< 1 Samuel 17 >
1 Or, les Philistins réunirent leurs armées pour une expédition, se donnèrent rendez-vous à Sokho, ville de Juda, et se campèrent entre Sokho et Azêka, à Efès-Dammim.
Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango mpo na bitumba, basanganaki na Soko ya Yuda mpe batongaki molako na bango na Efeze-Damimi, kati na Soko mpe Azeka.
2 De son côté, Saül réunit les Israélites, qui se campèrent dans la vallée du Térébinthe, et se rangèrent en bataille vis-à-vis des Philistins.
Na ngambo mosusu, Saulo mpe bato ya Isalaele basanganaki mpe batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Terebente; batandamaki na milongo mpe babongamaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia.
3 Les Philistins occupaient la montagne d’un côté, les Israélites l’occupaient du côté opposé, la vallée les séparant.
Bato ya Filisitia bazalaki na likolo ya ngomba na ngambo moko, mpe bato ya Isalaele, na likolo ya ngomba na ngambo mosusu; kaka lubwaku nde ekabolaki bango.
4 Alors un géant sortit des rangs des Philistins, un homme de Gath, nommé Goliath: sa taille était de six coudées et un empan.
Elombe mobali moko oyo kombo na ye ezalaki « Goliati, » moto ya mboka Gati, abimaki wuta na molako ya bato ya Filisitia. Azalaki na bametele pene misato na molayi.
5 Il avait sur la tête un casque d’airain et était vêtu d’une cotte de mailles, du poids de cinq mille sicles;
Alataki ekoti ya bronze na moto na ye mpe ebombelo ya tolo, oyo basala na bakilo pene tuku motoba ya bronze.
6 il avait des jambières d’airain aux jambes, et un javelot d’airain sur l’épaule;
Na makolo na ye, alataki bitando ya bronze, mpe akangisaki likonga ya bronze na sima ya mokongo na ye.
7 le bois de sa lance ressemblait à une ensouple de tisserand, et elle se terminait par un fer du poids de six cents sicles. Le porteur du bouclier marchait devant lui.
Monene ya nzete ya likonga na ye ezalaki lokola libaya oyo basali bilamba basalelaka; songe ya likonga yango ezalaki ya bakilo pene sambo. Moto oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki kotambola liboso na ye.
8 S’Avançant donc, il cria ces paroles aux lignes d’Israël: "Pourquoi vous disposer à livrer bataille? Ne suis-je pas, moi, le Philistin, et vous les sujets de Saül? Désignez l’un d’entre vous pour qu’il s’avance vers moi.
Goliati atelemaki mpe agangelaki mampinga ya Isalaele, alobaki: « Mpo na nini bobimi mpe bosali milongo mpo na bitumba? Ngai nazali moto ya Filisitia te? Mpe bino bozali basali ya Saulo te? Bopona moto moko mpe botika ye koya kobundisa ngai.
9 Si, en combattant avec moi, il l’emporte et me tue, nous deviendrons vos sujets; mais si c’est moi qui triomphe et le tue, vous serez nos sujets et nous obéirez.
Soki akokoka kolonga mpe koboma ngai, wana biso tokokoma bawumbu na bino. Nzokande soki ngai nalongi mpe nabomi ye, wana bino nde bokokoma bawumbu na biso mpe bokosalela biso. »
10 Oui, ajouta le Philistin, je défie en ce jour les rangs des Israélites: donnez-moi un homme, que nous nous battions ensemble!"
Moto ya Filisitia alobaki lisusu: « Na mokolo ya lelo, nazali kotiola mampinga ya Isalaele. Bopesa ngai moto moko mpo ete nabunda na ye. »
11 Saül et tout Israël, en entendant ces paroles du Philistin, furent consternés et eurent grand peur.
Tango bayokaki maloba ya moto ya Filisitia, Saulo mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na mawa mpe babangaki.
12 Or, David était fils de cet Ephratéen, de Bethléem-en-Juda, qui se nommait Jessé et avait huit fils; à l’époque de Saül, c’était un vieillard, comptant parmi les hommes d’âge.
Davidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi.
13 Les trois fils aînés de Jessé étaient partis pour suivre Saül dans cette campagne; ces trois hommes partis pour la guerre se nommaient, l’aîné Elïab, son puîné Abinadab, et le troisième Chamma.
