< Genèse 47 >
1 Joseph vint annoncer la nouvelle à Pharaon, en disant "Mon père et mes frères, avec leur menu et leur gros bétail et tout ce qu’ils possèdent, sont venus du pays de Canaan; et ils se trouvent dans la province de Gessen."
Jozefi akendeki mpe alobaki na Faraon: — Tata na ngai elongo na bandeko na ngai bayei wuta na mokili ya Kanana na bameme, bantaba, bangombe mpe biloko na bango nyonso; bazali sik’oyo na Gosheni.
2 Puis il prit une partie de ses frères, cinq hommes et il les mit en présence de Pharaon.
Jozefi aponaki bandeko na ye mitano mpe alakisaki bango epai ya Faraon.
3 Pharaon dit à ses frères: "Quelles sont vos occupations?" Ils répondirent à Pharaon: "Tes serviteurs sont une famille de bergers, de père en fils."
Faraon atunaki bandeko ya Jozefi: — Bosalaka mosala nini? Bazongiselaki Faraon: — Basali na yo bazali babateli bibwele ndenge kaka bakoko na biso bazalaki.
4 Et ils dirent à Pharaon: "Nous sommes venus émigrer dans ce pays, parce que le pâturage manque aux troupeaux de tes serviteurs, la disette étant grande dans le pays de Canaan. Donc, permets à tes serviteurs d’habiter dans la province de Gessen."
Balobaki lisusu na Faraon: — Toyei kovanda awa, pamba te nzala makasi ezali kati na mokili ya Kanana mpe matiti ezali lisusu te mpo na bibwele ya basali na yo; yango wana, tobondeli yo, pesa basali na yo nzela ya kovanda na Gosheni.
5 Pharaon dit à Joseph: "Ton père et tes frères sont venus auprès de toi.
Faraon alobaki na Jozefi: — Tata na yo mpe bandeko na yo bayei epai na yo;
6 Le pays d’Égypte est mis à ta disposition; établis, dans sa meilleure province, ton père et tes frères. Qu’ils habitent la terre de Gessen et si tu reconnais qu’il y ait parmi eux des hommes de mérite, nomme-les inspecteurs des bestiaux de mon domaine."
mokili ya Ejipito mpe ezali na maboko na yo. Vandisa tata na yo mpe bandeko na yo na eteni ya mabele oyo eleki kitoko; tika ete bavanda na Gosheni. Mpe soki oyebi kati na bango bato ya mayele, pesa bango mokumba ya kobatela bibwele na ngai.
7 Joseph introduisit Jacob son père et le présenta à Pharaon; et Jacob rendit hommage à Pharaon.
Jozefi amemaki tata na ye mpo na kolakisa ye epai ya Faraon. Tango Jakobi asilisaki kopambola Faraon,
8 Pharaon dit à Jacob: "Quel est le nombre des années de ta vie?"
Faraon atunaki Jakobi: — Ozali na mibu boni?
9 Et Jacob répondit à Pharaon: "Le nombre des années de mes pérégrinations, cent trente ans. II a été court et malheureux, le temps des années de ma vie et il ne vaut pas les années de la vie de mes pères, les jours de leurs pérégrinations."
Jakobi azongiselaki Faraon: — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.
10 Jacob salua Pharaon et se retira de devant lui.
Jakobi apambolaki Faraon mpe alongwaki liboso na ye.
11 Joseph établit son père et ses frères et leur donna droit de propriété dans le pays d’Égypte, dans le meilleur territoire, celui de Ramsès, comme l’avait ordonné Pharaon.
Jozefi avandisaki tata na ye mpe bandeko na ye na Ejipito mpe apesaki bango eteni ya mabele oyo eleki kitoko kati na mokili, na mabele ya Ramisesi, ndenge kaka Faraon atindaki.
12 Joseph nourrit son père, ses frères et toute la maison de son père, donnant des vivres selon les besoins de chaque famille.
Jozefi apesaki lisusu biloko ya kolia epai ya tata na ye, bandeko na ye mpe epai ya libota ya tata na ye mobimba kolanda motango ya bana na bango.
13 Or, le pain manqua dans toute la contrée, tant la disette était grande; et le pays d’Égypte et le pays de Canaan étaient accablés par la famine.
