< Esther 6 >

1 Cette nuit-là le sommeil fuyait le roi, et il ordonna d’apporter le livre d’annales des chroniques, et on les lut devant le roi;
Na butu wana, lokola mokonzi akokaki kolala te, asengaki ete bamemela ye buku ya masolo, masolo ya bokonzi na ye, mpo ete batanga yango liboso na ye.
2 et on y trouva écrit que Mardochée avait fait connaître, à l’égard de Bigthan et de Théresh, les deux eunuques du roi, gardiens du seuil, qu’ils avaient cherché à porter la main sur le roi Assuérus.
Emonanaki ete bakomaki boye kati na yango: Maridoshe afundaki Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kokengela ekuke ya mokonzi, oyo basalaki likita mpo na koboma mokonzi Kizerisesi.
3 Et le roi dit: Quel honneur et quelle distinction a-t-on conférés à Mardochée, à cause de cela? Et les serviteurs du roi qui le servaient, dirent: On n’a rien fait pour lui.
Mokonzi atunaki: — Lokumu mpe lifuti nini Maridoshe azwaki mpo na yango? Basali na ye bazongisaki: — Basala ata eloko moko te mpo na ye.
4 Et le roi dit: Qui est dans la cour? Or Haman était venu dans la cour extérieure de la maison du roi, pour dire au roi de faire pendre Mardochée au bois qu’il avait dressé pour lui.
Mokonzi atunaki: — Nani azali kati na lopango? Nzokande Amani awutaki kokota na lopango ya libanda ya ndako ya mokonzi mpo na kosolola na ye mpo ete badiembika Maridoshe na nzete oyo atelemisaki mpo na ye.
5 Et les serviteurs du roi lui dirent: Voici Haman, qui se tient dans la cour. Et le roi dit: Qu’il entre.
Basali ya mokonzi bazongisaki: — Ezali Amani nde azali kati na lopango. Mokonzi alobaki: — Bokotisa ye.
6 Et Haman entra. Et le roi lui dit: Que faut-il faire à l’homme que le roi se plaît à honorer? Et Haman pensa dans son cœur: À quel autre qu’à moi plairait-il au roi de faire honneur?
Tango Amani akotaki, mokonzi atunaki ye: — Tokoki kosala nini mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu? Amani amilobelaki: « Nani lisusu oyo mokonzi akoki kopesa lokumu soki ngai te? »
7 Et Haman dit au roi: Quant à l’homme que le roi se plaît à honorer,
Amani azongiselaki mokonzi: — Mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu,
8 qu’on apporte le vêtement royal dont le roi se revêt, et le cheval que le roi monte, et sur la tête duquel on met la couronne royale;
tika ete bamema nzambala ya bokonzi oyo mokonzi alataka elongo na mpunda oyo mokonzi amataka mpe batia motole ya bokonzi na moto ya mpunda yango.
9 et que le vêtement et le cheval soient remis aux mains d’un des princes du roi les plus illustres; et qu’on revête l’homme que le roi se plaît à honorer, et qu’on le promène par les rues de la ville, monté sur le cheval, et qu’on crie devant lui: C’est ainsi qu’on fait à l’homme que le roi se plaît à honorer.
Tika ete bapesa nzambala mpe mpunda yango epai ya kalaka oyo aleki na lokumu kati na bakalaka ya mokonzi, mpe tika ete balatisa nzambala na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, mpe tika ete batambolisa ye likolo ya mpunda na balabala ya engumba na kotatola liboso na ye: « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo ye alingi kopesa lokumu! »
10 Et le roi dit à Haman: Hâte-toi, prends le vêtement et le cheval, comme tu l’as dit, et fais ainsi à Mardochée, le Juif, qui est assis à la porte du roi. N’omets rien de tout ce que tu as dit.
Mokonzi alobaki na Amani: — Kende noki koluka nzambala mpe mpunda ndenge olobi, mpe sala yango mpo na Moyuda Maridoshe oyo asalaka mosala na ye na ekuke ya mokonzi. Kati na makambo nyonso oyo osili koloba, kotika ata eloko moko te.
11 Et Haman prit le vêtement et le cheval, et revêtit Mardochée et le promena à cheval par les rues de la ville, et il criait devant lui: C’est ainsi qu’on fait à l’homme que le roi se plaît à honorer!
Amani azwaki nzambala mpe mpunda, alatisaki Maridoshe nzambala yango mpe atambolisaki ye likolo ya mpunda na balabala nyonso ya engumba na kotatola liboso na ye: « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo alingi kopesa lokumu! »
12 Et Mardochée revint à la porte du roi. Et Haman se rendit en hâte à sa maison, triste et la tête couverte.
Sima, Maridoshe azongaki na ekuke ya mokonzi; kasi Amani azongaki noki na ndako na ye, na soni mpe azipa moto na ye.
13 Et Haman raconta à Zéresh, sa femme, et à tous ses amis, tout ce qui lui était arrivé. Et ses sages et Zéresh, sa femme, lui dirent: Si Mardochée devant lequel tu as commencé de tomber est de la race des Juifs, tu ne l’emporteras pas sur lui, mais tu tomberas certainement devant lui.
Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye: — Lokola kokweyisama na yo ebandi liboso ya Maridoshe oyo azali Moyuda, okokoka kolonga ye te; solo penza, okokweyisama lisusu na se koleka!
14 Comme ils parlaient encore avec lui, les eunuques du roi s’approchèrent et se hâtèrent de conduire Haman au festin qu’Esther avait préparé.
Wana bazalaki nanu kosolola na ye, basoda ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, bayaki mpe bamemaki Amani na lombangu na feti oyo Ester abongisaki.

< Esther 6 >