< Genèse 24 >

1 Or Abraham était vieux, avancé dans la vie; et l’Éternel avait béni Abraham en toutes choses.
Abrayami akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki. Yawe apambolaki ye na makambo nyonso.
2 Abraham dit au serviteur le plus ancien de sa maison, qui avait le gouvernement de tous ses biens: "Mets, je te prie, ta main sous ma hanche,
Abrayami alobaki na mosali na ye, oyo awumelaki mingi na ndako na ye mpe azalaki kokamba biloko na ye nyonso: — Tia loboko na yo na se ya mopende na ngai
3 pour que je t’adjure par l’Éternel, Dieu du ciel et de la terre, de ne pas choisir une épouse à mon fils parmi les filles des Cananéens avec lesquels je demeure,
mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango.
4 mais bien d’aller dans mon pays et dans mon lieu natal chercher une épouse à mon fils, à Isaac."
Kasi okokende na mokili na ngai mpe na libota na ngai, mpe okozwa mwasi moko mpo na Izaki, mwana na ngai ya mobali.
5 Le serviteur lui dit: "peut-être cette femme ne voudra-t-elle pas me suivre dans ce pays-ci: devrai-je ramener ton fils dans le pays que tu as quitté?"
Mosali atunaki ye: — Tango mosusu mwasi yango akolinga na ye te kolanda ngai na mokili oyo. Boni, nakoki na ngai kozongisa mwana na yo ya mobali na mokili epai wapi owuta?
6 Abraham lui répondit: "Garde toi d’y ramener mon fils!
Abrayami alobaki: — Keba na yo! Kozongisa mwana na ngai kuna te.
7 L’Éternel, le Dieu des cieux, qui m’a retiré de la maison de mon père et du pays de ma naissance; qui m’a promis, qui m’a juré en disant: "Je donnerai cette terre-ci à ta race", lui, il te fera précéder par son envoyé et tu prendras là-bas une femme pour mon fils.
Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana.
8 Que si cette femme ne consent pas à te suivre, tu seras dégagé du serment que je t’impose. Mais en aucune façon n’y ramène mon fils."
Soki mwasi yango aboyi na ye kolanda yo, wana okangolami na ndayi oyo nazali kosenga yo kolapa. Kasi komeka kozongisa mwana na ngai ya mobali kuna te.
9 Le serviteur posa sa main sous la hanche d’Abraham, son maître et lui prêta serment à ce sujet.
Boye, mosali atiaki loboko na se ya mopende ya Abrayami, nkolo na ye, alapaki ndayi ya kosala makambo yango.
10 Le serviteur prit dix chameaux parmi les chameaux de son maître et partit, chargé de ce que son maître avait de meilleur. II s’achemina vers Aram Double Fleuve, du côté de la ville de Nahor.
Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori.
11 II fit reposer les chameaux hors de la ville, près de la fontaine; c’était vers le soir, au temps où les femmes viennent puiser de l’eau.
Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi.
12 Et il dit: "Seigneur, Dieu de mon maître Abraham! daigne me procurer aujourd’hui une rencontre et sois favorable à mon maître Abraham.
Abondelaki: « Eh Yawe, Nzambe ya Abrayami, nkolo na ngai, longisa ngai na mokolo ya lelo mpe lakisa bolamu na Yo epai ya Abrayami, nkolo na ngai.
13 Voici, je me trouve au bord de la fontaine et les filles des habitants de la ville sortent pour puiser de l’eau.
Tala, natelemi pene ya libulu ya mayi mpe bana basi ya engumba bazali kobima mpo na koya kotoka mayi.
14 Eh bien! la jeune fille à qui je dirai: ‘Veuille pencher ta cruche, que je boive’ et qui répondra: ‘Bois, puis je ferai boire aussi tes chameaux’, puisses-tu l’avoir destinée à ton serviteur Isaac et puissé-je reconnaître par elle que tu t’es montré favorable à mon maître!"
Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye: ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai: ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. »
15 II n’avait pas encore fini de parler, que voici venir Rébecca, la fille de Bathuel, fils de Milka, épouse de Nahor, frère d’Abraham, sa cruche sur l’épaule.
Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami.
