< Deutéronome 7 >

1 Lorsque l’Éternel, ton Dieu, t’aura fait entrer dans le pays où tu te rends pour le conquérir; quand il aura écarté de devant toi ces nombreuses peuplades, le Héthéen, le Ghirgachéen, l’Amorréen, le Cananéen, le Phérézéen, le Hévéen et le Jébuséen, sept peuplades plus nombreuses et plus puissantes que toi;
Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi—
2 quand l’Éternel, ton Dieu, te les aura livrés et que tu les auras vaincus, tu les frapperas d’anathème. Point de pacte avec eux, point de merci pour eux!
mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te; okosala ata boyokani moko te elongo na bango; koyokela bango mawa te.
3 Ne t’allie avec aucun d’eux: ta fille, ne la donne pas à son fils, et sa fille, n’en fais pas l’épouse du tien!
Okosangana ata moke te na bango na nzela ya libala, okopesa te na libala bana na yo ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe okozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na yo ya mibali;
4 Car il détacherait ton fils de moi, et ils adoreraient des divinités étrangères, et la colère du Seigneur s’allumerait contre vous, et il vous aurait bientôt anéantis.
noki te, bakopengwisa bana na yo ya mibali na miso na Ngai mpo ete basalela Ngai lisusu te kasi basalela banzambe mosusu, bongo Yawe akosilikela bino mpe akobebisa yo noki.
5 Non, voici ce que vous devrez leur faire: vous renverserez leurs autels, vous briserez leurs monuments, vous abattrez leurs bosquets, vous livrerez leurs statues aux flammes.
Tala makambo oyo bosengeli kosala bango: bokokweyisa bitumbelo na bango, bokopanza bikeko na bango, bokobuka makonzi ya nzambe mwasi Ashera mpe bokotumba na moto banzambe na bango ya bikeko,
6 Car tu es un peuple consacré à l’Éternel, ton Dieu: il t’a choisi, l’Éternel, ton Dieu, pour lui être un peuple spécial entre tous les peuples qui sont sur la face de la terre.
pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe, Nzambe na bino, aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali na mokili mpo ete bozala bato na Ye, bozwi na Ye moko penza.
7 Si l’Éternel vous a préférés, vous a distingués, ce n’est pas que vous soyez plus nombreux que les autres peuples, car vous êtes le moindre de tous;
Ezali te mpo ete bozalaki mingi koleka bato mosusu nde Yawe alakisaki bino bolingo na Ye, bozalaki kutu moke koleka bato nyonso.
8 c’est parce que l’Éternel vous aime, parce qu’il est fidèle au serment qu’il a fait à vos aïeux; voilà pourquoi il vous a, d’un bras puissant, arrachés et sauvés de la maison de servitude, de la main de Pharaon, roi d’Egypte.
Kasi ezali mpo ete Yawe alingaka bino mpe abatelaka ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na bino. Yango wana, na loboko na Ye ya nguya, Yawe abimisaki bino mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu, na maboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito.
9 Reconnais donc que l’Éternel, ton Dieu, lui seul est Dieu, un Dieu véridique, fidèle au pacte de bienveillance pour ceux qui l’aiment et obéissent à ses lois, jusqu’à la millième génération;
Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.
10 mais qui punit ses ennemis directement, en les faisant périr, et n’ajourne point, à l’égard de son contempteur, le paiement qui lui est dû.
Kasi azelaka te kopesa etumbu na moto oyo ayinaka Ye mpe abomaka ye mbala moko.
11 Tu observeras donc la loi, et les décrets et les règles, que je t’ordonne en ce jour d’exécuter.
Yango wana, bosala keba mpo na kosalela mitindo, bikateli mpe mibeko oyo napesi bino lelo.
12 Pour prix de votre obéissance à ces lois et de votre fidélité à les accomplir, l’Éternel, votre Dieu, sera fidèle aussi au pacte de bienveillance qu’il a juré à vos pères.
Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino.
13 Il t’aimera, te bénira, te multipliera, il bénira le fruit de tes entrailles et le fruit de ton sol, ton blé, ton vin et ton huile, les produits de ton gros et de ton menu bétail, dans le pays qu’il a juré à tes pères de te donner.
