< Proverbes 24 >
1 Ne porte pas envie aux hommes méchants, et ne désire pas d’être avec eux.
Kolulaka te bato oyo basalaka mabe mpe kolukaka te kozala elongo na bango,
2 Car leur cœur médite la violence, et leurs lèvres ne profèrent que le malheur. Avantages pratiques de la sagesse.
pamba te mitema na bango ekanisaka kaka kosala mabe, mpe bibebu na bango eyeisaka kaka mobulu soki elobi.
3 C’est par la sagesse qu’une maison s’élève, et par l’intelligence qu’elle s’affermit.
Ndako etongamaka na nzela ya bwanya, mpe elendisamaka na nzela ya mayele.
4 C’est par la science que l’intérieur se remplit, de tous les biens précieux et agréables.
Bashambre ekotondisama na biloko nyonso ya talo mpe ya kitoko na nzela ya boyebi.
5 Un homme sage est plein de force, et celui qui a de la science montre une grande puissance.
Moto ya bwanya atondi na nguya, moto oyo azalaka na boyebi alendisaka nguya na ye.
6 Car avec la prudence tu conduiras la guerre, et le salut est dans le grand nombre des conseillers.
Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya, mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli.
7 La sagesse est trop haute pour l’insensé; il n’ouvre pas la bouche à la porte de la ville. L’intrigant.
Bwanya ezalaka likolo mingi mpo na zoba, yango wana azalaka te na likambo ya koloba kati na mayangani oyo esalemaka pembeni ya ekuke.
8 Celui qui pense à faire le mal s’appelle un artisan d’intrigues. L’insensé.
Moto oyo asalaka mabongisi ya kosala mabe akokende sango lokola moteki baninga.
9 Le dessein de l’insensé, c’est le péché, et le railleur est en abomination parmi les hommes. L’indolent.
Mabongisi ya bozoba ezali masumu, mpe bato bayinaka motioli.
10 Si tu te montres faible au jour de la détresse, ta force n’est que faiblesse. Porter secours aux malheureux opprimés.
Soki omilembisi na mokolo ya pasi, makasi na yo ekozala pamba.
11 Délivre ceux qu’on traîne à la mort; ceux qui vont en chancelant au massacre, sauve-les!
Kangola bato oyo bazali komema bango na kufa, mpe bikisa bato oyo bazali kokende na kufa lokola bato oyo balangwe masanga.
12 Si tu dis: « Mais! Nous ne le savions pas! » Celui qui pèse les cœurs ne le voit-il pas? Celui qui veille sur ton âme ne le connaît-il pas, et ne rendra-t-il pas à chacun selon ses œuvres?
Soki olobi: « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye?
13 Mon fils, mange du miel, car il est bon; un rayon de miel est doux à ton palais.
Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi, pamba te ezalaka kitoko! Mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi ekozala elengi na lolemo na yo.
14 Sache que la sagesse est la même chose pour ton âme; si tu l’acquiers, il est un avenir, et ton espérance ne sera pas frustrée.
Yeba lisusu ete bwanya ezali elengi mpo na molimo na yo; soki ozwi yango, yeba ete lobi na yo ekozala malamu, mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.
15 Ne tends pas, ô méchant, des embûches à la demeure du juste, et ne dévaste pas le lieu où il repose;
Yo moto mabe, komeka te kotia mitambo kati na ndako ya moto ya sembo, mpe komeka te kopanza yango,
16 car sept fois le juste tombe, et il se relève, mais les méchants sont précipités dans le malheur.
pamba te ata soki moto ya sembo akweyi mbala sambo, akotelema kaka; nzokande pasi ekweyisaka moto mabe.
17 Si ton ennemi tombe, ne te réjouis pas, et que ton cœur ne se réjouisse pas de sa ruine,
Soki monguna na yo akweyi, kosepela te; mpe soki apengwi, tika ete motema na yo esepela te;
18 de peur que Yahweh ne le voie, que cela soit mauvais à ses yeux, et qu’il ne détourne de lui sa colère.
noki te Yawe akomona, akosepela te mpe akokitisela yo kanda na Ye.
19 Ne t’irrite pas à cause des méchants, ne porte pas envie aux pervers,
Kosilika te likolo ya bato oyo basalaka mabe, kolula te bato mabe;
20 car il n’y a point d’avenir pour celui qui fait le mal, et la lampe des méchants s’éteindra.
pamba te lobi ya malamu ekozala te mpo na moto oyo asalaka mabe, mpe mwinda ya bato mabe ekokufa.
21 Mon fils, crains Yahweh et le roi; ne te mêle pas avec les hommes remuants;
Mwana na ngai, tosaka Yawe mpe mokonzi, kosanganaka te na batomboki,
22 car soudain surgira leur malheur, et qui connaît la ruine des uns et des autres?
pamba te bango mibale bakoki kotindela batomboki pasi na pwasa. Bongo, nani ayebi pasi oyo bakoki kotinda?
23 Ce qui suit vient encore des sages: Il n’est pas bon, dans les jugements, d’avoir égard aux personnes.
Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya: Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te.
24 Celui qui dit aux méchants: « Tu es juste », les peuples le maudissent, les nations l’exècrent.
Moto oyo alobaka na moto mabe: « Ozali moto ya sembo, » bato bakolakela ye mabe, mpe bikolo ekotombokela ye.
25 Mais ceux qui le corrigent sont applaudis, sur eux viennent la bénédiction et le bonheur.
Kasi bato oyo bapamelaka moto mabe bakozala malamu mpe lipamboli ekozala likolo na bango.
26 Il baise sur les lèvres celui qui répond des paroles justes.
Eyano ya solo ezali lokola beze ya bibebu.
27 Règle ton travail au dehors, applique-le à ton champ, puis tu bâtiras ta maison.
Bongisa libanda ya mosala na yo, bongisa bilanga na yo, bongo na sima, tonga ndako na yo.
28 Ne témoigne pas à la légère contre ton prochain: voudrais-tu tromper par tes lèvres?
Kotatola na pamba te mpo na kosala moninga na yo mabe; mpo na nini olingi kosalela bibebu na yo na lokuta?
29 Ne dis pas: « Comme il m’a fait, je lui ferai; je rendrai à cet homme selon ses œuvres. »
Kolobaka te: « Nakosala ye ndenge asali ngai, nakozongisela ye kolanda makambo oyo ye asali. »
30 J’ai passé près du champ d’un paresseux, et près de la vigne d’un insensé.
Nalekaki pembeni ya elanga ya moto ya goyigoyi, mpe pembeni ya elanga ya vino ya moto oyo azangi mayele;
31 Et voici, … les épines y croissaient partout, les ronces en couvraient la surface, et le mur de pierres était écroulé.
bongo, tala ndenge etondi na banzube, tala ndenge matiti mabe ezipi yango, mpe mir na yango ya mabanga ebukani.
32 J’ai regardé, et j’ai appliqué mon cœur, j’ai considéré et j’ai tiré cette leçon:
Tango natiaki makanisi na ngai kati na makambo oyo namonaki, nazwaki mayele oyo:
33 « Un peu de sommeil, un peu d’assoupissement, un peu croiser les mains pour dormir,
mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala,
34 et ta pauvreté viendra comme un rôdeur, et ton indigence comme un homme armé. »
bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.