< Exode 1 >
1 Et ce sont ici les noms des fils d’Israël qui entrèrent en Égypte; ils y entrèrent avec Jacob, chacun avec sa famille:
Tala bakombo ya bana ya Isalaele oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, moko na moko elongo na libota na ye:
2 Ruben, Siméon, Lévi et Juda;
Ribeni, Simeoni, Levi mpe Yuda;
3 Issacar, Zabulon et Benjamin;
Isakari, Zabuloni mpe Benjame;
4 Dan et Nephthali; Gad et Aser.
Dani mpe Nefitali; Gadi mpe Aseri.
5 Et toutes les âmes issues des reins de Jacob étaient 70 âmes; or Joseph était en Égypte.
Bakitani ya Jakobi bazalaki bango nyonso tuku sambo. Nzokande Jozefi amizalelaki na Ejipito.
6 Et Joseph mourut, et tous ses frères, et toute cette génération-là.
Jozefi mpe bandeko na ye nyonso ya mibali elongo na bato ya ekeke na bango basilaki na kokufa.
7 Et les fils d’Israël fructifièrent et foisonnèrent, et multiplièrent, et devinrent extrêmement forts; et le pays en fut rempli.
Kasi bana ya Isalaele babotanaki mingi mpe bakomaki ebele penza. Bakomaki lisusu ebele koleka mpe makasi mingi: batondisaki mokili ya Ejipito.
8 Et un nouveau roi se leva sur l’Égypte, qui n’avait point connu Joseph.
Mokonzi moko ya sika, oyo ayebaki Jozefi te, azwaki bokonzi na Ejipito.
9 Et il dit à son peuple: Voici, le peuple des fils d’Israël est plus nombreux et plus fort que nous.
Alobaki na bato na ye: « Botala bana ya Isalaele, bakomi ebele koleka biso mpe baleki biso na makasi.
10 Allons, soyons prudents à son égard, de peur qu’il ne se multiplie, et que, s’il arrivait une guerre, il ne se joigne, lui aussi, à nos ennemis, et ne fasse la guerre contre nous, et ne monte hors du pays.
Tosengeli kosala keba mpo na bango, mpo ete bakoma lisusu ebele te. Pamba te soki bitumba ekweyi, bakoki kokende na ngambo ya banguna na biso mpe kobundisa biso mpo ete babima na mokili oyo. »
11 Et ils établirent sur lui des chefs de corvées pour l’opprimer par leurs fardeaux. Et il bâtit pour le Pharaon des villes à greniers, Pithom et Ramsès.
Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.
12 Et selon qu’ils l’opprimaient, il multipliait et croissait; et ils eurent peur des fils d’Israël.
Kasi wana bazalaki konyokola bango, bazalaki kokoba kaka kobotana mpe kokoma ebele. Bongo bato ya Ejipito bakomaki kobanga bana ya Isalaele.
13 Et les Égyptiens firent servir les fils d’Israël avec dureté,
Bato ya Ejipito bakotisaki bana ya Isalaele na bowumbu ya makasi
14 et ils leur rendirent la vie amère par un dur service, en argile, et en briques, et par toute sorte de service aux champs: tout le service dans lequel on les faisait servir était avec dureté.
mpe bakomaki konyokola bango na misala makasi: kosala potopoto, kobeta babiliki mpe kosala misala nyonso ya bilanga. Misala nyonso oyo bazalaki kosalisa bango ezalaki ya pasi mpe ya makasi.
15 Et le roi d’Égypte parla aux sages-femmes hébreues, dont l’une avait nom Shiphra et la seconde se nommait Pua,
Mokonzi ya Ejipito alobaki na basi oyo babotisaka basi ya Ba-Ebre, oyo bakombo na bango ezalaki Shifra mpe Puwa:
16 et il dit: Quand vous accoucherez les femmes hébreues et que vous les verrez sur les sièges, si c’est un fils, vous le ferez mourir, et si c’est une fille, elle vivra.
« Tango bokobotisa basi ya Ba-Ebre, botala soki mwana nini abotami; soki azali mwana mobali, boboma ye; kasi soki azali mwana mwasi, botika ye na bomoi. »
17 Mais les sages-femmes craignirent Dieu, et ne firent pas comme le roi d’Égypte leur avait dit; et elles laissèrent vivre les enfants mâles.
Kasi basi oyo babotisaka babangaki Nzambe mpe basalaki te makambo oyo mokonzi ya Ejipito atindaki bango kosala; batikaki bana mibali na bomoi.
18 Et le roi d’Égypte appela les sages-femmes, et leur dit: Pourquoi avez-vous fait cela, et avez-vous laissé vivre les enfants mâles?
Boye mokonzi ya Ejipito abengisaki basi oyo babotisaka mpe atunaki bango: — Mpo na nini bosali boye? Mpo na nini botiki bana mibali na bomoi?
19 Et les sages-femmes dirent au Pharaon: Parce que les femmes hébreues ne sont pas comme les Égyptiennes; car elles sont vigoureuses: avant que la sage-femme vienne vers elles, elles ont enfanté.
Basi oyo babotisaka bazongiselaki Faraon: — Basi ya Ba-Ebre bazali lokola basi ya Ejipito te. Bazali makasi, babotaka liboso ete basi oyo babotisaka bakoma.
20 Et Dieu fit du bien aux sages-femmes; et le peuple multiplia, et devint très fort.
Nzambe asalaki bolamu epai ya basi oyo babotisaka. Boye bana ya Isalaele bakobaki kaka kokoma ebele mpe makasi koleka.
21 Et il arriva, parce que les sages-femmes craignirent Dieu, qu’il leur fit des maisons.
Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango.
22 Et le Pharaon commanda à tout son peuple, disant: Tout fils qui naîtra, jetez-le dans le fleuve; mais toute fille, laissez-la vivre.
Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso: « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. »