16 Cette jeune fille était extrêmement belle; vierge, nul homme n’avait encore approché d’elle. Elle descendit à la fontaine, emplit sa cruche et remonta.
Elenge mwasi azalaki kitoko penza, ayebaki nanu nzoto ya mibali te; ata mobali moko te asangisaki na ye nzoto. Akitaki na libulu ya mayi, atondisaki mbeki na ye mpe amataki.
17 Le serviteur courut au-devant d’elle et dit: "Laisse-moi boire, s’il te plaît, un peu d’eau à ta cruche."
Mosali akimaki mbangu mpo na kokutana na ye mpe alobaki: — Nabondeli yo, tika ngai namela ndambo ya mayi na mbeki na yo.
18 Elle répondit: "Bois, seigneur." Et vite elle fit glisser sa cruche jusqu’à sa main et elle lui donna à boire.
Mwana mwasi alobaki: — Mela na yo, nkolo na ngai! Akitisaki mbeki mbangu na maboko na ye mpe apesaki ye mpo ete amela.
19 Après lui avoir donné à boire, elle dit: "Pour tes chameaux aussi je veux puiser de l’eau, jusqu’à ce qu’ils aient tous bu."
Sima na kopesa ye mayi ya komela, alobaki: — Nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo nyonso kino ekosilisa komela.
20 Et elle se hâta de vider sa cruche dans l’abreuvoir, courut de nouveau à la fontaine pour puiser et puisa ainsi pour tous les chameaux.
Asalaki na lombangu mpe asopaki mayi nyonso ya mbeki na ye na esika oyo banyama emelelaka mayi; akimaki lisusu na libulu mpe atokaki mayi mpo na bashamo na ye nyonso.
21 Et cet homme, émerveillé, la considérait en silence, désireux de savoir si l’Éternel avait béni son voyage ou non.
Mosali azalaki kotala ye na bokebi, alobaki eloko moko te mpo na koyeba soki Yawe alongisi mobembo na ye to te.
22 Lorsque les chameaux eurent fini de boire, cet homme prit une boucle en or, du poids d’un béka et deux bracelets pour ses bras, du poids de dix sicles d’or;
Tango bashamo esilisaki komela mayi, mosali azwaki lopete moko ya wolo, oyo batiaka na zolo mpe ezalaki ya bagrame motoba. Azwaki mpe basheneti mibale ya wolo: moko na moko ezalaki na bagrame koleka nkama moko.
23 et il dit: "De qui es-tu fille? daigne me l’apprendre. Y a-t-il dans la maison de ton père de la place pour nous loger?"
Atunaki ye: — Ozali mwana mwasi ya nani? Nabondeli yo, yebisa ngai. Boni, esika ekoki komonana na ndako ya tata na yo mpo na biso mpo ete tolekisa kuna butu?
24 Elle lui répondit: "Je suis la fille de Bathuel, fils de Milka, qui l’a enfanté à Nahor;"
Azongiselaki ye: — Nazali mwana ya Betweli, mwana mobali ya Milika mpe Naori.
25 Elle lui dit encore: "II y a chez nous de la paille et du fourrage en abondance et de la place pour loger."
Abakisaki: — Tozali na matiti mpe biloko ebele ya koleisa bibwele; tozali mpe na esika mpo na yo mpo ete olekisa butu.
26 L’Homme s’inclina et se prosterna devant l’Éternel
Boye, mosali akitisaki moto na ye na se mpe agumbamelaki Yawe.
27 et iI dit: "Beni soit l’Éternel, Dieu de mon maître Abraham, qui n’a pas retiré sa faveur et sa fidélité à mon maître!"
Alobaki: « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai! »
28 La jeune fille courut dans la chambre de sa mère et raconta ces choses.
Elenge mwasi akimaki mbangu na ndako mpe alobaki epai ya mama na ye makambo oyo elekaki.
29 Or, Rébecca avait un frère nommé Laban. Laban accourut auprès de l’homme qui se tenait dehors, près de la fontaine.
Rebeka azalaki na ndeko moko ya mobali oyo kombo na ye ezalaki « Labani. » Ye mpe abimaki mbangu mpo na kokutana na mosali ya Abrayami kuna na libulu ya mayi.