Bana mibali misato ya liboso ya Izayi balandaki Saulo na bitumba. Tala bakombo ya bana mibali yango misato oyo balandaki Saulo na bitumba: Eliabi, mwana mobali ya liboso; Abinadabi, mwana mobali ya mibale; mpe Shama, mwana mobali ya misato.
14 David était le plus jeune, et les trois aînés seuls avaient suivi Saül.
Lokola Davidi azalaki leki, mpe wana bana mibali misato ya liboso balandaki Saulo,
15 Pour David, il allait et venait, quittant Saül pour garder les brebis de son père à Bethléem.
Davidi azalaki kokende mpe kozonga wuta na ndako ya Saulo mpo na koleisa bameme ya tata na ye na Beteleemi.
16 Le Philistin donc s’avançait chaque matin et chaque soir, et se présenta ainsi pendant quarante jours.
Mikolo tuku minei, moto ya Filisitia azalaki komilakisa, tongo mpe pokwa, liboso ya mampinga ya Isalaele.
17 Cependant Jessé dit à David, son fils: "Prends, je te prie, pour tes frères cet êpha de blé grillé et ces dix pains, et porte-les vite au camp à tes frères.
Izayi alobaki na Davidi, mwana na ye ya mobali: « Zwela bandeko na yo ya mibali bambuma oyo ya ble bakalinga mpe mapa oyo zomi, mpe kende kotikela bango yango na lombangu na molako na bango.
18 Ces dix fromages, tu les porteras au chef de la division; tu t’informeras du bien-être de tes frères et te muniras d’un gage de leur part."
Mema lisusu ba-fromaje zomi oyo epai ya mokonzi ya limpinga ya basoda nkoto moko, limpinga oyo bango bazali. Tala soki bandeko na yo ya mibali bazali ndenge nini mpe zwa na maboko na bango elembo oyo ekolakisa ngai ete bazali malamu.
19 (Saül, avec eux, ainsi que tous les hommes d’Israël étaient dans la vallée du Térébinthe, rangés en bataille contre les Philistins.)
Bazali na lubwaku ya Terebente elongo na Saulo mpe mibali nyonso ya Isalaele mpo na kobundisa bato ya Filisitia. »
20 Le lendemain, de bon matin, David laissa le troupeau aux soins d’un gardien, et partit avec sa charge selon la recommandation de Jessé. Il atteignit l’enceinte du camp, comme l’armée débouchait sur le champ de bataille et poussait le cri de guerre.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Davidi atikaki bameme na maboko ya mokengeli moko; akamataki mikumba na ye mpe akendeki, ndenge kaka Izayi ayebisaki ye; akomaki na molako tango mampinga ya Isalaele ezalaki komibongisa na milongo mpo na kobunda bitumba, mpe ezalaki kobeta milolo ya bitumba.
21 Israélites et Philistins s’alignèrent, ligne contre ligne.
Bato ya Isalaele mpe bato ya Filisitia batandamaki mpe batalanaki ngambo na ngambo mpo na kobunda.
22 David remit les objets qu’il portait aux mains du gardien des bagages, courut vers les rangs et alla s’informer de la santé de ses frères.
Davidi akitisaki mikumba na ye, apesaki yango na maboko ya mobateli mikumba, akimaki mbangu na esika ya bitumba mpe apesaki bandeko na ye ya mibali mbote.
23 Tandis qu’il s’entretenait avec eux, voici venir le géant, Goliath le Philistin, de Gath, sortant des rangs des Philistins et tenant le même discours; David l’entendit.
Wana Davidi azali kosolola na bango, elombe mobali Goliati, moto ya Filisitia ya Gati, alongwaki na molongo ya mampinga na ye mpe azongelaki koloba ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Davidi azalaki koyoka ye.
24 Tous les Israélites, en voyant cet homme, lâchèrent pied devant lui, fort effrayés.
Kasi tango bato nyonso ya Isalaele bamonaki mobali yango, bakimaki liboso na ye na kobanga makasi.
25 Et les hommes d’Israël se disaient: "Avez-vous vu cet homme qui s’avance? C’Est pour défier Israël qu’il se met en avant. Eh bien! Celui qui le vaincra, le roi le comblera de richesses, lui donnera sa fille, et exemptera la famille de son père de toute charge en Israël."
