pères, et son fils Phaceïa régna à sa place.
Menayeme akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Pekakia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
23 En la cinquantième année du règne d'Azarias en Juda, Phaceïa commença en Samarie un règne qui dura deux ans.
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na bokonzi, Pekakia, mwana mobali ya Menayeme, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari, mpe akonzaki mibu zomi na mibale.
24 Et il fit le mal aux yeux du Seigneur; il ne se retira pas des péchés où Jéroboam avait fait tomber Israël.
Pekakia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
25 Et Phacée, fils de Romélie, un de ses grands officiers, conspira contre lui; il le frappa dans Samarie devant le palais du roi, avec Argob; Arias et cinquante hommes des quatre cents étaient avec lui; il le tua et il régna à sa place.
Moko kati na bakonzi na ye ya basoda, Peka, mwana mobali ya Remalia, asalelaki ye likita. Na lisungi ya bato tuku mitano ya Galadi, Peka abomaki Pekakia kati na ndako ya mokonzi, na Samari, na lisungi ya Arigobi mpe Arie. Boye Peka abomaki Pekakia mpe akitanaki na ye na bokonzi.
26 Le reste de l'histoire de Phaceïa est écrit au livre des Faits et gestes des rois d'Israël.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Pekakia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
27 En la cinquante-deuxième année du règne d'Azarias en Juda, Phacée, fils de Romélie, commença en Samarie un règne qui dura vingt ans.
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na mibale na bokonzi, Peka, mwana mobali ya Remalia, akomaki mokonzi ya Isalaele, na Samari; mpe akonzaki mibu tuku mibale.
28 Il fit le mal aux yeux du Seigneur; il ne se retira pas des péchés où Jéroboam, fils de Nabat, avait fait tomber Israël.
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
29 Sous le règne de Phacée, roi d'Israël, Theglath-Phalasar, roi des Assyriens, vint prendre Aïon, Abel, Thamaacha, Anioch, Cenez, Asor, Galaan, la Galilée, toute la terre de Nephthali, et il emmena les habitants chez les Assyriens.
Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.
30 Alors, Osée, fils d'Ela, trama un complot contre Phacée, fils de Romélie; il le frappa, le tua, et régna à sa place en la vingtième année de Joatham, fils d'Azarias.
Bongo Oze, mwana mobali ya Ela, asalaki likita mpo na kotelemela Peka, mwana mobali ya Remalia. Abundisaki ye mpe abomaki ye, bongo akitanaki na ye na bokonzi tango Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akokisaki mibu tuku mibale na bokonzi.
31 Le reste de l'histoire de Phacée est écrit au livre des Faits et gestes du roi d'Israël.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Peka mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
32 En la seconde année du règne de Phacée en Israël, Joatham, fils d'Azarias, devint roi de Juda.
Tango Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mibale na bokonzi, Yotami, mwana mobali ya Oziasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
33 Il avait vingt-cinq ans lorsqu'il monta sur le trône, et il régna seize ans à Jérusalem; sa mère se nommait Jerusa, fille de Sadoc.
Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki.
34 Et il fit ce qui est droit aux yeux du Seigneur, comme avait fait Azarias, son père.
Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki.
35 Mais il ne détruisit point les hauts lieux; le peuple faisait encore des sacrifices et brûlait de l'encens sur les hauts lieux; ce fut lui qui bâtit la porte supérieure du temple.
Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. Ezali Yotami nde atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe.
36 Quant au reste de l'histoire de Joatham, n'est-il pas écrit au livre des Faits et gestes des rois de Juda?
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
37 En ces jours-là, le Seigneur commença d'envoyer contre Juda, Rasin, roi de Syrie, et Phacée, fils de Romélie.
Na mikolo wana, Yawe abandaki kotinda Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mpo na kobundisa Yuda.
38 Et Joatham s'endormit avec ses pères; il fut enseveli auprès d'eux en la ville de David, son aieul; et Achaz, son fils, régna à sa place.
Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.