Biloko ya kolia ezalaki lisusu te kati na mokili mobimba mpe nzala makasi eyaki. Mokili ya Ejipito mpe oyo ya Kanana ekawukaki na nzala makasi.
14 Joseph recueillit tout l’argent qui se trouvait dans le pays d’Égypte et dans celui de Canaan, en échange du blé qu’ils achetaient et il fit entrer cet argent dans la maison de Pharaon.
Jozefi azwaki mbongo nyonso oyo azalaki kobomba tango bato ya mokili ya Ejipito mpe ya Kanana bazalaki kosomba ble epai na ye, amemaki yango na ndako ya Faraon.
15 Quand l’argent fut épuisé dans le pays d’Égypte et dans celui de Canaan, tous les Égyptiens s’adressèrent à Joseph, disant: "Donne-nous du pain; pourquoi péririons-nous sous tes yeux, faute d’argent?"
Tango mbongo ya bato ya Ejipito mpe ya Kanana esilaki, bato nyonso ya Ejipito bayaki epai ya Jozefi mpe balobaki: — Pesa biso biloko ya kolia! Mpo na nini tokufa na nzala na miso na yo? Mpo ete mbongo na biso esili?
16 Joseph répondit: "Livrez vos bestiaux, je veux vous en fournir contre vos bestiaux, si l’argent manque."
Jozefi azongisaki: — Soki bozali lisusu na mbongo te, bomemela ngai bibwele na bino. Bokopesa ngai bibwele na bino na esika ya mbongo.
17 Ils amenèrent leur bétail à Joseph et Joseph leur donna du pain en échange des chevaux, du menu bétail, du gros bétail et des ânes; ils les sustenta de nourriture, pour tout leur bétail, cette année-là.
Bamemaki epai ya Jozefi bampunda, bantaba mpe bangombe na bango; bongo Jozefi apesaki bango bilei na esika ya bampunda, ba-ane, bameme, bantaba mpe bangombe na bango. Na mibu nyonso wana oyo Jozefi azalaki kopesa bango bilei, bango bazalaki kopesa ye bibwele na bango.
18 Cette année écoulée, ils vinrent à lui l’année suivante et lui dirent: "Nous ne pouvons dissimuler à mon seigneur que, l’argent et le bétail ayant entièrement passé à mon seigneur, il ne nous reste à lui offrir que nos corps et nos terres.
Tango mibu wana esilaki, bayaki lisusu epai na ye na mibu oyo elandaki. Balobaki: — Tokoki kobombela nkolo na biso te ete mbongo na biso esili mpe bibwele na biso ekomi ya yo. Totikali lisusu na eloko moko te longola kaka banzoto na biso mpe mabele na biso.
19 Pourquoi péririons-nous à ta vue, nous et nos terres? Deviens notre possesseur et celui de nos terres, moyennant des vivres: nous et nos terres serons serfs de Pharaon; tu nous donneras de la semence et nous vivrons au lieu de périr et la terre ne sera pas désolée."
Mpo na nini, biso elongo na mabele na biso, tokufa na miso na yo? Somba biso kaka elongo na mabele na biso na motuya ya biloko ya kolia; mpe biso elongo na mabele na biso, tokokoma bawumbu ya Faraon. Toboyi na biso kokufa na nzala, pesa biso milona ya kolona mpo ete tobika mpe mabele na biso ekoma esobe te.
20 Joseph acquit tout le sol de l’Égypte au profit de Pharaon, les Égyptiens ayant vendu chacun leurs champs, contraints qu’ils étaient par la famine: ainsi la contrée appartint à Pharaon.
Jozefi asombaki mabele nyonso ya Ejipito mpo na Faraon, pamba te bato nyonso ya Ejipito batekaki bilanga na bango mpo ete nzala elekaki makasi. Boye mabele ekomaki ya Faraon.
21 A l’égard du peuple, il le transféra d’une ville dans l’autre, dans toute l’étendue du territoire égyptien.
Jozefi akomisaki bavandi ya bingumba nyonso ya Ejipito bawumbu ya Faraon.
