< 1 Chroniques 23 >

1 Et David était vieux et rassasié de jours, et il établit Salomon, son fils, roi sur Israël.
Tango Davidi akomaki mobange makasi, akomisaki Salomo, mwana na ye ya mobali, mokonzi ya Isalaele.
2 Et il assembla tous les chefs d’Israël, et les sacrificateurs, et les Lévites.
Asangisaki bakambi nyonso ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi.
3 Et on dénombra les Lévites, depuis l’âge de 30 ans et au-dessus; et leur nombre, par tête, par homme, fut de 38 000.
Batangaki Balevi nyonso oyo bazalaki na mibu tuku misato mpe koleka: motango nyonso ya Balevi ezalaki nkoto tuku misato na mwambe.
4 Il y en eut d’entre eux 24 000 pour diriger l’œuvre de la maison de l’Éternel, et 6 000 intendants et juges,
Davidi alobaki: « Tika ete Balevi nkoto tuku mibale na minei bazala bakambi ya misala ya Tempelo ya Yawe, Balevi nkoto motoba bazala bakomi mikanda mpe basambisi,
5 et 4 000 portiers, et 4 000 qui louaient l’Éternel avec les instruments, que j’ai faits, [dit David, ] pour louer.
Balevi nkoto minei bazala bakengeli bikuke, mpe Balevi nkoto minei bakumisa Yawe na bibetelo mindule oyo nasalaki na tina na yango. »
6 Et David les distribua en classes d’après les fils de Lévi, Guershon, Kehath, et Merari.
Bongo Davidi akabolaki bango na masanga kolanda buku ya mabota ya bana mibali ya Levi: Gerishoni, Keati mpe Merari.
7 Des Guershonites: Lahdan et Shimhi.
Mpo na libota ya Gerishoni: Laedani mpe Shimei.
8 Les fils de Lahdan: Jekhiel, le premier, et Zétham, et Joël, trois.
Laedani azalaki na bana mibali misato: mokonzi Yeyeli, Zetami mpe Joeli.
9 Les fils de Shimhi: Shelomith, et Haziel, et Haran, trois. Ce sont les chefs des pères de Lahdan.
Shimei azalaki na bana mibali misato: Shelomiti, Azieli mpe Arani. Bango nde bazalaki bakambi ya mabota ya Laedani.
10 Et les fils de Shimhi: Jakhath, Ziza, et Jehush, et Beriha: ce sont les quatre fils de Shimhi.
Shimei azalaki na bana mibali mosusu minei: Yaati, Ziza, Yewushi mpe Beria.
11 Et Jakhath était le chef, et Ziza, le second. Mais Jehush et Beriha n’eurent pas beaucoup de fils; et, par maison de père, ils furent comptés pour une seule classe.
Yaati azalaki mwana ya liboso, mpe Ziza, mwana ya mibale. Nzokande Yewushi mpe Beria bazalaki na bakitani ebele te. Boye batangaki bango lokola libota moko.
12 Les fils de Kehath: Amram, Jitsehar, Hébron, et Uziel, quatre.
Keati azalaki na bana mibali minei: Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
13 Les fils d’Amram: Aaron et Moïse; et Aaron fut séparé pour qu’il soit sanctifié comme très saint, lui et ses fils, à toujours, pour faire fumer [ce qui se brûle] devant l’Éternel, pour faire son service, et pour bénir en son nom, à toujours.
Amirami azalaki na bana mibali mibale: Aron mpe Moyize. Aron aponamaki mpo na libela, elongo na bana na ye ya mibali, mpo na kobulisa Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso ya Yawe, mpo na kosalela Ye mpe kopambola bato mpo na libela na Kombo na Ye.
14 – Et quant à Moïse, homme de Dieu, ses fils furent attribués à la tribu de Lévi.
Bana ya Moyize, moto na Nzambe, batangaki bango na ekolo ya Levi.
15 Fils de Moïse: Guershom et Éliézer.
Bana mibali ya Moyize: Gerishomi mpe Eliezeri.
16 Fils de Guershom: Shebuel, le chef.
Bana mibali ya Gerishomi: Shebueli azalaki mwana mobali ya liboso.
17 Et les fils d’Éliézer étaient: Rekhabia, le chef; et Éliézer n’eut pas d’autres fils; mais les fils de Rekhabia furent très nombreux.
Bana mibali ya Eliezeri: Reabia azalaki mwana na ye se moko. Eliezeri azalaki na bana mosusu te, kasi Reabia azalaki na bana ebele.
18 – Fils de Jitsehar: Shelomith, le chef.
Bana mibali ya Yitseari: Shelomiti azalaki mwana ya liboso kati na bana mibali ya Yitseari.
19 Fils de Hébron: Jerija, le chef; Amaria, le second; Jakhaziel, le troisième; et Jekamham, le quatrième.
Bana mibali ya Ebron: Yeriya, mwana ya liboso; Amaria, mwana ya mibale; Yaazieli, mwana ya misato mpe Yekameami, mwana ya minei.
