< Genèse 45 >

1 Alors Joseph ne put se contenir devant tous ceux qui étaient présents; il s’écria: « Faites sortir tout le monde. » Et il ne resta personne avec lui quand il se fit connaître à ses frères.
Jozefi akokaki lisusu komikanga te liboso ya bato nyonso oyo bazalaki liboso na ye, agangaki: « Bobimisa bato nyonso! » Boye, moto moko te azalaki pembeni na ye tango amimonisaki epai ya bandeko na ye ya mibali.
2 Il éleva la voix en pleurant; les Égyptiens l’entendirent, et la maison de Pharaon l’entendit.
Lokola alelaki na mongongo makasi, bato ya Ejipito bayokaki ye; mpe sango ekendeki kino na ndako ya Faraon.
3 Joseph dit à ses frères: « Je suis Joseph! Mon père vit-il encore? » Mais ses frères ne purent lui répondre, tant ils étaient bouleversés devant lui.
Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali: — Nazali Jozefi! Tata na ngai azali nanu na bomoi? Kasi bandeko na ye bakokaki koyanola ye te, pamba te bazalaki kolenga liboso na ye.
4 Et Joseph dit à ses frères: « Approchez-vous de moi »; et ils s’approchèrent. Il dit: « Je suis Joseph, votre frère, que vous avez vendu pour être mené en Égypte.
Jozefi alobaki na bango: — Bopusana pembeni na ngai! Tango bapusanaki, alobaki: — Nazali Jozefi, ndeko na bino ya mobali oyo botekaki mpo ete bamema ngai na Ejipito.
5 Maintenant ne vous affligez pas et ne soyez pas fâchés contre vous-mêmes de ce que vous m’avez vendu pour être conduit ici; c’est pour vous sauver la vie que Dieu m’a envoyé devant vous.
Kasi sik’oyo, bomitungisa te mpe bozala na mawa te na ndenge botekaki ngai awa. Ezali mpo na kobikisa bomoi na bino nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino.
6 Car voilà deux ans que la famine est dans ce pays, et pendant cinq années encore il n’y aura ni labour ni moisson.
Oyo ezali mobu ya mibale wuta nzala makasi ekotaki na mokili; mpe na mibu mitano oyo ezali koya, bakolona te mpe bakobuka te.
7 Dieu m’a envoyé devant vous pour vous assurer un reste dans le pays et vous faire subsister pour une grande délivrance.
Kasi Nzambe atindaki ngai liboso na bino mpo ete bowumela na mokili mpe bobikisa bomoi na bino na nzela ya kokangolama monene.
8 Et maintenant, ce n’est pas vous qui m’avez envoyé ici, mais c’est Dieu; il m’a établi père de Pharaon, seigneur sur toute sa maison et gouverneur de tout le pays d’Égypte.
Ezali bino te bato botindaki ngai awa, kasi ezali nde Nzambe. Akomisaki ngai tata ya Faraon, nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya mokili mobimba ya Ejipito.
9 Hâtez-vous de monter vers mon père, et vous lui direz: Ainsi a parlé ton fils Joseph: Dieu m’a établi seigneur sur toute l’Égypte; descends vers moi sans tarder.
Bozonga noki epai ya tata na ngai mpe boloba na ye: « Mwana na yo, Jozefi, alobi: ‹ Nzambe akomisa ngai nkolo ya Ejipito mobimba; yaka epai na ngai, kowumela te.
10 Tu habiteras dans le pays de Gessen, et tu seras près de moi, toi et tes fils, et les fils de tes fils, tes brebis et tes bœufs, et tout ce qui est à toi.
Okovanda na etuka ya Gosheni mpe okozala pembeni na ngai: yo, bana na yo mpe bakitani na yo, bameme na yo, bantaba na yo, bangombe na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango.
11 Là, je te nourrirai, — car il y aura encore cinq années de famine, — afin que tu ne souffres pas, toi, ta maison et tout ce qui est à toi.
Kuna, nakokokisa baposa na yo nyonso, pamba te mibu mitano ya nzala makasi ezali koya; soki te, yo elongo na bana na yo mpe bibwele na yo nyonso, bokokoma na pasi.
12 Voici, vos yeux voient, ainsi que les yeux de mon frère Benjamin, que c’est ma bouche qui vous parle.
Bino moko bozali komona! Ndeko na ngai, Benjame, akoki mpe komona yango, ete ezali ngai moto nazali koloba na bino.
13 Racontez à mon père toute ma gloire en Égypte et tout ce que vous avez vu, et faites au plus tôt descendre ici mon père. »
Boyebisa tata na ngai lokumu nyonso oyo nazali na yango awa na Ejipito, boyebisa ye makambo nyonso oyo bosili komona mpe bomemela ngai ye awa na lombangu. › »
14 Alors il se jeta au cou de Benjamin, son frère, et pleura; et Benjamin pleura sur son cou.
Sima, amibwakaki na kingo ya ndeko na ye Benjame mpe alelaki; Benjame mpe akangaki ye na kingo, bongo alelaki.
