< Nombres 10 >
1 Yahweh parla à Moïse, en disant:
Yawe alobaki na Moyize:
2 « Fais-toi deux trompettes d’argent; tu les feras d’argent battu. Elles te serviront pour la convocation de l’assemblée et pour la levée des camps.
« Sala bakelelo mibale na palata oyo batuta. Okosalela yango mpo na kobengisa lisanga mpe mpo na kopesa mitindo ya kolongola molako.
3 Quand on en sonnera, toute l’assemblée se réunira auprès de toi, à l’entrée de la tente de réunion.
Soki bakelelo nyonso mibale ebeti nzela moko, lisanga mobimba ekosangana pembeni na yo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
4 Si l’on ne sonne que d’une trompette, les princes seulement, les chefs des milliers d’Israël, se réuniront auprès de toi.
Soki kelelo moko kaka nde ebeti, kaka bakambi, bakonzi ya bituka ya Isalaele nde bakosangana liboso na yo.
5 Quand vous sonnerez avec éclat, ceux qui campent à l’orient se mettront en marche;
Soki kelelo ebeti makasi, mabota oyo etongi molako na ngambo ya este ekokende.
6 quand vous sonnerez avec éclat pour la seconde fois, ceux qui campent au midi se mettront en marche; on sonnera avec éclat pour leur départ.
Soki ebeti makasi mpo na mbala ya mibale, mabota oyo etongi molako na ngambo ya sude ekokende. Ebeteli ya kelelo nde ekozala elembo mpo na kopesa mbela ya kokende.
7 Vous sonnerez aussi pour convoquer l’assemblée, mais non avec éclat.
Mpo na kosangisa lisanga, beta bakelelo, kasi makasi te.
8 Les fils d’Aaron, les prêtres, sonneront des trompettes: ce sera une loi perpétuelle pour vous et pour vos descendants.
Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bango nde bakobanda kobeta bakelelo yango. Ekozala mobeko ya libela mpo na bino mpe bakitani na bino.
9 Quand vous irez à la guerre dans votre pays contre l’ennemi qui vous attaquera, vous sonnerez des trompettes avec éclat, et vous serez rappelés au souvenir de Yahweh, votre Dieu, et vous serez délivrés de vos ennemis.
Tango, kati na mokili na bino moko, bokokende na bitumba mpo na kotelemela monguna oyo azali konyokola bino, bokobeta bakelelo na bino makasi. Boye, Yawe, Nzambe na bino, akokanisa bino mpe akokangola bino na maboko ya banguna na bino.
10 Dans vos jours de joie, dans vos fêtes et à vos nouvelles lunes, vous sonnerez des trompettes, en offrant vos holocaustes et vos sacrifices pacifiques, et elles seront pour vous un mémorial devant votre Dieu. Je suis Yahweh, votre Dieu. »
Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. »
11 La seconde année, au vingtième jour du deuxième mois, la nuée s’éleva de dessus la Demeure du témoignage;
Na mokolo ya tuku mibale, ya sanza ya mibale, ya mobu oyo ya mibale, lipata etelemaki na likolo ya Mongombo ya Litatoli.
12 et les enfants d’Israël, reprenant leurs marches, partirent du désert de Sinaï, et la nuée s’arrêta dans le désert de Pharan.
Boye, bana ya Isalaele balongwaki na esobe ya Sinai, basalaki mobembo mpe batambolaki bisika na bisika kino tango lipata eyaki kopema na esobe ya Parani.
13 Ils se mirent en marche pour la première fois, suivant le commandement de Yahweh par l’organe de Moïse.
Ezalaki mbala na bango ya liboso ya kolongwa na molako mpe kotambola kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
14 La bannière du camp des fils de Juda partit la première, selon leurs troupes, et la troupe de Juda était commandée par Nahasson, fils d’Aminadab;
Mampinga ya molako ya Yuda ezalaki kotambola liboso, elongo na bendele na bango. Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, nde azalaki mokonzi na bango.
15 la troupe de la tribu des fils d’Issachar était commandée par Nathanaël, fils de Suar;
Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Isakari.
16 et la troupe de la tribu des fils de Zabulon était commandée par Éliab, fils de Hélon.
Eliabi, mwana mobali ya Eloni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Zabuloni.
17 La Demeure fut démontée, et les fils de Gerson et les fils de Mérari partirent, portant la Demeure.
Bongo bakabolaki Mongombo na biteni-biteni. Bakitani ya Gerishoni mpe ya Merari nde bamemaki yango mpe bakendeki.
18 La bannière du camp de Ruben partit, selon leurs troupes, et la troupe de Ruben était commandée par Elisur, fils de Sédéur;
Mampinga ya molako ya Ribeni elandaki na sima mpo na kotambola. Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, nde azalaki mokonzi na bango.
