< Genèse 20 >
1 Abraham quitta ce lieu pour la contrée du Midi; il s’établit entre Cadès et Chour et séjourna à Gherar.
Abrayami alongwaki na mboka wana mpo na kokende na etuka ya Negevi mpe avandaki na mboka oyo ezalaki kati ya Kadeshi mpe Shuri; sima na tango moke, akendeki kovanda na Gerari.
2 Abraham disait de Sara, sa femme: "Elle est ma sœur": Abimélec, roi de Gherar, envoya prendre Sara.
Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye: « Azali ndeko na ngai ya mwasi! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi.
3 Le Seigneur visita Abimélec dans un songe nocturne et lui dit: "Tu vas mourir, à cause de cette femme que tu as prise et qui est en puissance de mari."
Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye: « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. »
4 Or, Abimélec n’avait pas approché d’elle. II dit: "Seigneur! frapperais-tu donc aussi un peuple innocent?
Nzokande, Abimeleki apusanaki nanu te pembeni na ye. Agangaki: — Nkolo, okoboma penza ekolo ata soki esali na yango mabe te?
5 Quoi! ne m’a-t-il pas dit: ‘Elle est ma sœur?’ et elle, elle aussi, a dit: ‘II est mon frère.’ C’Est avec un cœur innocent et des mains pures que j’ai agi ainsi."
Ezali mobali na ye moko nde alobaki: « Azali ndeko na ngai ya mwasi; » mpe ye moko andimaki: « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo.
6 Dieu lui répondit dans le songe: "Moi aussi je savais que tu avais agi ainsi dans la simplicité de ton cœur et j’ai voulu, de mon côté, te préserver de m’offenser; aussi ne t’ai-je pas permis d’approcher d’elle.
Nzambe alobaki na ye na ndoto: — Solo, nayebi ete osali yango na motema sembo. Yango wana nabatelaki yo mpo ete osala lisumu te epai na Ngai, mpe natikaki te ete osimba ye.
7 Et maintenant, restitue l’épouse de cet homme, car il est prophète; il priera pour toi et tu vivras. Que si tu ne la rends pas, sache que tu mourras, toi et tous les tiens!"
Sik’oyo, zongisa mwasi yango epai ya mobali na ye mpo ete azali mosakoli. Akobondela mpo na yo mpe okokufa te. Soki ozongisi ye te, yeba ete okokufa, yo mpe bato na yo nyonso.
8 Abimélec se leva de bonne heure, appela tous ses serviteurs et leur fit entendre toutes ces choses; ces hommes furent fort effrayés.
Na tongo-tongo, Abimeleki alamukaki mpe abengisaki basali na ye nyonso. Tango ayebisaki bango makambo oyo ekomelaki ye, babangaki makasi.
9 Abimélec manda Abraham et lui dit "Que nous as-tu fait! et qu’avais-je commis envers toi, pour que tu exposasses moi et mon royaume à un péché grave? Tu as fait à mon égard des choses qui ne doivent point se faire!"
Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye: — Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te.
10 Abimélec dit encore à Abraham: "Qu’avais-tu en vue, en agissant de la sorte?"
Abimeleki atunaki Abrayami: — Makanisi nini ozalaki na yango mpo ete osala boye?
11 Abraham répondit: "C’Est que je pensais: ‘Pour peu que la crainte de Dieu ne règne pas dans ce pays, ils me tueront à cause de ma femme.
Abrayami azongisaki: — Namilobelaki: « Solo, bato ya esika oyo batosaka Nzambe ata moke te mpe bakoboma ngai mpo na mwasi na ngai.
12 Et d’ailleurs, de fait, elle est ma sœur, la fille de mon père, mais non la fille de ma mère et elle m’appartient comme épouse.
Lisusu, azali ya solo ndeko na ngai ya mwasi, mwana ya tata na ngai; kasi azali mwana ya mama na ngai te. Nzokande akoma mwasi na ngai. »
13 Or, lorsque Dieu me fit errer loin de la maison de mon père, je lui dis: ‘Voici la grâce que tu me feras. Dans tous les lieux où nous irons, dis que je suis ton frère."
Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai: « Tala bolamu oyo okosalela ngai: Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai: ‹ Azali ndeko na ngai. › »
14 Abimélec choisit des pièces de menu et de gros bétail, des esclaves mâles et femelles, en fit présent à Abraham et lui restitua Sara son épouse.
Boye Abimeleki azwaki bameme, bantaba, bangombe, basali ya mibali mpe ya basi, apesaki na Abrayami. Mpe azongiselaki ye mwasi na ye Sara.
15 Et il lui dit: "Voici mon territoire devant toi, établis-toi où bon te semblera."
Abimeleki alobaki: « Mboka na ngai ezali liboso na yo, vanda na esika oyo olingi. »
16 Et à Sara il dit: "Voici, j’ai donné mille pièces d’argent à ton parent: certes! il est pour toi comme un voile contre quiconque t’approcherait; tous, tu peux les regarder en face."
Abalukaki mpe alobaki lisusu epai na Sara: « Tala, napesi mbongo ya bibende, nkoto moko, epai ya ndeko na yo ya mobali. Ezali mpo na kozipa mabe oyo basali yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na yo; boye okomi sembo na nyonso. »
17 Abraham intercéda auprès de Dieu, qui guérit Abimélec, sa femme et ses servantes, de sorte qu’elles purent enfanter.
Abrayami abondelaki Nzambe, mpe Nzambe abikisaki Abimeleki, mwasi na ye, mpe basi bawumbu na ye. Na nzela wana, bazwaki lisusu bana;
18 Car Dieu avait fermé toute matrice dans la maison d’Abimélec, à cause de Sara, épouse d’Abraham.
pamba te Yawe akangaki mabota kati na ndako mobimba ya Abimeleki likolo ya Sara, mwasi ya Abrayami.