< 2 Rois 4 >
1 La femme de l’un des jeunes prophètes vint se plaindre à Elisée, disant: "Ton serviteur, mon époux, est mort: tu sais que ton serviteur révérait l’Eternel. Or, le créancier est venu prendre mes deux jeunes enfants pour en faire ses esclaves."
Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize: — Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye.
2 Elisée lui répondit: "Que puis-je faire pour toi? Dis-moi ce que tu possèdes dans ta demeure. Ta servante, répondit-elle, ne possède rien de plus, dans sa demeure, qu’un vase d’huile."
Elize azongiselaki ye: — Ndenge nini nakoki kosunga yo? Yebisa ngai eloko oyo ozali na yango kati na ndako na yo. Azongisaki: — Mwasi mowumbu na yo azali na eloko moko te, longola kaka mwa mafuta.
3 Il reprit: "Va emprunter des vases au dehors, chez tous tes voisins, des vases vides, mais pas en petit nombre.
Elize alobaki: — Kende kosenga na baninga na yo nyonso bambeki ya pamba, kosenga moke te.
4 A ton retour, tu fermeras la porte sur toi et sur tes fils, tu rempliras tous ces vases, et à mesure qu’ils seront pleins; tu les mettras à part."
Sima, zonga na ndako na yo, kanga ekuke sima na yo elongo na bana na yo ya mibali; sopa mafuta kati na mbeki moko na moko, mpe tia pembeni mbeki oyo etondi.
5 Elle le quitta. Elle ferma la porte sur elle et sur ses fils: ils lui présentèrent les vases, et elle y versa l’huile.
Atikaki Elize mpe akangaki ekuke sima na ye elongo na bana na ye ya mibali. Bana na ye bazalaki kopesa ye bambeki, mpe azalaki kotondisa yango na mafuta.
6 Puis, lorsque les vases furent remplis, elle dit à son fils: "Avance-moi encore un vase! Il n’y a plus de vase," répondit-il. Et l’huile tarit.
Tango bambeki nyonso etondaki, alobaki na moko kati na bana na ye ya mibali: — Pesa ngai lisusu mbeki moko. Kasi mwana yango azongiselaki ye: — Bambeki nyonso esili. Kaka na tango yango, mafuta etikaki kobima.
7 Elle vint l’annoncer à l’homme de Dieu qui dit: "Va vendre cette huile, et paie ta dette; puis, toi et tes fils, vous vivrez avec le surplus."
Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye: — Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala.
8 Il arriva, un jour, qu’Elisée se rendit à Sunâm. Là vivait une femme de distinction, qui le pressa de manger chez elle. Depuis, chaque fois qu’il passait par cette ville, c’est là qu’il entrait pour manger.
Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia.
9 Elle dit à son époux: "Certes, je sais que c’est un homme de Dieu, un saint, cet homme qui nous visite toujours.
Mwasi yango alobaki na mobali na ye: « Nayebi ete moto oyo ayaka mbala mingi epai na biso azali mobulami ya Nzambe.
10 Préparons, je te prie, une petite cellule avec des murs, et plaçons-y, pour son usage, lit, table, siège et flambeau; lorsqu’il viendra chez nous, il pourra s’y retirer."
Nabondeli yo, tika ete tobongisela ye shambre ya moke na likolo ya ndako mpe totia kati na yango mbeto, mesa, kiti mpe mwinda. Boye, tango nyonso akoya epai na biso, akoki kovanda kuna. »
11 Or, un jour, passant par là, il se retira dans la cellule et y coucha.
Mokolo moko, Elize ayaki na Sunami, amataki na shambre na ye mpe alalaki kuna.
12 Et il dit à Ghéhazi, son serviteur: "Appelle cette Sunamite." Il l’appela, et elle se présenta devant lui.
Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi: « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize.
