< 1 Samuel 13 >

1 Saül était âgé de... ans lorsqu'il devint roi et il régna deux ans sur Israël.
Saulo azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki Isalaele mibu tuku minei na mibale.
2 Saül se choisit trente mille hommes d'Israël: deux mille étaient avec lui à Machmas et sur la montagne de Béthel, et mille étaient avec Jonathas à Gabaa de Benjamin. Et il renvoya le reste du peuple, chacun dans sa tente.
Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele: bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.
3 Jonathas battit le poste des Philistins qui était à Gabée et les Philistins l'apprirent. Et Saül fit sonner de la trompette dans tout le pays, en disant: « Que les Hébreux entendent! »
Jonatan alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki na Geba. Bongo bato ya Filisitia bayokaki sango na yango. Boye Saulo abetaki kelelo kati na mokili mobimba, mpe alobaki: « Tika ete Ba-Ebre bayoka! »
4 Tout Israël entendit la nouvelle: « Saül a battu le poste des Philistins, et même Israël s'est rendu odieux auprès des Philistins. » Et le peuple fut convoqué auprès de Saül, à Galgala.
Bato nyonso ya Isalaele bayokaki sango oyo azalaki koloba ete Saulo abundisaki mpe alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, mpe ete bato ya Filisitia bayinaki bato ya Isalaele. Bato nyonso basanganaki na Giligali mpo na kokende kobunda elongo na Saulo.
5 Les Philistins s'assemblèrent pour combattre Israël; ils avaient trente mille chars, six mille cavaliers, et un peuple innombrable comme le sable qui est sur le bord de la mer. Ils montèrent et campèrent à Machmas, à l'orient de Beth-Aven.
Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele; bazalaki na bashar nkoto tuku misato; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.
6 Les hommes d'Israël, se voyant dans une grande extrémité, car ils étaient serrés de près, se cachèrent dans les cavernes, dans les broussailles, dans les rochers, dans les trous et dans les citernes.
Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.
7 Des Hébreux passèrent aussi le Jourdain, pour aller au pays de Gad et de Galaad. Saül était encore à Galgala, et tout le peuple derrière lui tremblait.
Ndambo ya Ba-Ebre mosusu bakatisaki mayi ya Yordani mpo na kokende na mokili ya Gadi mpe ya Galadi. Saulo azalaki nanu na Giligali, mampinga nyonso oyo ezalaki elongo na ye ezalaki kolenga na somo.
8 Il attendit sept jours, selon le terme fixé par Samuel. Mais Samuel n'arrivait pas à Galgala, et le peuple se dispersait loin de Saül.
Azelaki mikolo sambo, tango oyo Samuele akataki. Kasi mpo ete Samuele ayaki te na Giligali, yango wana bato batikaki Saulo mpe bapalanganaki.
9 Alors Saül dit: « Amenez-moi l'holocauste et les sacrifices pacifiques. » Et il offrit l'holocauste.
Saulo alobaki: « Bomemela ngai banyama ya mbeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. » Mpe Saulo abonzaki mbeka ya kotumba.
10 Comme il achevait d'offrir l'holocauste, voici que Samuel arriva, et Saül sortit au-devant de lui pour le saluer.
Bongo tango kaka asilisaki kobonza mbeka yango ya kotumba, Samuele akomaki. Saulo abimaki mpo na kokende kopesa ye mbote.
11 Samuel lui dit: « Qu'as-tu fait? » Saül répondit: « Lorsque j'ai vu que le peuple se dispersait loin de moi, que tu n'arrivais pas au terme fixé et que les Philistins étaient assemblés à Machmas,
Samuele atunaki ye: — Osali penza nini? Saulo azongisaki: — Tango namonaki ete bato babandi kopalangana mosika na ngai, mpe ete yo oyei te na ngonga oyo ekatamaki, mpe ete bato ya Filisitia bazali kosangana na Mikimasi,
12 je me suis dit: Maintenant, les Philistins vont descendre contre moi à Galgala, et je n'ai pas imploré Yahweh. Alors, me faisant violence, j'ai offert l'holocauste. »
namilobelaki: « Sik’oyo, bato ya Filisitia bazali koya kobundisa ngai na Giligali, kasi ngai nabondeli Yawe te! » Yango wana, nazwaki mokano ya kobonza mbeka ya kotumba.
