< Michée 5 >
1 Maintenant, attroupe-toi, fille de troupes; il a mis le siège contre nous; ils frappent le juge d’Israël avec une verge sur la joue.
Oh engumba oyo elinga bitumba, sangisa basoda na yo, pamba te bazingeli biso! Bakobeta mokambi ya Isalaele fimbu na matama.
2 (Et toi, Bethléhem Éphrata, bien que tu sois petite entre les milliers de Juda, de toi sortira pour moi celui qui doit dominer en Israël, et duquel les origines ont été d’ancienneté, dès les jours d’éternité.)
Bongo yo, Beteleemi Efrata, atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda, ye oyo akokonza Isalaele akowuta kati na yo. Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza, wuta na ebandeli ya tango.
3 C’est pourquoi il les livrera jusqu’au temps où celle qui enfante aura enfanté; et le reste de ses frères retournera vers les fils d’Israël.
Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
4 Et il se tiendra et paîtra [son troupeau] avec la force de l’Éternel, dans la majesté du nom de l’Éternel, son Dieu. Et ils habiteront [en sûreté], car maintenant il sera grand jusqu’aux bouts de la terre.
Akotelema mpe akobatela bibwele na ye na nguya na Yawe, na lokumu ya Kombo ya Nzambe na ye; mpe bakovanda na kimia, pamba te sango ya lokumu ya kombo na ye ekopanzana mokili mobimba.
5 Et lui sera la paix. Quand l’Assyrien entrera dans notre pays, et quand il mettra le pied dans nos palais, nous établirons contre lui sept pasteurs et huit princes des hommes.
Boye, akozala kimia na bango! Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, oyo batonga makasi, tokotindela bango babateli sambo ya bibwele mpe bakambi mwambe ya bato mpo na kobundisa bango.
6 Et ils ravageront le pays d’Assyrie avec l’épée, et le pays de Nimrod dans ses portes. Et il [nous] délivrera de l’Assyrien, quand il entrera dans notre pays, et qu’il mettra le pied dans nos confins.
Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga. Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiri tango bakokota na makasi na mabele na biso mpe na bandelo na yango.
7 Et le résidu de Jacob sera, au milieu de beaucoup de peuples, comme une rosée de par l’Éternel, comme des ondées sur l’herbe, – qui n’attend pas l’homme, et ne dépend pas des fils des hommes.
Batikali ya Jakobi bakozala, kati na bikolo ebele lokola mamwe oyo ewuti epai na Yawe, mpe na likolo ya matiti lokola londende oyo ekweyaka na makasi ya moto te to mpe etalelaka moto te.
8 Et le résidu de Jacob sera, parmi les nations, au milieu de beaucoup de peuples, comme un lion parmi les bêtes de la forêt, comme un jeune lion parmi les troupeaux de menu bétail, qui, s’il passe, foule et déchire, et il n’y a personne qui délivre.
Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme: tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.
9 Ta main se lèvera sur tes adversaires, et tous tes ennemis seront retranchés.
Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo, mpe bayini na yo nyonso babebisama nye!
10 Et il arrivera, en ce jour-là, dit l’Éternel, que je retrancherai tes chevaux du milieu de toi, et je détruirai tes chars;
« Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo,
11 et je retrancherai les villes de ton pays, et je renverserai toutes tes forteresses;
nakobebisa bingumba ya mokili na yo mpe nakokweyisa bandako na yo, oyo batonga makasi;
12 et je retrancherai de ta main les enchantements, et tu n’auras pas de pronostiqueurs;
nakobebisa misala na yo nyonso ya kindoki, mpe okotikala lisusu na bato ya soloka te;
13 et je retrancherai du milieu de toi tes images taillées et tes statues, et tu ne te prosterneras plus devant l’ouvrage de tes mains.
nakobebisa banzambe ya bikeko oyo ezali kati na yo, mpe okofukamela lisusu te bikeko oyo maboko na yo esilaki kosala;
14 Et j’arracherai tes ashères du milieu de toi, et je détruirai tes villes.
nakobebisa makonzi ya bule ya nzambe Ashera oyo ezali kati na yo mpe nakobebisa bingumba na yo.
15 Et j’exécuterai sur les nations, avec colère et avec fureur, une vengeance dont elles n’ont pas entendu parler.
Na kanda na Ngai ya makasi, nakozongisa mabe na mabe na bikolo oyo etosaki Ngai te. »