15 Il baisa aussi tous ses frères, et pleura en les tenant embrassés; puis ses frères s’entretinrent avec lui.
Apesaki bandeko na ye nyonso beze mpe alelaki. Sima na yango, basololaki.
16 Le bruit se répandit dans la maison de Pharaon que les frères de Joseph étaient venus: ce qui fut agréable à Pharaon et à ses serviteurs.
Tango sango ekomaki na ndako ya Faraon ete bandeko ya Jozefi bayei, Faraon elongo na bakambi na ye nyonso basepelaki.
17 Et Pharaon dit à Joseph: « Dis à tes frères: Faites ceci: chargez vos bêtes et partez pour le pays de Chanaan
Faraon alobaki na Jozefi: — Yebisa bandeko na yo: « Botia biloko likolo ya banyama na bino mpe bozonga na mokili ya Kanana.
18 et, ayant pris votre père et vos familles, revenez auprès de moi. Je vous donnerai ce qu’il y a de meilleur au pays d’Égypte, et vous mangerez la graisse du pays.
Boyela ngai tata na bino mpe mabota na bino; nakopesa bino mabele oyo eleki kitoko kati na Ejipito mpe bokolia biloko na yango oyo eleki kitoko. »
19 Tu es autorisé à leur dire: Faites ceci: prenez dans le pays d’Égypte des chariots pour vos enfants et pour vos femmes; amenez votre père et venez.
Okoyebisa bango lisusu: « Bozwa ndambo ya bashario ya Ejipito mpo na bana mpe basi na bino; bongo bozwa tata na bino mpe bozonga awa.
20 Que vos yeux ne s’arrêtent pas avec regret sur les objets que vous devrez laisser, car ce qu’il y a de meilleur dans tout le pays d’Égypte est à votre disposition. »
Boyoka mawa te mpo na oyo bokotika na Kanana, pamba te biloko nyonso ya kitoko oyo ezali na Ejipito ekozala mpo na bino. »
21 Les fils d’Israël firent ainsi; Joseph leur donna des chariots, selon l’ordre de Pharaon, ainsi que des provisions pour la route.
Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo bayebisaki bango. Jozefi apesaki bango bashario ndenge Faraon apesaki mitindo mpe apesaki bango bilei mosusu mpo na mobembo na bango.
22 Il leur donna à tous des vêtements de rechange, et il donna à Benjamin trois cents pièces d’argent et cinq vêtements de rechange.
Jozefi apesaki epai ya moko na moko kati na bango bilamba ya sika; apesaki Benjame mbongo ya bibende, nkama misato, elongo na bilamba ya sika.
23 Il envoya également à son père dix ânes chargés des meilleurs produits de l’Égypte, et dix ânesses chargées de blé, de pain et de vivres, pour son père pendant le voyage.
Atindelaki tata na ye biloko oyo: ba-ane zomi etonda na bilamba ya kitoko ya Ejipito mpe bampunda zomi ya basi etonda na ble, mapa mpe bilei mpo na mobembo na ye.
24 Puis il congédia ses frères, qui partirent; et il leur dit: « Ne vous querellez pas en chemin. »
Jozefi atikaki bandeko na ye kokende. Tango bazali kolongwa, alobaki na bango: — Boswana te na nzela.
25 Ayant monté de l’Égypte, ils arrivèrent dans le pays de Chanaan, auprès de Jacob, leur père.
Balongwaki na Ejipito mpe bakendeki epai ya tata na bango Jakobi, na mokili ya Kanana.
26 Ils lui dirent: « Joseph vit encore, c’est même lui qui gouverne tout le pays d’Égypte. » Mais son cœur resta froid, parce qu’il ne les croyait pas.
Balobaki na ye: — Jozefi azali nanu na bomoi. Ye nde moto azali koyangela Ejipito mobimba. Jakobi ayokaki nzoto malili mpe andimelaki bango te.
27 Ils lui rapportèrent alors toutes les paroles que Joseph avait dites. Lorsqu’il eut vu les chariots que Joseph avait envoyés pour le transporter, l’esprit de Jacob, leur père, se ranima,
Kasi tango bayebisaki ye makambo nyonso oyo Jozefi alobaki mpo na bango mpe tango amonaki bashario oyo Jozefi atindaki mpo na komema ye na Ejipito, molimo ya tata na bango Jakobi ezongaki.
28 et Israël dit: « C’est assez! Joseph, mon fils, vit encore! j’irai et je le verrai avant de mourir. »
Mpe Isalaele alobaki: — Ya solo, nandimi ete mwana na ngai Jozefi azali nanu na bomoi; nakokende mpe nakomona ye liboso ete nakufa.

< Genèse 45 >