13 Samuel dit à Saül: « Tu as agi en insensé, tu n'as pas observé le commandement que Yahweh ton Dieu t'avait donné; car Yahweh aurait affermi pour toujours ton règne sur Israël.
Samuele alobaki na Saulo: — Osali lokola moto ya liboma! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela.
14 Mais maintenant, ton règne ne subsistera point. Yahweh s'est cherché un homme selon son cœur et Yahweh l'a destiné à être le chef de son peuple, parce que tu n'as pas observé ce que Yahweh t'avait ordonné. »
Kasi sik’oyo, bokonzi na yo ekowumela lisusu te. Yawe aluki moto mosusu oyo asepelisaka motema na Ye mpe atie ye mokambi ya bato na Ye, pamba te yo, obateli mibeko ya Yawe te.
15 Et Samuel se leva, et monta de Galgala à Gabaa de Benjamin. Saül passa en revue le peuple qui se trouvait avec lui: il y en avait environ six cents hommes.
Bongo Samuele alongwaki na Giligali mpe akendeki na Gibea ya Benjame. Mpe Saulo atangaki bato oyo bazalaki elongo na ye: bazalaki bato pene nkama motoba.
16 Saül, Jonathas, son fils, et le peuple qui se trouvait avec eux s'étaient postés à Gabée de Benjamin, et les Philistins campaient à Machmas.
Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, mpe mibali nyonso oyo bazalaki kovanda elongo na bango batandamaki mpo na bitumba, na Geba ya Benjame. Kasi bato ya Filisitia batongaki ya bango molako na Mikimasi.
17 L'armée de destruction sortit du camp des Philistins en trois corps: un corps prit le chemin d'Ephra, vers le pays de Sual;
Longwa na molako ya bato ya Filisitia, mampinga ya basoda ya mpiko ebimaki mpe ekabwanaki na masanga misato: lisanga ya liboso ezwaki nzela oyo ekenda kino na Ofira, na mokili ya Shuwali;
18 un autre corps prit le chemin de Beth-Horon; et le troisième corps, celui de la frontière qui domine la vallée de Seboïm, du côté du désert.
lisanga ya mibale etalisaki na nzela ya Beti-Oroni; mpe lisanga ya misato ezwaki nzela oyo ekenda na mondelo ya Lubwaku ya Tseboyimi, na ngambo ya esobe.
19 On ne trouvait point de forgeron dans tout le pays d'Israël; car les Philistins avaient dit: « Que les Hébreux ne puissent plus fabriquer d'épées ou de lances! »
Nzokande, na tango wana, batuli bibende bazalaki lisusu te kati na mokili mobimba ya Isalaele, pamba te bato ya Filisitia balobaki: « Ba-Ebre bakoki kosala te, ezala makonga to matolotolo. »
20 Et tout Israël descendait chez les Philistins pour aiguiser chacun son soc, son hoyau, sa hache ou sa charrue,
Yango wana, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kokende epai ya bato ya Filisitia mpo na kotia minu na basonge ya bibende oyo bangombe etimolaka na yango mabele, na bapiki, na bipasola mpe na bapawu.
21 en sorte que le tranchant des socs, des hoyaux, des tridents et des haches était souvent émoussé et les aiguillons non redressés.
Bongo mpo na kotia minu yango na bapawu, na bapiki mpe na bipasola, bazalaki kofuta bagrame mwambe ya mbongo ya bibende.
22 Il arriva qu'au jour du combat, il ne se trouvait ni lance ni épée dans la main de tout le peuple qui était avec Saül et Jonathas; mais il s'en trouvait auprès de Saül et de Jonathas, son fils.
Boye, na mokolo ya bitumba, soda ata moko te oyo azalaki elongo na Saulo mpe na Jonatan azalaki na mopanga to na likonga na loboko na ye; kaka Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, nde bazalaki na yango.
23 Un poste des Philistins se rendit au passage de Machmas.
Limpinga moko ya basoda ya Filisitia eyaki kotelema na kati-kati ya lubwaku ya Mikimasi.

< 1 Samuel 13 >