30 Lorsqu’il vit la boucle et les bracelets aux bras de sa sœur; lorsqu’il entendit sa sœur Rébecca dire: "Ainsi m’a parlé cet homme", il était allé vers lui. Celui-ci attendait près des chameaux, au bord de la fontaine.
Tango kaka amonaki lopete oyo batiaki na zolo mpe basheneti na maboko ya ndeko na ye ya mwasi, mpe ayokaki Rebeka koloba makambo oyo mosali alobaki mpo na ye, akendeki epai ya mosali mpo ete amonaki ye ya kotelema pene ya bashamo, pembeni ya libulu ya mayi.
31 Laban lui dit: "Viens, bien-aimé du Seigneur! pourquoi restes-tu dehors, lorsque j’ai préparé la maison et qu’il y a place pour les chameaux?"
Alobaki: « Yaka na ndako na biso, yo oyo opambolama na Yawe. Mpo na nini otelemi awa na libanda? Nabongisi ndako mpe esika mpo na bashamo. »
32 L’Homme entra dans la maison et déchargea les chameaux; on apporta de la paille et du fourrage pour les chameaux et de l’eau pour laver ses pieds et les pieds des hommes qui l’accompagnaient.
Boye mosali ya Abrayami akotaki na ndako ya Labani, mpe bakitisaki biloko oyo ezalaki na likolo ya bashamo. Bamemaki bashamo na ye na esika oyo ezalaki na matiti mpe bilei ya banyama. Bamemaki mpe mayi mpo na ye mpe mpo na bato oyo bazalaki elongo na ye mpo ete basukola makolo.
33 On lui servit à manger; mais il dit: "Je ne mangerai point, que je n’aie dit ce que j’ai à dire." On lui répondit: "Parle."
Batielaki ye lisusu biloko ya kolia, kasi alobaki: — Nakoki kolia te kino nakosilisa koloba makambo nyonso oyo nazali na yango. Labani alobaki na ye: — Yebisa biso makambo yango.
34 Et il dit: "Je suis le serviteur d’Abraham.
Azongisaki: — Nazali mosali ya Abrayami.
35 L’Éternel a béni grandement mon maître, de sorte qu’il est devenu puissant: il lui a accordé menu et gros bétail, argent et or, esclaves mâles et femelles, chameaux et ânes.
Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi: apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo.
36 Sara, l’épouse de mon maître, a enfanté, vieille déjà, un fils à mon maître; celui-ci lui a fait don de tous ses biens.
Sara, mwasi ya nkolo na ngai, na kimobange na ye, abotelaki nkolo na ngai mwana mobali, mpe nkolo na ngai apesaki biloko na ye nyonso epai ya mwana yango.
37 Or, mon maître m’a adjuré en disant: ‘Tu ne prendras point une épouse à mon fils parmi les filles des Cananéens, dans le pays desquels je réside.
Nzokande, nkolo na ngai alapisaki ngai ndayi na maloba oyo: « Kati na bana basi ya Kanana epai wapi nazali kovanda, okozwela mwana na ngai mwasi awa te.
38 Non; mais tu iras dans la maison de mon père, dans ma famille et là tu choisiras une épouse à mon fils.’
Kasi okokende na libota ya tata na ngai mpe na ekolo na ngai, kuna nde okozwa mwasi mpo na mwana na ngai ya mobali. »
39 Et je dis à mon maître ‘Peut-être cette femme ne me suivra-t-elle pas?’
Nazongiselaki nkolo na ngai: « Tango mosusu, mwasi yango akolinga na ye kolanda ngai te. »
40 Il me répondit: ‘L’Éternel, dont j’ai toujours suivi les voies, placera son envoyé à tes côtés et il fera prospérer ton voyage et tu prendras une femme pour mon fils dans ma famille, au foyer de mon père.
Mpe ye alobaki na ngai lisusu: « Yawe oyo natambolaki liboso na Ye akotinda anjelu na Ye elongo na yo mpe akolongisa mobembo na yo mpo ete ozwela mwana na ngai ya mobali mwasi oyo akowuta na ekolo na ngai mpe na libota ya tata na ngai.
41 Alors tu seras libéré de mon serment, puisque tu seras allé dans ma famille; pareillement, s’ils te refusent, tu. seras libéré de ce serment.’
