< Ecclésiaste 2 >

1 J’ai dit en mon cœur: Allons! je t’éprouverai par la joie: jouis donc du bien-être. Et voici, cela aussi est vanité.
Namilobelaki: « Yaka sik’oyo; nakomekisa yo bilengi mpo ete ozala moto ya esengo! » Nzokande, yango mpe ezalaki kaka pamba.
2 J’ai dit au rire: [Tu es] déraison; et à la joie: Que fait-elle?
Na tina na koseka, nalobaki: « Ezali na yango kaka bozoba! » Bongo na tina na elengi, nalobaki: « Esalaka nini? »
3 J’ai recherché en mon cœur de traiter ma chair avec du vin, tout en conduisant mon cœur par la sagesse, et de saisir la folie, jusqu’à ce que je voie quel serait, pour les fils des hommes, ce bien qu’ils feraient sous les cieux tous les jours de leur vie.
Wana motema na ngai ezalaki nanu kokamba ngai na bwanya, nazwaki mokano ya komipesa na masanga ya vino mpe na makambo ya bozoba. Nazalaki nde na posa ya kososola bolamu nini moto akoki kozwa na kosala bongo na se ya moyi, na mwa mikolo ya bomoi na ye.
4 J’ai fait de grandes choses: je me suis bâti des maisons, je me suis planté des vignes;
Nazwaki mokano ya kosalisa misala minene: namitongelaki bandako minene mpe namilonelaki bilanga ya vino mpo na bomoi na ngai;
5 je me suis fait des jardins et des parcs, et j’y ai planté des arbres à fruit de toute espèce;
nasalaki bilanga mpe nabongisaki bisika mpo na kolona banzete ya ndenge na ndenge, oyo ebotaka bambuma;
6 je me suis fait des réservoirs d’eau pour en arroser la forêt où poussent les arbres.
natimolaki mpo na ngai moko, mabulu minene ya mayi mpo na kosopela banzete ya mike mayi.
7 J’ai acquis des serviteurs et des servantes, et j’en ai eu qui sont nés dans ma maison; j’ai eu aussi des troupeaux de gros et de menu bétail, en grand nombre, plus que tous ceux qui ont été avant moi à Jérusalem.
Nasombaki bawumbu ya mibali mpe ya basi; kobakisa na motango ya bawumbu mosusu oyo babotamaki kati na ndako na ngai. Nazalaki mpe na bangombe, bantaba mpe bameme ebele koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai.
8 Je me suis aussi amassé de l’argent et de l’or, et les trésors des rois et des provinces; je me suis procuré des chanteurs et des chanteuses, et les délices des fils des hommes, une femme et des concubines.
Nakongolaki mpo na ngai moko palata mpe wolo oyo ewutaki na bomengo ya bakonzi mpe ya bituka; nazwaki mpo na ngai bayembi ya basi mpe ya mibali, mpe oyo esepelisaka makasi mibali: mwasi mpe basi ebele ya kitoko.
9 Et je suis devenu grand et je me suis accru plus que tous ceux qui ont été avant moi à Jérusalem; et pourtant ma sagesse est demeurée avec moi.
Nakomaki moto monene koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai; kasi atako bongo, bwanya ezalaki kaka kotambolisa ngai.
10 Et quoi que mes yeux aient désiré, je ne les en ai point privés; je n’ai refusé à mon cœur aucune joie, car mon cœur s’est réjoui de tout mon travail, et c’est là la part que j’ai eue de tout mon travail.
Napimelaki miso na ngai eloko moko te oyo elulaki, napimelaki motema na ngai esengo moko te. Motema na ngai esepelaki na misala na ngai nyonso, mpe yango ezalaki lifuti ya mosala na ngai nyonso.
11 Et je me suis tourné vers toutes les œuvres que mes mains avaient faites, et vers tout le travail dont je m’étais travaillé pour [les] faire; et voici, tout était vanité et poursuite du vent, et il n’y en avait aucun profit sous le soleil.
Boye, tango natali misala nyonso oyo maboko na ngai esalaki mpe pasi nyonso oyo namonaki mpo na kokokisa yango, namoni ete nyonso wana ezalaki kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe, ezali na yango na litomba moko te na se ya moyi.
12 Et je me suis tourné pour voir la sagesse, et les choses déraisonnables et la folie; car que fera l’homme qui viendra après le roi? – ce qui a été déjà fait.
Bongo, nabalolaki makanisi na ngai mpo na koyekola bwanya, bozoba mpe bolema. Eloko nini mokitani ya mokonzi akoki kosala, oyo eleki oyo esila kosalema?
