< Proverbes 11 >
1 Des balances fausses sont en horreur à l’Eternel; des poids justes, voilà ce qu’il aime.
Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkele na miso ya Yawe, kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye.
2 Vienne l’orgueil, le déshonneur le suit; la sagesse est avec les humbles.
Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka, kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka.
3 L’Intégrité des justes est leur guide; la perversion des gens sans foi est leur ruine.
Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango, kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka na boyengebene te ebebisaka bango.
4 La fortune ne sert de rien au jour de la colère; mais la vertu sauve de la mort.
Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa.
5 La vertu de l’homme intègre aplanit sa voie; l’impie tombe par son impiété.
Bosembo ya moto oyo atambolaka alima ekomisaka nzela na ye sembo, kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko.
6 La vertu des gens de bien est leur sauvegarde, mais les gens sans foi sont pris au piège de leur malice.
Bosembo ya bato oyo batambolaka alima ekangolaka bango, kasi bato oyo batambolaka na boyengebene te bakweyaka na motambo ya baposa na bango.
7 La mort met fin à l’espoir du méchant et anéantit l’attente des violents.
Soki moto mabe akufi, elikya na ye mpe ekufi; boye, elikya nyonso oyo etiami na bomengo na ye mpe ekufi.
8 Le juste échappe à la détresse, et le méchant prend sa place.
Moto ya sembo akokangolama na pasi, mpe moto mabe akomona pasi na esika ya moto ya sembo.
9 L’Impie ruine son prochain avec sa bouche, mais les justes sont préservés par leur expérience.
Moto ya mbindo abebisaka moninga na ye na maloba ya monoko na ye, kasi boyebi ekokangola bato ya sembo.
10 Que les justes soient heureux, la cité est en joie; que les méchants périssent, ce sont des transports.
Tango bato ya sembo bapambolamaka, engumba esepelaka; mpe tango moto mabe akufaka, bato bagangaka na esengo.
11 La bénédiction des bons fait la grandeur de la ville; la bouche des méchants en cause la chute.
Engumba etongamaka na nzela ya mapamboli ya bato ya sembo, kasi ebebisamaka na nzela ya monoko ya bato mabe.
12 Rabaisser son prochain, c’est manquer de sens; l’homme avisé se tait.
Moto oyo atiolaka moninga na ye azangi mayele, kasi moto ya mayele avandaka kimia.
13 Celui qui colporte des commérages divulgue les secrets; l’homme loyal sait les tenir cachés.
Moto oyo aswanaka abimisaka basekele, kasi moto oyo azali na molimo ya sembo abombaka basekele.
14 Faute de direction, un peuple tombe; son salut réside dans la multitude de ses conseillers.
Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya; kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli.
15 Qui garantit pour un étranger s’en trouvera fort mal; qui hait les engagements ne court pas de risque.
Moto oyo abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya akomona solo pasi, kasi moto oyo aboyaka kozwa bikateli akozala na kimia.
16 La femme gracieuse conquiert les hommages, les gens à poigne conquièrent la richesse.
Mwasi ya malamu azwaka lokumu, mpe bato ya makasi bazwaka bomengo.
17 L’Homme bon assure son propre bonheur, mais l’homme cruel se prépare des tourments.
Moto oyo asalelaka bato bolamu amisalelaka nde bolamu, kasi moto na kanza amimonisaka pasi.
18 Le méchant fait une œuvre vaine; mais qui sème la justice récolte une vraie récompense.
Moto mabe asalaka mosala na lokuta, kasi moto oyo alonaka na bosembo akozwa lifuti ya malonga.
19 La vertu est un gage de vie; qui poursuit le mal court à la mort.
Lokola bosembo ememaka na bomoi, moto oyo alandaka nzela ya mabe alandaka nde nzela ya kufa.
20 L’Eternel a en horreur les cœurs tortueux, mais il aime les gens intègres.
Bato ya kilikili bazalaka nkele na miso ya Yawe, kasi bato oyo bazangi pamela basepelisaka Ye.
21 Haut la main! Le méchant ne reste pas impuni, mais la race des justes échappe à tout danger.
Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama.
22 Un anneau d’or au groin d’un porc, telle est une belle femme dépourvue de jugement.
Mwasi ya kitoko, kasi azangi mayele, azali lokola lopete ya wolo na zolo ya ngulu.
23 Le désir des justes ne vise qu’au bien; l’espoir des méchants n’est que débordement.
Baposa ya moto ya sembo esukaka kaka malamu, nzokande elikya ya moto mabe ezelaka kaka kanda ya Nzambe.
24 Tel est prodigue de son bien et le voit s’augmenter; tel est économe plus que de raison et s’appauvrit.
Moto oyo akabaka na motema malamu azwaka mingi koleka, mpe moto oyo abombaka kaka akomaka mobola.
25 L’Âme généreuse jouira de l’abondance; qui fait pleuvoir des bienfaits est lui-même arrosé.
Moto oyo akabaka akokoma na bomengo; mpe moto oyo apesaka bato mosusu mayi, ye mpe bakopesa ye mayi.
26 Accaparer le blé, c’est se faire maudire du peuple; mais ses bénédictions vont à qui le met en vente.
Moto oyo abombaka ble, bato bakolakela ye mabe; kasi lipamboli ezali epai na moto oyo akoteka yango.
27 Rechercher le bien, c’est rechercher l’affection; poursuivre le mal, c’est en devenir la victime.
Moto oyo alukaka kosala bolamu akozwa ngolu, kasi pasi ekomelaka moto oyo alukaka kosala mabe.
28 Qui se confie en sa richesse tombera, mais les justes sont florissants comme le feuillage.
Moto oyo atiaka elikya na bomengo na ye akokweya, kasi bayengebene bakozala kitoko lokola makasa ya sika.
29 Celui qui jette le trouble dans sa maison ne possédera que du vent; le sot devient l’esclave de l’homme sage.
Moto oyo akotisaka mobulu kati na ndako na ye akozwa mopepe lokola libula, mpe moto oyo azangi mayele akokoma mowumbu ya moto ya bwanya.
30 L’Œuvre du juste est un arbre de vie; gagner les cœurs est le fait du sage.
Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi, mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye.
31 Voyez, le juste obtient le prix de ses œuvres sur terre: combien plus encore le méchant et le pécheur!
Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki?