< Exode 24 >
1 Or Dieu avait dit à Moïse: "Monte vers l’Éternel, avec Aaron, Nadab, Abihou et soixantedix des anciens d’Israël et vous vous prosternerez à distance.
Yawe alobaki na Moyize: — Mata epai na Yawe, yo elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele; bokogumbama na mosika.
2 Puis, Moïse s’avancera seul vers le Seigneur et eux ne le suivront point; quant au peuple, il ne montera pas avec lui."
Moyize kaka nde asengeli kopusana pene ya Yawe; kasi bato mosusu te. Lisanga mobimba ya Isalaele mpe ekomata te elongo na ye.
3 Moïse, de retour, transmit au peuple toutes les paroles de l’Éternel et tous les statuts; et le peuple entier s’écria d’une seule voix: "Tout ce qu’a prononcé l’Éternel, nous l’exécuterons."
Tango Moyize akendeki koyebisa bato makambo mpe mibeko nyonso ya Yawe, bato bazongisaki elongo: — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi.
4 Moïse écrivit toutes les paroles de l’Éternel. Le lendemain, de bonne heure, il érigea un autel au pied de la montagne; puis douze monuments, selon le nombre des tribus d’Israël.
Moyize akomaki maloba nyonso oyo Yawe ayebisaki ye. Mokolo oyo elandaki, alamukaki na tongo makasi mpe atongaki etumbelo na ebandeli ya ngomba. Bongo, atelemisaki mabanga zomi na mibale oyo ezali kotalisa mabota zomi na mibale ya Isalaele.
5 Il chargea les jeunes gens d’Israël d’offrir des holocaustes et d’immoler, comme victimes rémunératoires, des taureaux au Seigneur.
Atindaki bilenge mibali ya Isalaele ete babonzela Yawe mbeka ya kotumba ya bangombe ya mibali lokola mbeka ya boyokani.
6 Alors Moïse prit la moitié du sang, la mit dans des bassins et répandit l’autre moitié sur l’autel.
Moyize azwaki ndambo ya makila, atiaki yango na sani; bongo ndambo mosusu, abwakaki-bwakaki yango na likolo ya etumbelo.
7 Et il prit le livre de l’Alliance, dont il fit entendre la lecture au peuple et ils dirent: "Tout ce qu’a prononcé l’Éternel, nous l’exécuterons docilement."
Azwaki lisusu buku ya Boyokani mpe atangaki yango liboso ya bana ya Isalaele. Boye bango bazongisaki: — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi mpe tokotosa yango.
8 Moïse prit le sang, en aspergea le peuple et dit: "Ceci est le sang de l’alliance que l’Éternel a conclue avec vous touchant toutes ces paroles."
Moyize azwaki makila, abwakelaki-bwakelaki yango bato mpe alobaki: — Oyo ezali makila ya boyokani oyo Yawe asali elongo na bino kolanda maloba oyo nyonso.
9 Moïse et Aaron remontèrent, accompagnés de Nadab, d’Abihou et des soixante-dix anciens d’Israël."
Sima na yango, Moyize elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele, bamataki likolo ya ngomba
10 Ils contemplèrent la Divinité d’Israël. Sous ses pieds, quelque chose de semblable au brillant du saphir et de limpide comme la substance du ciel.
epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo.
11 Mais Dieu ne laissa point sévir son bras sur ces élus des enfants d’Israël et après avoir joui de la vision divine, ils mangèrent et burent.
Kasi Nzambe asembolaki loboko na Ye te mpo na kobeta bakambi ya Isalaele; bamonaki Nzambe, baliaki mpe bamelaki.
12 L’Éternel dit à Moïse: "Monte vers moi, sur la montagne et y demeure: je veux te donner les tables de pierre, la doctrine et les préceptes, que j’ai écrits pour leur instruction."
Yawe alobaki na Moyize: « Yaka pene na Ngai na likolo ya ngomba mpe telema wana. Ngai nakopesa yo bitando ya mabanga ya papala oyo na likolo na yango nakomi Mobeko mpe mitindo mpo na kopesa bana ya Isalaele malako. »
13 Moïse partit, avec Josué son serviteur; puis il gravit la divine montagne.
Boye Moyize atelemaki elongo na mosungi na ye Jozue mpe amataki na ngomba ya Nzambe.
14 Il avait dit aux anciens: "Attendez-nous ici jusqu’à notre retour. Comme Aaron et Hour sont avec vous, celui qui aura une affaire devra s’adresser à eux."
Moyize alobaki na bakambi: « Bozela biso awa kino tokozonga. Aron mpe Wuri bazali elongo na bino. Tika ete soki moto azali na likambo, ayebisa bango yango. »
15 C’Est alors que Moïse s’achemina vers la montagne, qu’enveloppait le nuage.
Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, mapata ezipaki ye
16 La majesté divine se fixa sur le mont Sinaï, que le nuage enveloppa six jours; le septième jour, Dieu appela Moïse du milieu du nuage.
mpe nkembo ya Yawe ewumelaki na likolo ya ngomba Sinai. Mikolo motoba, mapata ezipaki ngomba. Bongo na mokolo ya sambo, Yawe abengaki Moyize kati na mapata.
17 Or, la majesté divine apparaissait comme un feu dévorant au sommet de la montagne, à la vue des enfants d’Israël.
Na miso ya bana ya Isalaele, Nkembo ya Yawe emonanaki na likolo ya ngomba lokola moto oyo etumbaka.
18 Moïse pénétra au milieu du nuage et s’éleva sur la montagne; et il resta sur cette montagne quarante jours et quarante nuits.
Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, akotaki kati na mapata. Awumelaki kuna mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.