< Psaumes 120 >
1 Cantique des degrés. À l’Éternel, en ma détresse, j’ai crié; et il m’a répondu.
Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe ayanolaki ngai.
2 Éternel! délivre mon âme de la lèvre menteuse, de la langue qui trompe.
Oh Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe wuta na lolemo ya lokuta!
3 Que te donnera-t-on, et que t’ajoutera-t-on, langue trompeuse? –
Yo, lolemo ya lokuta, Yawe akopesa yo nini, akofuta yo nini?
4 Des flèches aiguës d’un homme puissant, et des charbons ardents de genêt.
Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba, oyo ezali ya songe, elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.
5 Malheur à moi de ce que je séjourne en Méshec, de ce que je demeure avec les tentes de Kédar; –
Mawa na ngai, mpo ete navandi lokola mopaya kati na Mesheki, kati na bandako ya kapo ya Kedari.
6 Que mon âme ait tant demeuré avec ceux qui haïssent la paix!
Navandaki tango molayi kati na bato oyo balingaka kimia te.
7 Je veux la paix; mais si j’en parle, ils sont, eux, pour la guerre.
Ngai, nazali moto ya kimia; kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia, bango baponaka mbala moko bitumba.