< Zacharie 4 >
1 L’Ange qui conversait avec moi revint; il me réveilla comme un homme qu’on réveillerait de son sommeil.
Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamusaki ngai ndenge balamusaka moto oyo alali pongi.
2 Et il me dit: "Que vois-tu?" Je répondis: "Je vois un chandelier tout en or son récipient sur son sommet, ses sept lampes alignéeset sept conduits pour les lampes qui en couronnent le sommet.
Atunaki ngai: — Ozali komona nini? Nazongiselaki ye: — Nazali komona etelemiselo moko ya mwinda, basala na wolo mpe, na likolo na yango, ezali na kopo moko, minda sambo mpe batio sambo oyo elekisaka mafuta kino na minda.
3 Puis, deux oliviers à ses côtés, l’un à droite du récipient, l’autre à gauche."
Ezali lisusu na banzete mibale ya olive pene ya etelemiselo ya minda: moko na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi.
4 Je repris et je dis à l’ange qui conversait avec moi: "Qu’est-ce que ces choses, Seigneur?"
Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai: — Nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai?
5 L’Ange qui conversait avec moi me répondit: "Quoi! Tu ne sais donc pas ce que signifient ces choses?" Je répondis: "Non, Seigneur!"
Azongiselaki ngai: — Boni, oyebi te soki elingi kolakisa nini? Nazongiselaki ye: — Te, nkolo na ngai!
6 Il reprit et me parla en ces termes: "Ceci est la parole de l’Eternel à Zorobabel: Ni par la puissance ni par la force, mais bien par mon esprit! dit l’Eternel-Cebaot.
Alobaki na ngai: — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli: « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
7 Qu’es-tu, grande montagne, devant Zorobabel? une simple plaine. Qu’il amène la pierre du faîte au milieu des acclamations: "Qu’elle est belle! Qu’elle est belle!"
Ozali nani, ngomba monene? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo: « Tika ete Nzambe apambola yango! Tika ete Nzambe apambola yango! »
8 La parole de l’Eternel me fut adressée en ces termes:
Bongo Yawe alobaki na ngai:
9 "Les mains de Zorobabel ont fondé cette maison, et ses mains l’achèveront, afin que tu reconnaisses que c’est l’Eternel-Cebaot qui m’a envoyé vers vous.
— Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.
10 Car qui mépriserait le jour de ces humbles commencements? Plutôt se réjouiront-ils de voir la pierre du niveau dans la main de Zorobabel. Ces sept-là sont les yeux de l’Eternel qui parcourent toute la terre."
Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.
11 Je pris la parole et lui dis: "Qu’est-ce que ces deux oliviers à droite et à gauche du chandelier?"
Natunaki Anjelu: — Banzete mibale ya olive oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali mpe ya mwasi ya etelemiselo ya minda elakisi nini?
12 Je repris pour la seconde fois et lui dis: "Qu’est-ce que ces deux branches d’olivier à côté des deux tuyaux d’or qui laissent couler le liquide doré?"
Natunaki ye lisusu: — Bitape mibale ya nzete ya olive, oyo ezali pembeni ya batio mibale ya wolo oyo ebimisaka mafuta oyo engalaka elakisi nini?
13 Il me répondit en ces termes: "Quoi! Tu ne sais pas ce qu’elles signifient? Non, Seigneur!" répliquai-je.
Azongiselaki ngai: — Boni, oyebi te soki elakisi nini? Nazongisaki: — Te, nkolo na ngai.
14 Alors, il dit: "Ce sont les deux hommes consacrés par l’huile, qui se tiennent auprès du Maître de toute la terre!"
Boye, alobaki: — Ezali nde bato mibale oyo bapakolami mafuta mpo na kosalela Nkolo ya mokili mobimba.