13 Il lui avait dit: "Parle ainsi à cette femme: Puisque tu t’es donné pour nous tout ce trouble, que faut-il faire en ta faveur? Y a-t-il à s’employer pour toi auprès du roi ou du général d’armée?" Elle répondit "Je vis tranquille au milieu de mes concitoyens."
Elize alobaki na Geazi: — Loba na ye: « Omitungisi mingi mpo na biso. Eloko nini tokoki sik’oyo kosalela yo? Tolobela yo epai ya mokonzi to epai ya mokonzi ya basoda? » Mwasi ya Sunami azongisaki: — Navandaka na kimia kati na bato na ngai.
14 Il reprit "Que faire pour elle?" Ghéhazi repartit: "Eh mais! Elle n’a point de fils, et son époux est un vieillard."
Elize atunaki mosali na ye, Geazi: — Eloko nini tokoki kosala mpo na ye? Geazi azongisaki: — Azali na mwana te, mpe mobali na ye azali mobange.
15 Il dit "Appelle-la." Il l’appela, et elle se présenta sur le seuil.
Elize alobaki: — Benga ye! Geazi abengaki ye, mpe ayaki kotelema na ekuke.
16 Il lui dit: "A pareille époque, au retour de cette saison, tu presseras un fils dans tes bras." Elle répondit: "Ah! Mon seigneur, homme de Dieu, ne trompe pas ta servante!"
Elize alobaki: — Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali. Mwasi ya Sunami agangaki: — Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te!
17 Cette femme conçut, et elle mit au monde un fils à pareille époque, au retour de la même saison, ainsi que l’avait dit Elisée.
Nzokande, mwasi ya Sunami akomaki na zemi. Mpe na mobu oyo elandaki, na eleko yango kaka, abotaki mwana mobali, ndenge kaka Elize alobaki na ye.
18 L’Enfant grandit. Or, un jour, il était allé trouver son père, auprès des moissonneurs;
Mwana akolaki. Mokolo moko, mwana akendeki epai ya tata na ye, oyo azalaki elongo na babuki mbuma.
19 il cria à son père: "Ma tête! Ma tête!" Celui-ci dit au serviteur: "Porte-le chez sa mère."
Alobaki na tata na ye: — Moto pasi! Moto pasi! Tata na ye alobaki na mosali moko: — Zongisa ye epai ya mama na ye!
20 Il l’emporta et le remit à sa mère; il resta dans son giron jusqu’à midi, et mourut.
Mosali amemaki ye mpe akomisaki ye epai ya mama na ye. Mwana mobali avandaki na makolo ya mama na ye kino na midi mpe, na sima, akufaki.
21 Alors elle monta, le plaça sur le lit de l’homme de Dieu, ferma sur lui la porte, et sortit.
Mama na ye amataki na shambre ya mosakoli, alalisaki ye na mbeto ya moto na Nzambe, akangaki ekuke mpe abimaki.
22 Elle manda son époux et lui dit: "Envoie-moi, je te prie, un serviteur avec une ânesse; je cours chez l’homme de Dieu et je reviens."
Bongo abengaki mobali na ye mpe alobaki na ye: — Nabondeli yo, tindela ngai elenge moko kati na basali mpe ane moko ya mwasi, mpo ete nakende noki epai ya moto na Nzambe mpe nazonga mbala moko.
23 Il répondit: "Pourquoi vas-tu chez lui aujourd’hui? Il n’y a point de néoménie, point de fête." Elle repartit: "Sois tranquille."
Mobali na ye atunaki: — Mpo na nini olingi kokende epai na ye lelo? Lelo ezali ebandeli ya sanza te! Ezali mpe mokolo ya Saba te! Azongisaki: — Komitungisa te! Nyonso ezali malamu.
