< Genèse 2 >
1 Et les cieux et la terre furent achevés, et toute leur armée.
Ezalaki bongo nde likolo mpe mokili ekelamaki elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango.
2 Et Dieu eut achevé au septième jour son œuvre qu’il fit; et il se reposa au septième jour de toute son œuvre qu’il fit.
Na mokolo ya sambo, Nzambe asilisaki mosala oyo asalaki. Boye, na mokolo ya sambo, akataki mosala nyonso oyo azalaki kosala.
3 Et Dieu bénit le septième jour, et le sanctifia; car en ce jour il se reposa de toute son œuvre que Dieu créa en la faisant.
Nzambe apambolaki mokolo ya sambo, abulisaki yango, pamba te na mokolo yango nde akataki mosala nyonso ya kokela oyo azalaki kosala.
4 Ce sont ici les générations des cieux et de la terre lorsqu’ils furent créés, au jour où l’Éternel Dieu fit la terre et les cieux,
Tala ndenge likolo mpe mokili elongo na biloko oyo ezali kati na yango ezalaki tango ekelamaki. Tango Yawe Nzambe akelaki mokili mpe likolo,
5 et tout arbuste des champs avant qu’il soit sur la terre, et toute herbe des champs avant qu’elle croisse; car l’Éternel Dieu n’avait pas fait pleuvoir sur la terre, et il n’y avait pas d’homme pour travailler le sol;
ata nzete moko te ya elanga ezalaki, mpe ata molona moko te ya elanga etikalaki kobimisa moto, pamba te Yawe Nzambe anokisaki nanu mvula te na mokili, mpe moto azalaki te mpo na kolona yango na mabele.
6 mais une vapeur montait de la terre et arrosait toute la surface du sol.
Kasi mayi ezalaki kobima wuta na se mpe ezalaki kopanzana na etando nyonso ya mokili.
7 Et l’Éternel Dieu forma l’homme, poussière du sol, et souffla dans ses narines une respiration de vie, et l’homme devint une âme vivante.
Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi.
8 Et l’Éternel Dieu planta un jardin en Éden, du côté de l’orient, et il y plaça l’homme qu’il avait formé.
Yawe Nzambe alonaki elanga moko kati na Edeni, na ngambo ya este. Atiaki moto oyo akelaki kati na yango.
9 Et l’Éternel Dieu fit croître du sol tout arbre agréable à voir et bon à manger, et l’arbre de vie au milieu du jardin, et l’arbre de la connaissance du bien et du mal.
Yawe Nzambe abimisaki wuta na mabele banzete ya lolenge nyonso oyo ezalaki kitoko mpo na kotala mpe elengi mpo na kolia. Atiaki mpe nzete ya bomoi na kati-kati ya elanga; lisusu atiaki nzete ya koyeba malamu mpe mabe.
10 Et un fleuve sortait d’Éden pour arroser le jardin, et de là il se divisait et devenait quatre rivières.
Ebale moko ezalaki kobima na Edeni mpe ezalaki kosopa mayi na elanga. Mayi ya ebale yango ekabwanaki na biteni minei.
11 Le nom de la première est Pishon: c’est elle qui entoure tout le pays de Havila, où il y a de l’or.
Eteni ya liboso, kombo na yango « Pishoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Avila oyo mabele na yango ezalaki na wolo.
12 Et l’or de ce pays-là est bon; là est le bdellium et la pierre d’onyx.
Wolo ya mokili yango ezalaki kitoko. Ezalaki lisusu na molona ya malasi mpe na mabanga ya onikisi kati na mokili yango.
13 Et le nom de la seconde rivière est Guihon: c’est elle qui entoure tout le pays de Cush.
Eteni ya mibale, kombo na yango « Giyoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Kushi.
14 Et le nom de la troisième rivière est Hiddékel: c’est elle qui coule en avant vers Assur. Et la quatrième rivière, c’est l’Euphrate.
Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. »
15 Et l’Éternel Dieu prit l’homme et le plaça dans le jardin d’Éden pour le cultiver et pour le garder.
Yawe Nzambe azwaki moto mpe atiaki ye kati na elanga ya Edeni mpo na kolona yango mpe kobatela yango.
16 Et l’Éternel Dieu commanda à l’homme, disant: Tu mangeras librement de tout arbre du jardin;
Mpe Yawe Nzambe apesaki mitindo oyo na moto: « Okoki kolia mbuma nyonso ya elanga,
17 mais de l’arbre de la connaissance du bien et du mal, tu n’en mangeras pas; car, au jour où tu en mangeras, tu mourras certainement.
kasi okolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe; pamba te mokolo oyo okolia yango, okokufa solo. »
18 Et l’Éternel Dieu dit: Il n’est pas bon que l’homme soit seul; je lui ferai une aide qui lui corresponde.
Yawe Nzambe alobaki: « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. »
19 Et l’Éternel Dieu forma de la terre tous les animaux des champs et tous les oiseaux des cieux, et les fit venir vers l’homme pour voir comment il les nommerait; et tout nom que l’homme donnait à un être vivant fut son nom.
Yawe Nzambe asalaki, wuta na mabele, banyama nyonso ya zamba mpe bandeke nyonso ya likolo. Amemaki yango epai ya mobali mpo na kotala ndenge akopesa yango kombo, mpo ete ekelamu nyonso ya bomoi ebengama na kombo oyo mobali akopesa yango.
20 Et l’homme donna des noms à tout le bétail, et aux oiseaux des cieux, et à toutes les bêtes des champs. Mais pour Adam, il ne trouva pas d’aide qui lui corresponde.
Yango wana, mobali apesaki bakombo na bibwele nyonso, na bandeke nyonso ya likolo mpe na banyama nyonso ya zamba. Kasi amonaki te mosungi oyo akokaki kozala ndenge moko na ye.
21 Et l’Éternel Dieu fit tomber un profond sommeil sur l’homme, et il dormit; et il prit une de ses côtes, et il en ferma la place avec de la chair.
Na yango, Yawe Nzambe alalisaki mobali pongi ya makasi. Mpe wana mobali azalaki kolala, Yawe Nzambe azwaki mokuwa moko na mopanzi ya mobali mpe azipaki mosuni na esika yango.
22 Et l’Éternel Dieu forma une femme de la côte qu’il avait prise de l’homme, et l’amena vers l’homme.
Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali.
23 Et l’homme dit: Cette fois, celle-ci est os de mes os et chair de ma chair; celle-ci sera appelée femme (Isha), parce qu’elle a été prise de l’homme (Ish).
Boye, mobali alobaki: « Tala na mbala oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mosuni ya mosuni na ngai. Bakobenga ye mwasi, pamba te awuti na mobali. »
24 C’est pourquoi l’homme quittera son père et sa mère, et s’attachera à sa femme, et ils seront une seule chair.
Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.
25 Et ils étaient tous deux nus, l’homme et sa femme, et ils n’en avaient pas honte.
Mobali mpe mwasi na ye bazalaki bolumbu mpe bazalaki koyokana soni te.