13 Et j’ai vu que la sagesse a un avantage sur la folie, comme la lumière a un avantage sur les ténèbres.
Namonaki ete bwanya ezali malamu koleka bozoba, ndenge pole ezali malamu koleka molili.
14 Le sage a ses yeux à sa tête, et le fou marche dans les ténèbres; mais j’ai connu, moi aussi, qu’un même sort les atteint tous.
Moto ya bwanya ayebi epai azali kokende, kasi zoba atambolaka na molili; kasi nasosoli likambo moko: suka na bango mibale ekozala kaka ndenge moko.
15 Et j’ai dit en mon cœur: Le sort du fou m’atteint, moi aussi; et pourquoi alors ai-je été si sage? Et j’ai dit en mon cœur que cela aussi est vanité.
Namilobelaki: « Suka ya zoba ekozala ndenge moko kaka na suka na ngai; sik’oyo, litomba nini ezali na moto ya kozala na bwanya mingi? » Namilobelaki: « Oyo mpe ezali kaka pamba. »
16 Car jamais on ne se souviendra du sage, non plus que du fou, puisque déjà dans les jours qui viennent tout est oublié. Et comment le sage meurt-il comme le fou?
Pamba te ezala moto ya bwanya to zoba, bakotikala kokanisa bango tango molayi te; mpe na mikolo ekoya, bato bakobosana bango mibale. Moto ya bwanya mpe akokufa lokola moto ya zoba.
17 Et j’ai haï la vie, parce que l’œuvre qui se fait sous le soleil m’a été à charge, car tout est vanité et poursuite du vent.
Boye, nayinaki bomoi, pamba te misala oyo esalemaka na se ya moyi ezali mabe mpo na ngai. Nyonso wana ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
18 Et j’ai haï tout le travail auquel j’ai travaillé sous le soleil, parce que je dois le laisser à l’homme qui sera après moi.
Nayinaki biloko nyonso oyo namonelaki pasi na se ya moyi, pamba te nakotika yango epai ya moto oyo akoya sima na ngai.
19 Et qui sait s’il sera un sage ou un sot? Et il sera maître de tout mon travail auquel j’ai travaillé et dans lequel j’ai été sage sous le soleil. Cela aussi est vanité.
Bongo, nani ayebi soki moto yango akozala moto ya bwanya to zoba? Nzokande, ye nde akozala na bokonzi na likolo ya misala nyonso oyo nabimiselaki motoki mpe mayele na ngai na se ya tango. Yango mpe ezali kaka pamba.
20 Alors je me suis mis à faire désespérer mon cœur à l’égard de tout le travail dont je me suis travaillé sous le soleil.
Bongo, motema na ngai ekomaki kobungisa elikya likolo ya misala makasi oyo nazalaki kosala na se ya moyi.
21 Car il y a tel homme qui a travaillé avec sagesse, et avec connaissance, et avec droiture, et qui laisse [ce qu’il a acquis] à un homme qui n’y a pas travaillé, pour être son partage. Cela aussi est vanité et un grand mal.
Pamba te moto akoki kosala mosala na ye na bwanya, na boyebi mpe na ndenge esengeli penza; kasi akotika nyonso oyo azali na yango epai ya moto oyo amonelaki yango pasi te; yango mpe ezali pamba mpe mabe makasi.
22 Car qu’est-ce que l’homme a de tout son travail, et de la poursuite de son cœur, dont il s’est tourmenté sous le soleil?
Litomba nini moto akoki kozwa na misala nyonso oyo asali mpe amonelaka pasi na se ya moyi?
23 Car tous ses jours sont douleur, et son occupation est chagrin; même la nuit son cœur ne repose pas. Cela aussi est vanité.
Mikolo nyonso ya mosala na ye ezali kaka pasi mpe komitungisa; ezala na butu, makanisi na ye ezalaka na kimia te; oyo mpe ezali kaka pamba.
24 Il n’y a rien de bon pour l’homme que de manger et de boire, et de faire jouir son âme du bien-être dans son travail. Et j’ai vu que cela aussi vient de la main de Dieu.
Eloko eleki malamu mpo na moto ezali kaka kolia, komela mpe kosepela na mosala na ye. Namoni ete oyo mpe ewuti na loboko na Nzambe;
25 Car qui peut manger, et qui peut jouir plus que moi?
pamba te soki Nzambe azalaki te, nani akoki kolia mpe kosepela?
26 Car à l’homme qui est bon devant lui, [Dieu] donne sagesse et connaissance et joie; mais à celui qui pèche, il donne l’occupation de rassembler et d’amasser, pour donner à celui qui est bon devant Dieu. Cela aussi est vanité et poursuite du vent.
Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.

< Ecclésiaste 2 >