24 Elle sella l’ânesse et dit à son serviteur: "Conduis toujours, et n’arrête ma course que lorsque je te l’ordonnerai."
Mwasi ya Sunami abongisaki ane mpe alobaki na elenge mosali na ye: « Tokeyi! Tambolisa ane; kotelema na nzela te soki nalobi na yo te. »
25 Elle voyagea ainsi, et parvint jusqu’à l’homme de Dieu, au mont Carmel. L’Apercevant de loin, l’homme de Dieu dit à Ghéhazi, son serviteur: "Voici la Sunamite!
Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi: — Tala! Ezali mwasi ya Sunami!
26 Or çà, cours à sa, rencontre, et dis-lui: Es-tu en paix? Ton époux est-il en paix? en paix, l’enfant?" Elle répondit "En paix."
Nabondeli yo, pota mbangu sik’oyo mpo na kokutana na ye, mpe tuna ye: « Boni, kimia ezali? Ozali malamu? Mobali na yo azali malamu? Mwana na yo azali malamu? » Azongisaki: — Nyonso ezali malamu.
27 Arrivée près de l’homme de Dieu, sur la montagne, elle embrassa ses pieds. Ghéhazi se disposait à la repousser; mais l’homme de Dieu dit: "Laisse-la, car son âme est contristée; l’Eternel m’en a caché la cause, il ne me l’a pas révélée."
Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki: — Tika ye bongo! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango.
28 Elle dit: "Est-ce que j’avais demandé un fils à mon seigneur? N’Ai-je pas dit: Ne m’abuse point?"
Mwasi ya Sunami alobaki: — Boni, nasengaki mwana epai ya nkolo na ngai? Te! Kutu, nalobaki na yo: « Kopesa ngai elikya ya lokuta te! »
29 Il dit à Ghéhazi: "Ceins tes reins, prends mon bâton dans ta main et pars. Si tu rencontres quelqu’un, ne le salue pas; si quelqu’un te salue, ne lui réponds point. Tu poseras mon bâton sur la face de l’enfant."
Elize alobaki na Geazi: — Lata mokaba na yo, kamata nzete na ngai na loboko na yo mpe kende. Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te. Mpe soki moto apesi yo mbote, kozongisa te. Okotia nzete na ngai na elongi ya mwana mobali.
30 La mère de l’enfant s’écria: "Par l’Eternel et par ta propre vie si je te quitte!" Il se leva et la suivit.
Kasi mama ya mwana alobaki: — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te. Boye Elize atelemaki mpe alandaki mwasi ya Sunami.
31 Ghéhazi les avait devancés; il avait posé le bâton sur le visage de l’enfant, mais pas un souffle, pas un mouvement. Il retourna à la rencontre du prophète et lui dit: "L’Enfant n’est pas revenu à lui."
Geazi akendeki liboso na bango mpe atiaki nzete na elongi ya mwana mobali, kasi ata eloko moko te esalemaki, ezala mongongo to koningana. Geazi azongaki mpo na kokutana na Elize mpe alobaki na ye: — Mwana alamuki te.
32 Elisée entra dans la chambre, et il vit l’enfant inanimé, étendu sur son lit.
Tango Elize akomaki na ndako, akutaki ebembe ya mwana mobali elali na mbeto na ye.
33 Il alla fermer la porte sur eux deux, puis invoqua le Seigneur.
Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe.
34 Il monta sur le lit, se coucha sur l’enfant, appliqua sa bouche sur sa bouche, ses yeux sur ses yeux, ses mains sur les siennes, et resta étendu sur lui; la chaleur revint dans les membres de l’enfant.
Bongo Elize amataki na mbeto mpe alalelaki mwana mobali, atutisaki monoko na ye na monoko ya mwana, miso na ye na miso ya mwana, mpe maboko na ye na maboko ya mwana. Lokola amitandaki bongo na likolo ya mwana mobali, nzoto ya mwana mobali ekomaki moto.
35 Elisée quitta le lit, parcourut la chambre en long et en large, s’étendit de nouveau sur l’enfant; celui-ci éternua par sept fois et rouvrit les yeux.
