< 1 Rois 12 >

1 Roboam se rendit à Sichem, car c’est à Sichem que tout Israël était venu pour le proclamer roi.
Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi.
2 Lorsque la nouvelle en vint à Jéroboam, fils de Nebat, il était encore en Egypte, où il s’était réfugié à cause du roi Salomon, et il resta encore en Egypte.
Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito.
3 Mais on l’envoya chercher, et il vint avec toute l’assemblée d’Israël, et ils parlèrent ainsi à Roboam:
Boye, batindaki bato kobenga Jeroboami; bongo ye elongo na lisanga mobimba ya Isalaele bakendeki epai ya Roboami mpe balobaki na ye:
4 "Ton père a fait peser sur nous un joug trop dur. Toi maintenant, allège le dur traitement de ton père et le joug pesant qu’il nous a imposé, et nous t’obéirons."
— Tata na yo anyokolaki biso makasi; kasi sik’oyo, yo, lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso; bongo biso, tokosalela yo.
5 Il leur répondit: "Allez, attendez encore trois jours et puis revenez." Et le peuple se retira.
Roboami azongisaki: — Bokende epai na bino, bopesa ngai mikolo misato mpo na koyekola likambo yango, bongo bozongela ngai. Mpe bato bakendeki.
6 Le roi Roboam consulta les vieillards qui avaient entouré Salomon de son vivant, et leur dit: "De quelle façon me conseillez-vous de répondre à ce peuple?"
Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango: — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo?
7 Et ils lui parlèrent ainsi: "Si aujourd’hui tu cèdes à ce peuple, si tu te montres conciliant à leur égard et leur donnes pour réponse de bonnes paroles, ils seront constamment tes serviteurs fidèles."
Bazongiselaki ye: — Soki, na mokolo ya lelo, omikomisi mosali ya bato oyo, soki osaleli bango mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo.
8 Mais il rejeta le conseil que lui avaient donné les vieillards, s’adressa aux jeunes gens qui avaient grandi avec lui et vivaient à ses côtés,
Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye.
9 et leur dit: "Que devons-nous, à votre avis, répondre à ce peuple qui m’a dit: Allège le joug que ton père nous a imposé?"
Atunaki bango: — Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai: « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso? »
10 Les jeunes gens élevés avec lui lui répondirent: "Voici ce que tu diras à ce peuple qui t’a parlé en ces termes: Ton père a rendu pesant notre joug, mais toi, rends-le plus léger, tu leur parleras ainsi: Mon petit doigt est plus fort que n’étaient les reins de mon père.
Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki: — Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo: « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi; kasi yo, lembisela biso yango! » Yebisa bango: « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene;
11 Donc, si mon père vous a imposé un joug pesant, moi je l’appesantirai encore si mon père vous a châtiés avec des verges, moi je vous châtierai avec des scorpions."
soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai, nakoyeisa yango lisusu makasi koleka; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »
12 Jéroboam et tout le peuple vinrent le troisième jour auprès de Roboam, selon la parole du roi, qui avait dit: "Revenez me trouver le troisième jour."
Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango: « Bozongela ngai sima na mikolo misato. »
13 Le roi répondit durement au peuple, sans tenir compte du conseil que lui avaient donné les vieillards.
Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi;
14 Suivant le conseil des jeunes gens, il s’exprima ainsi: "Mon père a fait peser le joug sur vous, moi je le rendrai encore plus lourd; mon père vous a châtiés avec des verges, moi je vous châtierai avec des scorpions."
alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango: Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.
15 Le roi ne céda donc point au peuple, la chose ayant été ainsi déterminée par le Seigneur, qui voulait exécuter ce qu’il avait déclaré, par Ahiyya de Silo, à Jéroboam, fils de Nebat.
Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Yawe nde asalaki bongo mpo na kokokisa liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo.
16 Les Israélites, voyant que le roi ne les avait point écoutés, lui firent cette réponse: "Quelle part avons-nous de David? Quelle communauté de possession avec le fils de Jessé? A tes tentes, ô Israël! Pourvois désormais à ta maison, David!" Et Israël rentra dans ses tentes.
Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye: « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.
17 Quant aux enfants d’Israël habitant dans les villes de Juda, sur ceux-là seulement régna Roboam.
Roboami akobaki kokonza bana ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na bingumba ya Yuda.
18 Le roi Roboam dépêcha Adoram, qui était préposé aux impôts; mais les Israélites le firent mourir à coups de pierres. Le roi Roboam monta à grand’peine sur un char, pour s’enfuir à Jérusalem.
Mokonzi Roboami atindaki Adorami oyo azalaki motambolisi misala makasi, kasi bana nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki. Nzokande, mokonzi Roboami alongaki komata na shar na ye mpo na kokima na Yelusalemi.
19 Israël est resté, jusqu’à ce jour, infidèle à la maison de David.
Ezali boye nde bana ya Isalaele batombokelaki ndako ya Davidi kino na mokolo ya lelo.
20 Tout Israël, en apprenant le retour de Jéroboam, l’invita à venir à l’assemblée, et le proclama roi d’Israël; la tribu de Juda seule resta attachée à la maison de David.
Tango bana nyonso ya Isalaele bayokaki ete Jeroboami azongi, batindaki bato kobenga ye ete aya na mayangani, mpe bakomisaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba. Kaka libota ya Yuda nde etikalaki kotosa bokonzi ya ndako ya Davidi.