Moko na moko kati na bato ya Isalaele akomaki koloba: « Bozali na bino komona mobali oyo ndenge azali kobima mpo na koya epai na biso? Azali nde koya kotiola Isalaele! Mokonzi akopesa bomengo ebele epai ya moto oyo akoboma ye, akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpe akosalela libota ya tata na ye bolamu kati na Isalaele. »
26 David, s’adressant à ceux qui étaient près de lui, demanda: "Que fera-t-on à l’homme qui aura vaincu ce Philistin et délivré Israël de l’ignominie? Qu’est donc ce Philistin, cet incirconcis, pour insulter les légions du Dieu vivant!"
Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye: — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi?
27 Le peuple lui répéta la même chose, ajoutant: "Telle sera la récompense de l’homme qui l’aura vaincu."
Lokola bato bazalaki kozongela kaka maloba moko, balobaki na ye: — Tala makambo oyo ekosalemela moto oyo akoboma ye.
28 Elïab, son frère aîné, l’entendant parler à ces hommes, se mit en colère contre David et dit: "Pourquoi es-tu descendu ici, et à qui as-tu confié ces quelques brebis dans le désert? Je connais ton caractère volontaire et vicieux, car c’est pour voir la guerre que tu es venu!
Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki: — Oyaki awa mpo na nini? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba.
29 Eh! Qu’ai-je donc fait, répondit David? C’Était une simple parole."
Davidi azongiselaki ye: — Nasali nini? Nakoki kosolola lisusu te?
30 Le quittant alors, il s’adressa à un autre, à qui il tint le même discours; les gens lui firent la même réponse que précédemment.
Bongo Davidi abalukaki mpo na kosolola na moto mosusu mpe atunaki kaka likambo moko wana. Mpe bazongiselaki ye ndenge kaka moto ya liboso alobaki na ye.
31 Les propos de David ayant été propagés, on les répéta devant Saül, qui le fit venir.
Maloba ya Davidi epanzanaki na lombangu, mpe bayebisaki yango Saulo. Mpe sima na Saulo koyoka yango, abengisaki ye.
32 David dit à Saül: "Que personne ne perde courage à cause de lui! Ton serviteur ira et se battra avec ce Philistin."
Davidi alobaki na Saulo: — Tika ete moto moko te amilembisa nzoto likolo na moto oyo ya Filisitia. Mosali na yo akokende kobundisa ye.
33 Mais Saül dit à David: "Tu ne peux aller te battre avec ce Philistin, car tu n’es qu’un enfant, et lui est un homme de guerre depuis sa jeunesse."
Kasi Saulo alobaki na Davidi: — Okoki te kokende kobundisa moto wana ya Filisitia! Ozali mwana moke, nzokande ye azali mobundi ya bitumba wuta bolenge na ye.
34 David répondit à Saül: "Ton serviteur faisait paître les brebis de son père; quand survenait le lion ou l’ours et qu’il emportait une bête du troupeau,
Davidi azongiselaki Saulo: — Mosali na yo azalaki kobatela bameme ya tata na ye. Tango ngombolo to nkosi ezalaki koya kokamata meme moko kati na etonga,
35 je le poursuivais, je le terrassais, et la lui arrachais de la gueule; alors il se jetait sur moi, mais je le saisissais par la mâchoire et le frappais à mort.
nazalaki kolanda mpe kobeta yango, nazalaki kokangola mpe kobotola meme na monoko ya tambwe to ya nkosi yango. Tango ezalaki kobalukela ngai, nazalaki kokanga yango, kobeta mpe koboma yango.
36 Puisque ton serviteur a eu raison et du lion et de l’ours, cet impur Philistin aura le même sort, lui qui a défié les légions du Dieu vivant."
Lokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi.
37 Et David ajouta: "L’Eternel, qui m’a protégé contre le lion et l’ours, me protégera aussi contre ce Philistin…" Et Saül dit à David: "Va, et que l’Eternel soit avec toi!"
Yawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo. Saulo alobaki na Davidi: — Kende, mpe tika ete Yawe azala elongo na yo.
