< Isaïe 60 >

1 Lève-toi, et resplendis! Car ta lumière paraît, et la gloire de Yahweh s’est levée sur toi.
« Telema mpe ngenga, pamba te pole na yo ezali koya, mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo.
2 Voici que les ténèbres couvrent la terre, et une sombre obscurité les peuples; mais sur toi Yahweh se lève, et sa gloire se manifeste sur toi.
Tala, molili ezipi mabele mpe molili makasi ezipi bato, kasi Yawe atelemi mpo na yo mpe nkembo na Ye emonani epai na yo.
3 Les nations marchent vers ta lumière, et les rois vers la clarté de ton lever.
Bikolo ekotambola na pole na yo, mpe bakonzi bakotambola na kongenga ya pole na yo.
4 Lève tes regards autour de toi, et vois: Tous se rassemblent, ils viennent à toi; tes fils viennent de loin, et tes filles sont portées sur les bras.
Tombola miso zingazinga na yo mpe tala: Bango nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo; bana na yo ya mibali bawuti mosika, mpe oyo ya basi, bamemi bango na maboko.
5 Tu le verras alors, et tu seras radieuse; ton cœur tressaillira et se dilatera; car les richesses de la mer se dirigeront vers toi, les trésors des nations viendront à toi.
Boye, okomona mpe okongenga, motema na yo ekobeta mpe ekosepela; bomengo ya ebale ekoya epai na yo, mpe bozwi ya bikolo ekoya epai na yo.
6 Des multitudes de chameaux te couvriront, les dromadaires de Madian et d’Epha; tous ceux de Saba viendront, ils apporteront de l’or et de l’encens, et publieront les louanges de Yahweh.
Bashamo ebele ekotondisa mokili na yo, bana ya shamo ya mokili ya Madiani mpe ya Efa. Yango nyonso ekowuta na Saba, ekomema wolo mpe malasi ya ansa, mpe ekotatola masanzoli na Yawe.
7 Tous les troupeaux de Cédar se rassembleront chez toi; les béliers de Nabaïoth seront à ton service; ils monteront sur mon autel comme une offrande agréable, et je glorifierai la maison de ma gloire.
Bibwele nyonso ya Kedari ekosangana epai na yo, bameme ya mibali ya Nebayoti ekosalela yo; ekondimama lokola mbeka na likolo ya etumbelo na Ngai, mpe nakongengisa Tempelo na nzela ya nkembo na Ngai.
8 Qui sont ceux-là qui volent comme des nuées, comme des colombes vers leur colombier?
Banani oyo bazali kokima lokola mapata, lokola bibenga epai ya babokoli na yango?
9 Car les îles espèrent en moi, et les vaisseaux de Tarsis viendront les premiers; Pour ramener tes fils de loin, avec leur argent et leur or, pour honorer le nom de Yahweh, ton Dieu, et le Saint d’Israël, parce qu’il t’a glorifié.
Solo, bisanga ekotalela Ngai; bamasuwa ya Tarsisi ekozala na liboso, ekomema bana na yo ya mibali longwa mosika, elongo na palata mpe wolo, mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele; pamba te apesi yo nkembo.
10 Les fils de l’étranger rebâtiront tes murailles, et leurs rois seront tes serviteurs; car je t’ai frappée dans ma colère, mais, dans ma bienveillance, j’ai eu compassion de toi.
Bapaya bakotonga lisusu bamir na yo, mpe bakonzi na bango bakosalela yo. Ezala nabetaki yo na kanda na Ngai, kasi nakoyokela yo mawa na ngolu na Ngai.
11 Tes portes seront toujours ouvertes; jour et nuit, elles ne seront pas fermées, afin de laisser entrer chez toi les trésors des nations et leurs rois en cortège triomphal.
Bikuke na yo ekozala tango nyonso efungwama, ekotikala kokangama te, ezala na moyi to na butu, mpo ete bato bamemela yo bozwi ya bikolo, bakonzi na yango na molongo lokola bato bakangami na etumba.