20 Fils d’Uziel: Michée, le chef, et Jishija, le second.
Bana mibali ya Uzieli: Mishe, mwana ya liboso; mpe Yishiya, mwana ya mibale.
21 Les fils de Merari: Makhli et Mushi. Fils de Makhli: Éléazar et Kis.
Bana mibali ya Merari: Maali mpe Mushi. Bana mibali ya Maali: Eleazari mpe Kishi.
22 Et Éléazar mourut, et n’eut point de fils, mais des filles; et les fils de Kis, leurs frères, les prirent [pour femmes].
Eleazari akufaki mpe atikalaki kobota bana mibali te, azalaki kaka na bana basi oyo babalanaki na bandeko na bango, bana mibali ya tata leki na bango Kishi.
23 Fils de Mushi: Makhli, et Éder, et Jerémoth, trois.
Bana mibali ya Mushi: Maali, Ederi mpe Yeremoti. Bango nyonso bazalaki misato.
24 Ce sont là les fils de Lévi, selon leurs maisons de pères, les chefs des pères, selon qu’ils furent recensés, en comptant les noms par tête; ils faisaient l’œuvre du service de la maison de l’Éternel, depuis l’âge de 20 ans, et au-dessus;
Bango nde bazalaki bakitani ya Levi kolanda bituka na bango, mpe bakambi ya bituka na bango kolanda ndenge bakomamaki, moto na moto, na buku ya mabota. Bazwaki mokumba ya kosala misala kati na Tempelo ya Yawe, kobanda na oyo azalaki na mibu tuku mibale mpe koleka.
25 car David dit: L’Éternel, le Dieu d’Israël, a donné du repos à son peuple, et il demeurera à Jérusalem pour toujours;
Bongo Davidi alobaki: « Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi bopemi na bato na Ye mpe avandi libela kati na Yelusalemi.
26 et les Lévites aussi n’auront plus à porter le tabernacle, ni tous les ustensiles pour son service.
Boye Balevi bazala lisusu te na mokumba ya komema Mongombo mpe bisalelo na yango nyonso. »
27 Car c’est selon les dernières paroles de David que se fit le dénombrement des fils de Lévi, depuis l’âge de 20 ans et au-dessus.
Ezalaki kolanda malako ya suka ya Davidi nde batangaki bakitani ya Levi kobanda na mibu tuku mibale mpe koleka.
28 Car leur place était à côté des fils d’Aaron pour le service de la maison de l’Éternel, [pour veiller] sur les parvis et les chambres, et sur la purification de toutes les choses saintes, et sur l’œuvre du service de la maison de Dieu:
Mosala ya Balevi ezalaki mpo na kosunga bakitani ya Aron na mosala ya Tempelo ya Yawe: kolandela bopeto ya veranda mpe ya bashambre, kopetola biloko nyonso ya bule mpe kosala misala nyonso ya Tempelo.
29 pour les pains à placer en rangées, et la fleur de farine pour le gâteau et les galettes sans levain, et [ce qui se cuit sur] la plaque, et ce qui est mêlé [avec de l’huile], et toutes les mesures de capacité et de longueur;
Bazalaki na mokumba ya kotanda mapa na mesa, kobongisa farine mpo na makabo ya bagato ezanga levire, bagalete mpe bagato batumba na kikalungu, mpe bagato basangisa na mafuta mpe biloko nyonso oyo bamekelaka kilo mpe molayi.
30 et pour se tenir là chaque matin, afin de célébrer et de louer l’Éternel, et de même chaque soir;
Bazalaki mpe na mokumba ya kotelema liboso ya Yawe, tongo mpe pokwa nyonso, mpo na kokumisa mpe kosanzola Ye;
31 et [pour être de service] pour tous les holocaustes qu’on offrait à l’Éternel, aux sabbats, aux nouvelles lunes, et aux jours solennels, en nombre, conformément à l’ordonnance à leur égard, continuellement, devant l’Éternel.
mpe kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba oyo bazalaki komema epai na Yawe na mikolo ya Saba, na ebandeli ya sanza mpe na mikolo nyonso ya bafeti oyo ekatama, kolanda motango oyo bakatelaki bango mpo na libela liboso ya Yawe.
32 Et ils vaquaient à leur charge à l’égard de la tente d’assignation, et à leur charge à l’égard du lieu saint, et à leur charge à l’égard des fils d’Aaron, leurs frères, pour le service de la maison de l’Éternel.
Boye Balevi bazalaki kosala mosala na bango ya kokengela Ndako ya kapo ya Bokutani mpe Esika ya bule, mpe ya kosunga bandeko na bango ya mibali, bana ya Aron, na mosala ya Tempelo ya Yawe.

< 1 Chroniques 23 >