< Ézéchiel 26 >
1 II arriva dans la onzième année, le premier du mois, que la parole de l’Eternel me fut adressée en ces termes:
Na mobu ya zomi na moko, na mokolo ya liboso ya sanza, Yawe alobaki na ngai:
2 "Fils de l’homme, parce que Tyr s’est écriée au sujet de Jérusalem: Ah! Elle est brisée, celle qui était la porte des nations! Mon tour est venu: je vais être comblée, puisqu’elle est ruinée,
« Mwana na moto, lokola Tiri alobaki mpo na kotiola Yelusalemi: ‹ Ozwi! Ekuke ya bikolo ebukani! Bikuke na yango efungwami mpo na kotondisa ngai na bomengo! Lokola esili kobebisama, Ngai sik’oyo, nakofuluka! ›
3 c’est pourquoi, ainsi parle le Seigneur Dieu: Voici que je m’en prends à toi, Tyr; je soulèverai contre toi des nations nombreuses comme la mer soulève ses vagues.
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh engumba ya Tiri, natombokeli yo! Nakotindela yo bikolo ebele lokola mbonge ya ebale monene, mpo ete eya kobundisa yo.
4 Elles détruiront les remparts de Tyr et démoliront ses tours; je la dénuderai de sa poussière et je ferai d’elle une roche aride.
Bakobuka bamir ya Tiri mpe bakokweyisa bandako na yango ya milayi; mpe Ngai, nakolongola putulu na yango nyonso mpe nakotika yango mabanga ya pamba.
5 Elle deviendra un étendoir à filets au milieu de la mer, car c’est moi qui parle, dit le Seigneur Dieu, et elle sera une proie pour les nations.
Engumba Tiri ekokoma, kati na ebale monene, esika oyo balobi mbisi bakobanda kotanda minyama na bango mpo na kokawusa yango. Ezali Ngai nde nasili koloba, elobi Nkolo Yawe; engumba Tiri ekokoma bomengo ya bitumba ya bikolo,
6 Et ses filles qui sont dans la campagne seront massacrées par le glaive; ainsi ils sauront que je suis l’Eternel.
mpe bakoboma na mopanga bamboka ya mike-mike oyo ezalaka pembeni ya ebale monene. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
7 Oui, ainsi parle le Seigneur Dieu, je vais, du Nord, amener contre Tyr Nabuchodonosor, roi de Babylone, le roi des rois, avec des chevaux, des chars, des cavaliers, une grande multitude et un peuple nombreux.
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Wuta na nor, nakotindela Tiri Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mokonzi ya bakonzi: akoya elongo na bampunda mpe bashar, basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda mpe mampinga monene ya basoda;
8 Tes filles qui sont dans la campagne, il les fera périr par l’épée, et contre toi il élèvera des retranchements, jettera des redoutes et dressera des boucliers.
akobebisa na mopanga bingumba na yo, oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, akozingela yo, akotimola mabulu ya kobombamela zingazinga ya bamir na yo mpe akotombola banguba na ye mpo na kobundisa yo.
9 Les coups de son bélier, il les assénera sur tes remparts, et tes tours, il les brisera par ses armes.
Akotindela bamir na yo makonga ya basoda na ye, oyo batambolaka likolo ya bampunda mpe akobuka bandako na yo ya milayi na nzela ya bibundeli na ye ya nguya.
10 Grâce à la multitude de ses chevaux, il te couvrira de leur poussière; du bruit des cavaliers, des roues et des chars tes murailles trembleront, quand il entrera par tes portes comme on entre dans une ville éventrée.
Bampunda na ye ekozala ebele penza kino putulu na yango ekozipa yo; bamir na yo ekoningana na makelele ya bampunda ya bitumba, ya bapine mpe ya shar, tango akokota na bikuke na yo ndenge bato bakotaka kati na engumba oyo bamir na yango ezali na madusu.
11 Sous les sabots de ses chevaux il foulera toutes tes rues, ta population, il la tuera par l’épée, et les monuments de ta puissance tomberont à terre.
Makolo ya bampunda na ye ekokota na babalabala na yo nyonso, akoboma bato na yo na mopanga, mpe makonzi oyo esalaka makasi na yo ekokweya na mabele.
12 Ils pilleront tes richesses, feront main basse sur tes marchandises; ils démoliront tes murailles et abattront tes maisons de plaisance; tes pierres, tes bois et ta poussière, ils les jetteront dans l’eau.
