< Psaumes 96 >

1 Chantez à l’Éternel un cantique nouveau; chantez à l’Éternel, toute la terre!
Boyembela Yawe nzembo ya sika! Bino nyonso, bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe!
2 Chantez à l’Éternel, bénissez son nom, annoncez de jour en jour son salut!
Boyembela Yawe, bopambola Kombo na Ye! Bopanza sango ya lobiko na Ye, mokolo na mokolo!
3 Racontez parmi les nations sa gloire, parmi tous les peuples ses œuvres merveilleuses.
Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso.
4 Car l’Éternel est grand, et fort digne de louange; il est terrible par-dessus tous les dieux.
Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.
5 Car tous les dieux des peuples sont des idoles, mais l’Éternel a fait les cieux.
Banzambe nyonso ya bikolo ezali bikeko ya pamba, nzokande Yawe akela likolo.
6 La majesté et la magnificence sont devant lui, la force et la beauté sont dans son sanctuaire.
Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, nguya mpe nkembo ezali kati na Esika na Ye ya bule.
7 Familles des peuples, rendez à l’Éternel, rendez à l’Éternel la gloire et la force!
Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe; bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye!
8 Rendez à l’Éternel la gloire de son nom; apportez une offrande et entrez dans ses parvis.
Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo! Bomema makabo na bino, bokota na lopango na Ye!
9 Adorez l’Éternel en sainte magnificence; tremblez devant lui, toute la terre.
Bogumbama liboso ya Yawe oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi! Bino bavandi ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye!
10 Dites parmi les nations: L’Éternel règne! Aussi le monde est affermi, il ne sera pas ébranlé. Il exercera le jugement sur les peuples avec droiture.
Boloba kati na mabota: « Yawe azali Mokonzi! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. »
11 Que les cieux se réjouissent, et que la terre s’égaie; que la mer bruie, et tout ce qui la remplit;
Tika ete likolo esepela, mpe mabele ezala kati na esengo! Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango epesa lokito!
12 Que les champs se réjouissent, et tout ce qui est en eux! Alors tous les arbres de la forêt chanteront de joie,
Tika ete zamba mobimba elongo na nyonso oyo ezali kati na yango esepela, mpe tika ete banzete nyonso ya zamba eganga na esengo
13 Devant l’Éternel; car il vient, car il vient pour juger la terre: il jugera le monde avec justice, et les peuples selon sa fidélité.
liboso ya Yawe, pamba te azali koya! Solo, azali koya kosambisa mabele; akosambisa mokili na bosembo, mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.

< Psaumes 96 >