22 Toutefois, le domaine des prêtres, il ne l’acquit point. Car les prêtres recevaient de Pharaon une portion fixe et ils consommaient la portion que leur allouait Pharaon, de sorte qu’ils ne vendirent pas leur domaine.
Kasi asombaki mabele ya banganga-nzambe te, pamba te bazalaki kozwa tango nyonso biloko ebele kolanda mobeko ya Faraon ete bazwaka biloko ya kolia. Yango wana, banganga-nzambe batekaki mabele na bango te.
23 Et Joseph dit au peuple: "Donc, je vous ai acheté aujourd’hui vous et vos terres pour Pharaon. Voici pour vous des grains, ensemencez la terre;
Jozefi alobaki na bato: — Nasombi bino lelo mpo na Faraon, bino mpe mabele na bino. Tala milona mpo na bino mpo ete bokoka kolona mabele.
24 puis, à l’époque des produits, vous donnerez un cinquième à Pharaon; les quatre autres parts vous serviront à ensemencer les champs et à vous nourrir ainsi que vos gens et vos familles."
Kasi tango bokobuka mbuma, bokopesa eteni ya mitano epai ya Faraon. Biteni minei oyo mosusu, bokobomba yango lokola milona mpo na bilanga mpe lokola biloko ya kolia mpo na bino moko, mpo na mabota na bino mpe mpo na bana na bino.
25 Ils répondirent: "Tu nous rends la vie! Puissions-nous trouver grâce aux yeux de mon seigneur et nous resterons serfs de Pharaon."
Bazongisaki: — Obikisi bomoi na biso! Lokola tozwi ngolu na miso na yo nkolo na biso, tokozala bawumbu ya Faraon.
26 Joseph imposa au sol de l’Égypte cette contribution, qui subsiste encore, d’un cinquième pour Pharaon. Le domaine des prêtres seuls était excepté, il ne relevait point de Pharaon.
Bongo Jozefi akomisaki yango mobeko kino lelo kati na mabele ya Ejipito: eteni ya mitano ya bambuma nyonso oyo ekowuta na mabele ezali mpo na Faraon. Kasi mabele ya Banganga-Nzambe ekomaki ya Faraon te.
27 Israël s’établit donc dans le pays d’Égypte, dans la province de Gessen; ils en demeurèrent possesseurs, y crûrent et y multiplièrent prodigieusement.
Boye bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito, na Gosheni. Kuna bakomaki na bozwi ebele, babotaki bana mpe bakomaki ebele.
28 Jacob vécut dans le pays d’Égypte dix sept ans; la durée de la vie de Jacob fut donc de cent quarante-sept années.
Jakobi awumelaki mibu zomi na sambo na Ejipito. Mpe mibu ya bomoi na ye ezalaki nkama moko na tuku minei na sambo.
29 Les jours d’Israël approchant de leur terme, il manda son fils Joseph et lui dit: "Si tu as quelque affection pour moi, mets, je te prie, ta main sous ma hanche pour attester que tu agiras envers moi avec bonté et fidélité, en ne m’ensevelissant point en Egypte.
Tango mokolo ya kufa ya Isalaele ekomaki pene, abengaki Jozefi, mwana na ye ya mobali, mpe alobaki na ye: — Soki nazwi ngolu na miso na yo, tia loboko na yo na se ya mopende na ngai; laka ngai ete okotalisa ngai bolamu mpe boyengebene, mpe okokunda ngai na Ejipito te.
30 Quand je dormirai avec mes pères, tu me transporteras hors de l’Égypte et tu m’enseveliras dans leur sépulcre." Il répondit: "Je ferai selon ta parole."
Kasi tango nakolala elongo na bakoko na ngai, okobimisa ngai na Ejipito mpe okokunda ngai na esika oyo bakunda bango. Jozefi azongisaki: — Nakosala ndenge olobi.
31 Il reprit: "Jure-le-moi" et il le lui jura; et Israël s’inclina sur le chevet du lit.
Bongo Jakobi alobaki lisusu: — Lapa ndayi mpo na kolakisa ete okosala ndenge olobi. Boye, Jozefi alapaki ndayi na miso na ye; mpe Isalaele agumbamaki na koyekama na moto ya mbeto na ye.