Boye tango okokende na ekolo na ngai, soki baboyi kopesa yo ye, okozala na ngambo te na ndayi oyo nalapisi yo. »
42 Or, aujourd’hui, je suis arrivé près de la fontaine et j’ai dit: ‘Éternel, Dieu de mon maître Abraham! veux-tu, de grâce, faire réussir la voie où je marche?
Nzokande lelo, tango nakomaki na libulu ya mayi, nasambelaki: « Oh Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, nabondeli Yo, longisa mobembo na ngai.
43 Eh bien! je suis arrêté au bord de cette fontaine: s’il arrive qu’une jeune fille vienne pour puiser, que je lui dise: ‘Donne moi, je te prie, à boire un peu d’eau de ta cruche’
Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye: ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo? ›
44 et qu’elle me réponde: ‘Non seulement bois toi-même, mais pour tes chameaux aussi je veux puiser’, que ce soit là la femme que l’Éternel agrée pour le fils de mon maître.
Mpe ye akozongisela ngai: ‹ Mela na yo, mpe nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo, › tika ete ye nde azala mwasi oyo Yawe aponi mpo na mwana mobali ya nkolo na ngai. »
45 Je n’avais pas encore achevé de parler en moi-même, voici que Rébecca s’est approchée, sa cruche sur l’épaule; elle est descendue à la fontaine et a puisé et je lui ai dit: ‘Donne-moi, s’il te plait à boire.’
Liboso ete nasilisa kosambela kati na motema na ngai, Rebeka abimaki na mbeki na lipeka na ye. Akitaki na libulu ya mayi mpe atokaki mayi. Nalobaki na ye: « Nabondeli yo, pesa ngai mayi ya komela. »
46 Aussitôt elle a oté sa cruche de dessus son épaule, en disant: ‘Bois et puis j’abreuverai tes chameaux.’
Akitisaki mbangu mbeki na ye wuta na lipeka na ye mpe alobaki: « Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo. » Boye namelaki mayi, mpe amelisaki lisusu bashamo mayi.
47 Je l’ai interrogée, disant: ‘De qui es-tu fille?’ Elle a répondu: ‘De Bathuel, fils de Nahor, que Milka a enfanté à celui-ci.’ Alors j’ai passé la boucle à ses narines et les bracelets à ses bras.
Natunaki ye: « Ozali mwana mwasi ya nani? » Azongisaki: « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye.
48 Et je me suis incliné et prosterné devant l’Éternel; et j’ai béni l’Éternel, Dieu de mon maître Abraham, qui m’a dirigé dans la vraie voie, en me faisant choisir la parente de mon maître pour son fils.
Nakitisaki elongi na se mpe nagumbamelaki Yawe; nakumisaki Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, oyo atambolisaki ngai na nzela ya sembo mpo na kozwela mwana na ye ya mobali mwana mwasi ya ndeko ya nkolo na ngai.
49 Et maintenant, si vous voulez agir avec affection et justice envers mon maître, dites-le moi; sinon, dites-le moi, afin que je me dirige à droite ou à gauche."
Mpe sik’oyo, boyebisa ngai soki bokosalela nkolo na ngai bolamu mpe boyengebene. Soki te, boyebisa ngai mpo ete naluka nzela mosusu.
50 Pour réponse, Laban et Bathuel dirent: "La chose émane de Dieu même! nous ne pouvons te répondre ni en mal ni en bien.
Labani mpe Betweli bazongisaki: — Makambo oyo nyonso ewuti epai na Yawe. Tozali na likambo mosusu te ya koloba na yo.
51 Voici Rébecca à ta disposition, prends-la et pars; et qu’elle soit l’épouse du fils de ton maître, comme l’a décidé l’Éternel."
Tala Rebeka, azali liboso na yo! Kamata ye mpe kende na ye; mpe tika ete azala mwasi ya mwana mobali ya nkolo na yo, ndenge Yawe abongisi.
52 Le serviteur d’Abraham, ayant entendu leurs paroles, se prosterna à terre en l’honneur de l’Éternel;
Tango mosali ya Abrayami ayokaki makambo oyo bayebisaki ye, akitisaki elongi na ye kino na se liboso ya Yawe.