21 Roboam se rendit à Jérusalem et convoqua toute la maison de Juda ainsi que la tribu de Benjamin, cent quatre-vingt mille guerriers d’élite, pour faire la guerre à la maison d’Israël afin de restituer la royauté à Roboam, fils de Salomon.
Tango Roboami azongaki na Yelusalemi, asangisaki libota nyonso ya Yuda mpe libota ya Benjame, aponaki kati na bango bilombe ya bitumba nkoto nkama moko na tuku mwambe mpo na kobundisa ndako ya Isalaele mpe kozongisa bokonzi na maboko ya Roboami, mwana mobali ya Salomo.
22 Alors la parole divine s’adressa à Chemaya, homme de Dieu, en ces termes:
Kasi Nzambe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe:
23 "Parle ainsi à Roboam, fils de Salomon, roi de Juda, à toute la maison de Juda et de Benjamin et au reste du peuple:
« Yebisa Roboami, mwana mobali ya Salomo, mokonzi ya Yuda; mpe bana nyonso ya Yuda, ya Benjame mpe ba-oyo batikali:
24 Ainsi parle le Seigneur: N’Allez point faire la guerre à vos frères, les enfants d’Israël, rentrez chacun dans vos demeures, car c’est par moi que cet événement s’est produit." Ils obéirent à la parole du Seigneur, et retournèrent sur leurs pas, selon son ordre.
‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Bokende te kobundisa bandeko na bino, bato ya Isalaele! Tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye, pamba te Ngai moko nde nasali makambo nyonso oyo eleki. › » Batosaki Liloba na Yawe mpe bazongaki na bandako na bango mpo na kotosa mitindo ya Yawe.
25 Jéroboam fortifia Sichem, sur la montagne d’Ephraïm, et y résida; puis il en sortit et fortifia Penouêl.
Jeroboami atongaki engumba Sishemi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe avandaki kuna. Longwa na Sishemi, abimaki mpe akendeki kotonga Penueli.
26 Or, Jéroboam se dit en lui-même: "La royauté pourrait revenir maintenant à la maison de David.
Jeroboami amilobelaki: « Ndenge makambo ezali kotambola, bokonzi ekoki kozonga na ndako ya Davidi.
27 Si ce peuple monte à Jérusalem pour y offrir des sacrifices dans la maison de Dieu, il se reprendra d’amour pour son maître, pour Roboam, roi de Juda; on me tuera, et l’on reviendra à Roboam, roi de Juda."
Soki bato oyo bamati na Yelusalemi mpo na kobonza mbeka na Tempelo ya Yawe, bakopesa lisusu mitema na bango epai ya nkolo na bango, Roboami, mokonzi ya Yuda. Bakoboma ngai mpe bakozonga epai ya mokonzi Roboami. »
28 Après en avoir délibéré, le roi fit faire deux veaux d’or et dit au peuple: "Assez longtemps vous avez monté à Jérusalem! Voici tes dieux, Israël, qui t’ont tiré du pays d’Egypte!"
Sima na ye koluka toli, mokonzi asalaki bikeko mibale ya bana ngombe ya wolo. Alobaki na bato: — Oh Isalaele, bokeyi mpe mingi na Yelusalemi! Botala banzambe na bino oyo babimisaki bino na Ejipito.
29 Il en mit un à Béthel, et plaça l’autre à Dan.
Jeroboami atiaki ekeko moko na Beteli mpe mosusu na Dani.
30 Cet acte devint une source de péchés, car le peuple alla jusqu’à Dan rendre hommage à l’un des veaux.
Bongo likambo oyo ememaki bato na lisumu, pamba te bamoko bazalaki kokende kogumbamela ekeko oyo ezalaki na Beteli, mpe bamosusu bazalaki kokende mosika kino na Dani mpo na kogumbamela ekeko mosusu.
31 Il établit aussi un centre de hauts-lieux, et il institua des prêtres pris parmi le peuple et qui n’étaient point de la tribu de Lévi
Jeroboami atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atiaki banganga-nzambe oyo bazalaki ata te bato ya libota ya Levi.
32 Jéroboam institua une fête au huitième mois, le quinzième jour du mois, à l’instar de la fête célébrée en Juda, et sacrifia sur l’autel; ainsi fit-il à Béthel, offrant des sacrifices aux veaux qu’il avait fabriqués, et il installa dans Béthel les prêtres des hauts-lieux qu’il avait établis.
Jeroboami akataki ete basalaka feti mibu nyonso na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe ndenge basalaka na mokili ya Yuda, mpe abonzaki mbeka na etumbelo. Asalaki ndenge wana na Beteli epai wapi abonzaki mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya bana ngombe oyo asalaki, mpe atiaki banganga-nzambe na bisambelo oyo abongisaki na likolo ya bangomba.
33 Il monta sur l’autel qu’il avait fait à Béthel, le quinzième jour du huitième mois, mois qu’il avait imaginé de son chef; il le consacra comme fête pour les Israélites, et monta sur l’autel pour y brûler de l’encens.
Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe, sanza oyo aponaki na ndenge na ye moko, abonzaki mbeka na etumbelo oyo atongaki na Beteli. Akataki ete basalaka feti mibu nyonso mpo na bana ya Isalaele mpe amataki na etumbelo mpo na kotumba ansa.

< 1 Rois 12 >