Bakobotola lokola bomengo ya bitumba bozwi mpe biloko na yo ya koteka, bakokweyisa bamir na yo, bakobuka bandako na yo ya kitoko mpe, na sima, bakobwaka nyonso na ebale: mabanga, mabaya mpe putulu na yo.
13 Je mettrai fin à la rumeur de tes chants, et le son de tes harpes ne se fera plus entendre.
Nakosukisa makelele ya banzembo na yo, mpe mindule ya lindanda na yo ekotikala koyokana lisusu te.
14 Je ferai de toi une roche aride, tu deviendras un étendoir à filets. Tu ne seras plus rebâtie, car c’est moi, l’Eternel, qui parle, dit le Seigneur Dieu."
Nakokomisa yo mabanga ya pamba, mpe okokoma esika oyo balobi mbisi bakobanda kotanda minyama na bango mpo na kokawusa yango; okotikala kotongama lisusu te, pamba te ezali Ngai Yawe nde nalobi, elobi Nkolo Yawe.
15 Ainsi parle le Seigneur Dieu à Tyr: "Certes, au bruit de ta chute, aux gémissements des mourants, quand s’accomplira la tuerie au milieu de toi, les îles trembleront.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na Tiri: Boni, bisanga ekolenga te na lokito ya kokweya na yo, na kolela ya bato na yo, oyo bazokisi bango bapota minene mpe na kufa ya somo kati na yo?
16 Ils descendront de leurs trônes, tous les princes de la mer, ils ôteront leurs manteaux et dépouilleront leurs vêtements brodés; ils se vêtiront d’épouvante, s’asseoiront à terre, frissonneront à tout instant et seront atterrés à cause de toi.
Bakambi nyonso ya bisanga bakotika bakiti na bango ya bokonzi, bakolongola banzambala na bango mpe bilamba na bango batonga bililingi na basinga, bakolata somo lokola elamba mpe bakovanda na mabele; bakokoma kolenga na somo mpe kobanga tango nyonso, mpo na yo.
17 Ils entonneront sur toi une complainte et te diront: "Comme tu as péri, toi si populeuse grâce aux mers, ville illustre, si puissante sur les flots, toi et tes habitants, qui inspiraient la terreur à tous les voisins!
Bakoyembela yo nzembo ya mawa mpe bakoloba: ‹ Oh engumba oyo ekenda sango, ndenge nini babebisi yo, engumba ya bato ya ebale monene! Yo mpe bato na yo, bozalaki na nguya kati na ebale monene, bozalaki kolengisa na somo bato nyonso oyo bazalaki kovanda kuna.
18 Maintenant les côtes tremblent au jour de ta chute, et les îles qui sont dans la mer sont épouvantées de ta fin.
Sik’oyo bisanga ekomi kolenga, na mokolo ya kokweya na yo, bisanga ya ebale monene ekomi na somo makasi mpo na suka na yo. ›
19 Car, ainsi parle le Seigneur Dieu, lorsque je ferai de toi une ville ruinée, pareille aux villes qui ne sont plus habitées, lorsque je soulèverai contre toi les ondes de l’abîme et que te couvriront les eaux profondes,
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Tango nakokomisa yo engumba oyo ezalaka lisusu na bato te lokola bingumba oyo etikala nanu kozala na bato te, tango nakoyeisa epai na yo mayi ya mozindo mpe bambonge na yango ekozindisa yo,
20 alors je te précipiterai avec ceux qui sont descendus dans la fosse, auprès des gens des temps antiques, et je te confinerai dans les régions souterraines, dans les ruines éternelles, auprès de ceux qui sont descendus dans la fosse, afin que tu cesses d’être habitée, tandis que je répandrai de la beauté au pays des vivants.
nakozindisa yo kati na libulu ya mozindo esika moko na bato oyo bakitaka kuna, epai ya bato ya kala; nakovandisa yo kati na mokili oyo ezalaka na se ya mabele, lokola kati na libebi ya kala, mpe okozala elongo na bato oyo bakitaka kati na libulu ya mozindo, mpo ete okoma bisika oyo bato bakovanda lisusu te; mpe okozonga te to okozwa lisusu bisika te na mabele ya bato ya bomoi.
21 Je te réduirai à néant et c’en sera fini de toi: l’on te cherchera et plus jamais l’on ne te trouvera", dit le Seigneur Dieu."
Nakokomisa yo eloko ya koyoka somo, mpe okokoma eloko pamba; bakobanda koluka yo kasi bakomona yo lisusu te, elobi Nkolo Yawe. »