12 Car la nation et le royaume qui ne te serviront point périront; ces nations-là seront entièrement détruites.
Pamba te ekolo to mboka oyo ekosalela yo te ekobebisama; solo, ekobebisama nye.
13 La gloire du Liban viendra chez toi, le cyprès, le platane et le buis tous ensemble, pour orner le lieu de mon sanctuaire, et je glorifierai le lieu où reposent mes pieds.
Nkembo ya Libani ekoya epai na yo, banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwisi ekoya elongo mpo na kobongisa Esika na Ngai ya bule; mpe nakopesa lokumu na esika na Ngai, oyo natiaka makolo na Ngai.
14 Les fils de tes oppresseurs viendront à toi le front courbé, et tous ceux qui te méprisaient se prosterneront à tes pieds; et l’on t’appellera la Ville de Yahweh, la Sion du Saint d’Israël.
Bana ya banyokoli na yo bakoya kofukama liboso na yo; bato nyonso oyo batiolaki yo bakofukama na se ya matambe na yo mpe bakobenga yo Engumba ya Yawe, Siona ya Mosantu ya Isalaele.
15 Au lieu que tu étais délaissée, haïe et solitaire, je ferai de toi l’orgueil des siècles, la joie de toutes les générations.
Ata basundolaki yo mpe bayinaki yo, mpe moto moko te azalaki lisusu koleka epai na yo, nakopesa yo lokumu mpo na tango nyonso mpe esengo ya libela na libela.
16 Tu suceras le lait des nations, tu suceras la mamelle des rois, et tu sauras que moi, Yahweh, je suis ton Sauveur, et que le Puissant de Jacob est ton Rédempteur.
Okomela miliki ya bikolo mpe okomela mabele ya bakonzi; boye okoyeba solo ete Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo mpe Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi.
17 Au lieu de l’airain, je ferai venir de l’or, et au lieu du fer, je ferai venir de l’argent; et au lieu du bois, de l’airain, et au lieu des pierres, du fer; et je te donnerai pour gouverneurs, la paix, pour magistrats, la justice.
Na esika ya bronze, nakomemela yo wolo, mpe na esika ya bibende, nakomemela yo palata; na esika ya banzete, nakomemela yo bronze; mpe na esika ya mabanga, nakomemela yo bibende; nakokomisa Kimia moyangeli na yo, mpe Bosembo, mokambi na yo.
18 On n’entendra plus parler de violence dans ton pays, de ravage ni de ruine dans tes frontières; tu appelleras tes murailles: Salut, et tes portes: Louange.
Kati na mokili na yo, okoyoka lisusu te makelele ya mobulu to ya kopanza to ya kobebisama kati na etando na yo; kasi okobenga bamir na yo ‹ Lobiko, › mpe bikuke na yo ‹ Masanzoli. ›
19 Le soleil ne sera plus ta lumière pendant le jour, et la lueur de la lune ne t’éclairera plus; Yahweh sera pour toi une lumière éternelle, et ton Dieu sera ta gloire.
Pole ya moyi ekongengisa lisusu mokolo na yo te, to kongenga ya sanza ekongengisa yo lisusu te na butu; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe Nzambe na yo akozala nkembo na yo.
20 Ton soleil ne se couchera plus, et ta lune ne se retirera plus; car Yahweh sera pour toi une lumière éternelle, et les jours de ton deuil seront achevés.
Moyi na yo ekolala lisusu te, mpe sanza na yo ekobunga lisusu te; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe mikolo na yo ya pasi ekosila.
21 Dans ton peuple, tous seront justes, et ils posséderont le pays pour toujours, eux, le rejeton que j’ai planté, l’ouvrage de mes mains, créé pour ma gloire.
Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.
22 Le plus petit deviendra un millier, et le moindre une nation puissante. Moi, Yahweh, en leur temps, je hâterai ces choses.
Oyo aleki moke kati na bino akokoma nkoto moko, mpe oyo aleki moke penza akokoma ekolo ya makasi. Ngai, nazali Yawe, nakoyeisa yango mbangu na tango na yango. »

< Isaïe 60 >