53 puis il étala des bijoux d’argent, des bijoux d’or et des parures, les donna à Rébecca et donna des objets de prix à son frère et à sa mère.
Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye.
54 Ils mangèrent et burent, lui et les gens qui l’accompagnaient et passèrent la nuit en ce lieu; quand ils furent levés le lendemain, il dit "Laissez-moi retourner chez mon maître."
Sima na yango, mosali ya Abrayami mpe bato oyo bazalaki elongo na ye baliaki, bamelaki mpe balekisaki butu kati na ndako wana. Na tongo, tango balamukaki, mosali ya Abrayami alobaki na bango: — Botika ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
55 Le frère et la mère de Rébecca répondirent: "Que la jeune fille reste avec nous quelque temps, au moins une dizaine de jours, ensuite elle partira."
Ndeko mobali mpe mama ya Rebeka bazongisaki: — Tika ete elenge mwasi atikala nanu elongo na biso mikolo zomi, sima nde bokoki kokende.
56 II leur répliqua: "Ne me retenez point, puisque Dieu a fait réussir mon voyage; laissez-moi partir, que je retourne chez mon maître."
Kasi alobaki na bango: — Bowumisa ngai te, pamba te Yawe alongisi mobembo na ngai; botika ngai kokende mpo ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
57 Ils dirent: "Appelons la jeune fille et demandons son avis."
Balobaki na ye: — Tika ete tobenga elenge mwasi mpe totuna posa na ye.
58 ils appelèrent Rébecca et lui dirent "Pars-tu avec cet homme?" Elle répondit: "Je pars"
Babengaki Rebeka mpe batunaki ye: — Ondimi solo kokende na mobali oyo? Rebeka azongisaki: — Iyo, nandimi.
59 ils laissèrent partir Rébecca leur sœur et sa nourrice, le serviteur d’Abraham et ses gens.
Boye batikaki ndeko na bango ya mwasi Rebeka ete akende elongo na mama oyo asungaka ye, na mosali ya Abrayami elongo na bato na ye.
60 Et ils bénirent Rébecca en lui disant "Notre sœur! puisses-tu devenir des milliers de myriades! et puisse ta postérité conquérir la porte de ses ennemis!"
Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye: « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango! »
61 Rébecca et ses suivantes se levèrent, se placèrent sur les chameaux et suivirent cet homme; le serviteur emmena Rébecca et partit.
Boye Rebeka elongo na basali na ye ya basi batelemaki, bamataki likolo ya bashamo mpe balandaki mosali ya Abrayami. Bongo mosali ya Abrayami akamataki Rebeka mpe bakendeki na ye nzela moko.
62 Or, Isaac revenait de visiter la source du Vivant qui me voit; il habitait la contrée du Midi.
Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi.
63 Isaac était sorti dans les champs pour se livrer à la méditation, à l’approche du soir. En levant les yeux, il vit que des chameaux s’avançaient.
Na pokwa, Izaki akendeki na bilanga mpo na kozwa tango ya kokanisa na bozindo. Tango atombolaki miso, amonaki bashamo kopusana pene ya esika oyo azalaki.
64 Rébecca, levant les yeux, aperçut Isaac et se jeta à bas du chameau;
Tango Rebeka mpe atombolaki miso, amonaki Izaki mpe akitaki wuta na shamo na ye.
65 et elle dit au serviteur: "Quel est cet homme, qui marche dans la campagne à notre rencontre?" Le serviteur répondit: "C’Est mon maître." Elle prit son voile et s’en couvrit.
Atunaki mosali ya Abrayami: — Nazali komona mobali moko kati na bilanga, azali koya kokutana na biso; azali nani? Mosali ya Abrayami azongisaki: — Azali nkolo na ngai. Bongo Rebeka azwaki vwale na ye mpe amizipaki na elongi.
66 Le serviteur rendit compte à Isaac de tout ce qu’il avait fait.
Mosali ya Abrayami ayebisaki Izaki makambo nyonso oyo asalaki.
67 lsaac la conduisit dans la tente de Sara sa mère; il prit Rébecca pour femme et il l’aima et il se consola d’avoir perdu sa mère.
Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye.

< Genèse 24 >