Akolinga bino mpe akopambola bino, akokomisa bino ebele, akopambola mabota na bino, mbuma ya mabele na bino: milona na bino, vino ya sika mpe mafuta; akopambola bitonga ya bangombe na bino, bameme na bino mpe bantaba na bino kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino yango.
14 Tu seras béni entre tous les peuples; parmi toi comme parmi tes bêtes, aucun sexe ne sera stérile.
Bokopambolama koleka bato nyonso. Mobali moko te to mwasi moko te akozanga bana, mpe ebwele na yo moko te ekozanga bana.
15 L’Éternel écartera de toi tout fléau; et toutes ces funestes plaies de l’Egypte, que tu connais bien, ce n’est pas à toi qu’il les infligera, mais à tes adversaires.
Yawe akobatela yo na bokono nyonso, akobwakela yo ata bokono moko te oyo yo oyebaki te na Ejipito, kasi akokweyisa yango likolo ya bayini na yo.
16 Tu anéantiras donc tous les peuples que te livre l’Éternel, ton Dieu, sans laisser ton œil s’attendrir sur eux, de peur que tu n’adores leurs divinités; car ce serait un piège pour toi.
Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.
17 Peut-être diras-tu en ton cœur: "Ces nations-là sont plus considérables que moi; comment pourrai-je les déposséder?"
Tango mosusu okomilobela: « Bikolo oyo ezali makasi koleka biso, ndenge nini tokolonga kobengana yango? »
18 Ne les crains point! Souviens-toi sans cesse de ce que l’Éternel, ton Dieu, a fait à Pharaon et à toute l’Egypte;
Te! Kobanga yango soki moke te! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba.
19 des grandes épreuves que tes yeux ont vues; de ces signes et de ces prodiges, de cette main puissante et de ce bras étendu, par lesquels t’a émancipé l’Éternel, ton Dieu. Ainsi fera-t-il de tous les peuples que tu pourrais craindre.
Omonaki na miso na yo komekama makasi, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa, loboko ya nguya mpe loboko esembolama oyo na nzela na yango Yawe, Nzambe na yo, abimisaki yo na Ejipito. Yawe, Nzambe na yo, akosala ndenge moko epai ya bato oyo ozali kobanga.
20 De plus, l’Éternel, ton Dieu, suscitera contre eux les frelons, pour achever les survivants qui se seraient dérobés à toi.
Mpe kutu, Yawe, Nzambe na yo, akotindela bango banzoyi ya minene kino tango bato oyo bakotikala mpe bakobombama liboso na yo bakokufa.
21 Ne tremble donc pas devant eux, car l’Éternel, ton Dieu, est au milieu de toi, un Dieu grand et redoutable!
Kolenga te liboso na bango, pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe Monene mpe ya somo.
22 L’Éternel, ton Dieu, écartera ces peuples de devant toi, mais peu à peu; tu ne pourras pas les détruire rapidement, car les bêtes sauvages se multiplieraient autour de toi.
Yawe, Nzambe na yo, akobengana moke-moke bikolo oyo ezali liboso na yo; okokoka te kosilisa bango na mbala moko, noki te banyama mabe ekokoma ebele zingazinga na yo.
23 Mais l’Éternel, ton Dieu, les mettra à ta merci; il répandra parmi eux un grand trouble, jusqu’à ce qu’ils soient détruits.
Kasi Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, akotia bango noki na mobulu monene kino bakobebisama.
24 Il mettra leurs rois dans ta main, et tu effaceras leur mémoire sous le ciel; pas un ne te tiendra tête, de sorte que tu les extermineras tous.
Yawe akokaba bakonzi na bango na maboko na yo, mpe okolimwisa bakombo na bango na mokili; moko te akokoka kotelemela yo, okobebisa bango.
25 Les images de leurs divinités, vous les détruirez par le feu. Ne cède pas à la tentation de garder l’argent ou l’or qui les couvre, il ferait ton malheur; car il est en abomination à l’Éternel, ton Dieu,
Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.
26 et tu ne dois pas apporter une abomination dans ta demeure, tu serais anathème comme elle: déteste-la, repousse-la avec horreur, elle est vouée à l’anathème!
Kokotisa te mpe kolinga te eloko ya mbindo kati na ndako na yo. Okotia yango pembeni mpo na kobebisa yango nyonso. Zwa yango lokola eloko ya nkele mpe ya mbindo, pamba te etiami pembeni mpo na kobebisama.

< Deutéronome 7 >