38 Saül revêtit David de son propre costume, lui mit sur la tête un casque d’airain, lui fit endosser une cuirasse;
Bongo Saulo alatisaki Davidi bibundeli na ye moko: atiaki ye ekoti ya bronze na moto mpe alatisaki ye ebombelo ya tolo.
39 David ceignit l’épée par-dessus ses vêtements et essaya de marcher, n’en ayant pas l’habitude. Alors il dit à Saül: "Je ne puis marcher avec cette armure, car je n’y suis pas accoutumé"; et il s’en débarrassa.
Na likolo ya elamba ya ebende, Davidi atiaki lisusu, na mokaba na ye, mopanga ya Saulo; mpe amekaki kotambola na yango, pamba te atikalaki nanu komesana na yango te. Davidi alobaki na Saulo: — Nakokoka te kotambola na biloko oyo nyonso, pamba te namesana na yango te! Bongo Davidi alongolaki yango na nzoto na ye.
40 Il prit son bâton à la main, choisit dans le torrent cinq cailloux lisses, qu’il mit dans sa panetière de berger, et, muni de sa fronde, s’avança vers le Philistin.
Asimbaki kaka lingenda na ye na loboko, aponaki mabanga mitano ya moselu kati na moluka ya lubwaku mpe atiaki yango na libenga na ye ya mobateli bibwele; asimbaki ebambelo mabanga na loboko mpe apusanaki epai ya moto ya Filisitia.
41 Celui-ci s’approcha lentement de David, précédé de l’homme qui portait son bouclier.
Kaka na tango yango, moto ya Filisitia elongo na moto oyo amemelaki ye nguba bapusanaki pene ya Davidi; moto oyo amemaki nguba nde azalaki liboso.
42 Le Philistin, considérant David, le regarda avec dédain, parce qu’il était jeune, vermeil et de bonne mine.
Tango moto ya Filisitia atalaki mpe amonaki Davidi, atiolaki ye; pamba te azalaki na ye kaka mwa elenge mobali oyo azalaki na poso kitoko ya nzoto mpe na elongi kitoko.
43 Et il dit à David: "Suis-je un chien, que tu t’avances contre moi avec des bâtons?" Et il maudissait David en invoquant son dieu.
Moto ya Filisitia alobaki na Davidi: — Boni, ngai nazali mbwa mpo ete oya kobundisa ngai na lingenda? Bongo alakelaki Davidi mabe na nzela ya banzambe na ye.
44 Et le Philistin dit à David: "Viens ici que je donne ta chair aux oiseaux du ciel et aux animaux des champs!"
Moto ya Filisitia alobaki lisusu na Davidi: — Pusana awa, nakopesa mosuni na yo epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya zamba.
45 David répondit au Philistin: "Tu viens à moi avec l’épée, la lance et le javelot; et moi je viens au nom de l’Eternel-Cebaot, du Dieu des légions d’Israël que tu insultes.
Davidi alobaki na moto ya Filisitia: — Ozali koya kobundisa ngai na mopanga, na likonga ya monene mpe na likonga ya moke. Kasi ngai nayei kobundisa yo na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya mampinga ya Isalaele, oyo yo ozali kotiola.
46 En ce jour, l’Eternel te mettra en mon pouvoir, je t’abattrai et je te couperai la tête et je livrerai les cadavres de l’armée des Philistins, aujourd’hui même, aux oiseaux du ciel et aux animaux des champs, afin que toute la terre sache qu’il y a un Dieu pour Israël!
Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.
47 Et toute cette multitude saura que l’Eternel n’a pas besoin d’épée ni de lance pour donner la victoire, car l’Eternel est le maître de la guerre, et il vous livrera en notre pouvoir!"
Bato nyonso oyo basangani awa bakoyeba ete ezali na mopanga te to na likonga ya monene te nde Yawe abikisaka. Pamba te bitumba ezali ya Yawe, mpe Ye akokaba bino na maboko na biso.
48 Voyant alors le Philistin se mettre en mouvement et s’avancer à sa rencontre, David s’élança, traversa rapidement le champ de bataille dans la direction du Philistin,
Wana moto ya Filisitia amibongisaki mpo na kokende kobundisa Davidi, Davidi akimaki mbangu na molongo ya liboso ya bitumba mpo na kokutana na moto ya Filisitia.