Elize alongwaki, atambolaki na bangambo nyonso ya shambre; bongo amataki lisusu na mbeto mpe amitandaki na likolo ya mwana. Mbala moko, mwana akosolaki mbala sambo mpe afungolaki miso.
36 Le prophète appela Ghéhazi et dit: "Appelle cette Sunamite." Il l’appela, elle vint à lui, et il dit: "Emporte ton fils!"
Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye: — Benga mwasi ya Sunami! Geazi abengaki ye. Tango ayaki epai ya Elize, Elize alobaki: — Zwa mwana na yo!
37 Elle vint tomber à ses pieds et se prosterna contre terre; puis elle prit son fils et se retira.
Mwasi ya Sunami apusanaki, akweyaki na makolo ya Elize mpe agumbamaki kino na se; bongo azwaki mwana na ye mpe abimaki.
38 Elisée était revenu à Ghilgal. Or, la famine régnait dans le pays, et les jeunes prophètes assiégeaient leur maître. Celui-ci dit à son serviteur: "Mets le grand pot et fais cuire un potage pour les disciples."
Elize azongaki na Giligali. Nzokande etuka yango ezalaki kati na nzala makasi. Wana bayekoli ya basakoli bavandaki na mayangani elongo na Elize, alobaki na mosali na ye: « Tia nzungu ya monene na moto mpe lamba elubu mpo na basakoli oyo. »
39 Cependant, un d’entre eux alla aux champs pour cueillir des herbes. Il trouva une vigne sauvage, en cueillit des coloquintes plein son vêtement, et, à son retour, il les coupa en morceaux dans le potage, sans savoir ce que c’était.
Moko kati na bango akendeki na bilanga mpo na kobuka ndunda, mpe amonaki nzete ya vino ya zamba. Abukaki na nzete yango ndambo ya bakolokente mpe atondisaki yango na elamba na ye. Tango azongaki, akataki yango mike-mike mpe atiaki yango kati na nzungu ya elubu; moto moko te ayebaki soki ezali nini.
40 On versa à ces hommes le potage à manger, mais ils en avaient à peine goûté qu’ils s’écrièrent "Homme de Dieu, il y a du poison dans le potage!" C’Était immangeable.
Bakabolelaki bato elubu. Tango kaka babandaki kolia yango, bagangaki: — Moto na Nzambe, kufa ezali kati na nzungu oyo! Mpe bakokaki lisusu te kolia yango.
41 Il dit: "Qu’on m’apporte de la farine!" Il la jeta dans le pot et dit: "Verse à tout ce monde, et qu’on mange!" Toute chose nuisible avait disparu du potage.
Elize alobaki: — Bomemela ngai farine! Atiaki farine kati na nzungu mpe alobaki: — Bokabolela yango bato mpo ete balia. Mpe kati na elubu oyo ezalaki kati na nzungu, ezalaki lisusu na eloko moko te ya mabe.
42 Un homme, venant de Baal-Chalicha, apporta un jour à l’homme de Dieu, comme pain de prémices, vingt pains d’orge et du gruau dans sa panetière. Elisée dit: "Donne cela au peuple et qu’il mange!"
Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye: — Pesa yango na bato mpo ete balia!
43 Son serviteur répondit: "Comment donnerais-je ceci à cent hommes?" Mais il répéta: "Donne-le au peuple et qu’il mange, car voici ce qu’a dit l’Eternel: On mangera, et il en restera encore."
Mosali na ye atunaki: — Nakokoka ndenge nini kokabola mapa oyo na bato nkama moko? Elize alobaki lisusu: — Kabolela yango bato nyonso mpo ete balia, pamba te tala Liloba oyo Yawe alobi: « Bakolia, bakotonda mpe bakotika mosusu. »
44 On les servit, ils mangèrent et en eurent de reste, selon la parole de l’Eternel.
Boye mosali akabolelaki bango mapa yango. Baliaki mpe batikaki mosusu, kolanda Liloba na Yawe.