19 la troupe de la tribu des fils de Siméon était commandée par Salamiel, fils de Surisaddaï;
Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Simeoni.
20 et la troupe de la tribu des fils de Gad était commandée par Éliasaph, fils de Duel.
Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Gadi.
21 Les Caathites partirent portant les objets sacrés, et les autres dressaient la Demeure, en attendant leur arrivée.
Sima, bato ya Keati bakendeki mpe bamemaki biloko ya bule. Balevi mosusu bazalaki kotonga Mongombo liboso ete bakoma.
22 La bannière du camp des fils d’Éphraïm partit, selon leurs troupes et la troupe d’Éphraïm était commandée par Élisama, fils d’Ammiud;
Mampinga ya molako ya Efrayimi elandaki mpe na sima mpo na kotambola. Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, nde azalaki mokonzi na bango.
23 la troupe de la tribu des fils de Manassé était commandée par Gamaliel, fils de Phadassur,
Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Manase.
24 et la troupe de la tribu de Benjamin était commandée par Abidan, fils de Gédéon.
Abidani, mwana mobali ya Gideoni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Benjame.
25 La bannière du camp des fils de Dan partit, selon leurs troupes: elle formait l’arrière-garde de tous les camps. La troupe de Dan était commandée par Ahiéser, fils d’Ammisaddaï;
Boye, mpo na kosukisa, mampinga ya libota ya Dani mpe elandaki na sima mpo na kotambola na se ya bendele na bango. Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, nde azalaki mokonzi na bango.
26 la troupe de la tribu des fils d’Aser était commandée par Phégiel, fils d'Ochran,
Pagieli, mwana mobali ya Okirani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Aseri;
27 et la troupe des fils de Nephthali était commandée par Ahira, fils d’enan.
mpe Akira, mwana mobali ya Enani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Nefitali.
28 Tel était l’ordre de marche des enfants d’Israël selon leurs troupes; et ils partirent.
Wana nde ezalaki molongo oyo mampinga ya bana ya Isalaele ezalaki kotambola na yango.
29 Moïse dit à Hobab, fils de Raguel, le Madianite, beau-père de Moïse: « Nous partons pour le lieu dont Yahweh a dit: Je vous le donnerai. Viens avec nous, et nous te ferons du bien, car Yahweh a promis de faire du bien à Israël. »
Moyize alobaki na Obabi, mwana mobali ya Reweli, moto ya Madiani, bokilo ya Moyize: — Tozali kokende na mokili oyo Yawe alobaki: « Nakopesa bino mokili yango. » Yaka kotambola elongo na biso. Tokosala ete obika bolamu oyo Yawe alakaki kosalela Isalaele.
30 Hobab lui répondit: « Je n’irai point, mais je m’en irai dans mon pays et ma famille. »
Obabi azongiselaki ye: — Te! Nakokende elongo na bino te, nakozonga na mboka na ngai, kati na libota na ngai.
31 Et Moïse dit: « Ne nous quitte pas, je te prie; puisque tu connais les lieux où nous aurons à camper dans le désert, tu nous serviras d’œil.
Kasi Moyize alobaki: — Nabondeli yo: kotika biso te, pamba te yo nde oyebi bisika oyo tosengeli kotonga molako kati na esobe; okozala motambolisi na biso.
32 Si tu viens avec nous, nous te ferons partager le bien que Yahweh nous fera. »
Soki otamboli na biso elongo, tokokabola elongo na yo eloko nyonso ya malamu oyo Yawe akopesa biso.
33 Étant partis de la montagne de Yahweh, ils firent trois journées de marche, et pendant ces trois journées de marche, l’arche de l’alliance de Yahweh s’avança devant eux pour leur chercher un lieu de repos.
Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.
34 La nuée de Yahweh était au-dessus d’eux pendant le jour, lorsqu’ils partaient du camp.
Na moyi, lipata na Yawe ezalaki likolo na bango, na tango bazalaki kolongola molako.
35 Quand l’arche partait, Moïse disait: « Lève-toi, Yahweh, et que tes ennemis soient dispersés! Que ceux qui te haïssent fuient devant ta face! »
Tango nyonso Sanduku ezalaki kokende, Moyize azalaki koloba: « Oh Yawe, telema! Tika ete banguna na Yo bapalangana! Tika ete banguna na Yo bakima liboso na Yo! »
36 Et quand elle s’arrêtait, il disait: « Reviens, Yahweh, vers les myriades des milliers d’Israël! »
Mpe tango nyonso lipata ezalaki kopema, azalaki koloba: « Oh Yawe, zonga kati na bana ya Isalaele, pamba te bazali ebele penza! »