49 mit la main dans sa panetière, en tira une pierre, qu’il lança avec la fronde, et atteignit le Philistin au front; la pierre s’y enfonça et il tomba la face contre terre.
Davidi akotisaki loboko na ye kati na libenga na ye, azwaki libanga moko mpe abambaki yango na nzela ya ebambelo na ye ya mabanga; abetaki moto ya Filisitia na elongi. Libanga ekotaki kati na elongi ya moto ya Filisitia, mpe akweyaki elongi kino na mabele.
50 Ainsi David vainquit le Philistin avec une fronde et une pierre, et le frappa à mort, sans avoir une épée à la main;
Boye, Davidi alongaki moto ya Filisitia na nzela ya ebambelo mabanga na ye mpe na nzela ya libanga moko. Davidi abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye, azalaki ata na mopanga te na loboko na ye.
51 puis il fondit sur le Philistin, lui prit son épée qu’il tira du fourreau, et le tua en lui tranchant la tête. Les Philistins, voyant que leur champion était mort, prirent la fuite.
Davidi akimaki mbangu mpe atelemaki na likolo ya moto ya Filisitia, asimbaki mopanga ya moto ya Filisitia, abimisaki yango na ebombelo na yango, abomaki ye, mpe akataki moto na ye na nzela ya mopanga yango. Tango mampinga ya Filisitia bamonaki ete elombe na bango akufi, bakimaki.
52 Les hommes d’Israël et de Juda se levèrent en poussant le cri de guerre et poursuivirent les Philistins jusqu’aux abords de Gaï et jusqu’aux portes d’Ekron; les cadavres des Philistins jonchèrent la route de Chaaraïm, jusqu’à Gath et jusqu’à Ekron.
Bato ya Isalaele mpe bato ya Yuda babimaki na mbala moko, bagangaki mpe balandaki bato ya Filisitia kino na ebandeli ya lubwaku mpe kino na bikuke ya Ekroni. Bibembe ya bato ya Filisitia etandamaki na nzela oyo ekenda na Shaarayimi kino na Gati mpe kino na Ekroni.
53 Au retour de cette poursuite des Philistins, les enfants d’Israël allèrent piller leurs camps.
Tango bato ya Isalaele batikaki kolanda bato ya Filisitia, bazongaki mpo na kozwa na makasi biloko oyo ezalaki kati na molako ya bato ya Filisitia.
54 Pour David, il prit la tête du Philistin et la porta à Jérusalem, et ses armes, il les déposa dans sa tente.
Davidi azwaki moto ya moto ya Filisitia mpe amemaki yango na Yelusalemi; bongo azwaki bibundeli ya moto ya Filisitia mpe atiaki yango kati na ndako na ye ya kapo.
55 Or, en voyant David s’avancer au-devant du Philistin, Saül avait dit à Abner, commandant de l’armée: "De qui ce jeune homme est-il fils, Abner?" Et Abner avait répondu: "Par ta vie, ô roi! Je l’ignore."
Tango Saulo amonaki Davidi kokende kobundisa moto ya Filisitia, atunaki Abineri, mokonzi ya mampinga: — Elenge mobali oyo azali mwana ya nani? Abineri azongisaki: — Na kombo na yo mokonzi, nayebi te.
56 "Informe-toi, dit le roi, de qui ce garçon est fils…"
Mokonzi alobaki: — Tuna mpo na koyeba soki elenge mobali oyo azali mwana ya nani?
57 Et lorsque David revint après avoir tué le Philistin, Abner vint le prendre et le présenta à Saül, tenant à la main la tête du Philistin.
Tango kaka Davidi azongaki sima na ye koboma moto ya Filisitia, Abineri azwaki ye mpe amemaki ye na liboso ya Saulo. Davidi asimbaki na loboko na ye moto ya moto ya Filisitia.
58 Saül lui demanda alors: "De qui es-tu fils, jeune homme? De ton serviteur Jessé le Bethléémite," répondit David.
Saulo atunaki Davidi: — Ozali mwana ya nani? Elenge mobali Davidi azongisaki: — Nazali mwana ya mosali na yo, Izayi, moto ya Beteleemi.