< Nombres 9 >
1 Yahweh parla à Moïse, dans le désert de Sinaï, le premier mois de la deuxième année après leur sortie du pays d’Égypte. Il dit:
Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai, na sanza ya liboso ya mobu oyo ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito. Alobaki na ye:
2 « Que les enfants d’Israël fassent la Pâque au temps fixé.
« Tika ete bana ya Isalaele basepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama.
3 Vous la ferez au temps fixé, le quatorzième jour de ce mois, entre les deux soirs: c’est le temps fixé; vous la ferez selon toutes les lois et toutes les ordonnances qui la concernent. »
Bosala feti yango na tango oyo ekatama, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza oyo, kolanda mibeko mpe malako na yango nyonso. »
4 Moïse parla donc aux enfants d’Israël, afin qu’ils fissent la Pâque.
Boye, Moyize ayebisaki bana ya Isalaele ete basepelaka feti ya Pasika.
5 Et ils firent la Pâque le quatorzième jour du premier mois, entre les deux soirs, dans le désert de Sinaï. Selon tout ce que Yahweh avait ordonné à Moïse, ainsi firent les enfants d’Israël.
Basepelaki Pasika kati na esobe ya Sinai, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya liboso. Bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize.
6 Il y eut des hommes qui se trouvaient impurs à cause d’un cadavre et qui ne purent faire la Pâque ce jour-là. S’étant présentés le jour même devant Moïse et Aaron,
Kasi bato mosusu kati na bango basepelaki Pasika te na mokolo wana, pamba te bazalaki mbindo mpo ete basimbaki ebembe. Boye, kaka na mokolo wana, bakendeki komona Moyize na Aron
7 ils dirent à Moïse: « Nous sommes impurs à cause d’un cadavre; pourquoi serions-nous privés de présenter l’offrande de Yahweh, au temps fixé, au milieu des enfants d’Israël? »
mpe bayebisaki Moyize: — Tokomi mbindo mpo ete tosimbaki ebembe. Boye, mpo na nini te biso mpe tomema likabo na biso epai na Yawe elongo na bato mosusu ya Isalaele?
8 Moïse leur répondit: « Attendez que j’apprenne ce que Yahweh vous ordonnera. »
Moyize azongiselaki bango: — Bozela nanu ete naluka koyeba makambo oyo Yawe atindi na tina na bino.
9 Yahweh parla à Moïse, en disant:
Boye Yawe alobaki na Moyize:
10 « Parle aux enfants d’Israël et dis-leur: Si quelqu’un, parmi vous ou parmi vos descendants, se trouve impur à cause d’un cadavre ou est en voyage au loin, il fera la Pâque en l’honneur de Yahweh.
— Yebisa bana ya Isalaele: « Soki moko kati na bino to kati na bakitani na bino akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe na mokolo wana, ezala soki azali mosika na mobembo, akoki kosepela feti ya Pasika mpo na lokumu na Yawe.
11 C’est au second mois qu’ils la feront, le quatorzième jour, entre les deux soirs; ils la mangeront avec des pains sans levain et des herbes amères.
Basengeli kosepela yango na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale; bakolia mwana meme elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo.
12 Ils n’en laisseront rien jusqu’au matin, et ils n’en briseront pas les os. Ils la célébreront selon toutes les prescriptions relatives à la Pâque.
Bakotika eloko moko te kino na tongo mpe bakobuka mokuwa ata moko te. Basengeli kolanda mibeko na yango nyonso na tango ya kosepela feti ya Pasika.
13 Si quelqu’un, étant pur et n’étant pas en voyage, omet de faire la Pâque, il sera retranché de son peuple; parce qu’il n’a pas présenté l’offrande de Yahweh au temps fixé, il portera son péché.
Kasi soki moto moko asepeli feti ya Pasika te, wana azali mbindo te mpe asali mobembo te, basengeli kolongola ye kati na libota na ye, pamba te abonzeli Yawe likabo te na tango oyo ekatama; akomema mikumba ya masumu na ye.
14 Si un étranger séjournant chez vous fait la Pâque de Yahweh, il observera les lois et ordonnances concernant la Pâque. Il y aura une même loi pour vous, pour l’étranger comme pour l’indigène. »
Soki mpe mopaya oyo avandi kati na bino alingi kosepela Pasika ya Yawe, asengeli kosala kaka bongo, asengeli kolanda mibeko mpe malako na yango. Ezala mpo na bapaya to mpo na bana mboka, bosengeli kozala na mibeko ya losambo ya ndenge moko. »
15 Le jour où la Demeure fut dressée, la nuée couvrit la Demeure: qui est la tente du témoignage; depuis le soir jusqu’au matin, il y eut sur la Demeure comme l’apparence d’un feu.
Na mokolo oyo batelemisaki Mongombo, lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Litatoli. Wuta na pokwa kino na tongo, lipata oyo ezalaki likolo ya Mongombo ezalaki komonana lokola moto.
16 Il en fut ainsi continuellement: la nuée couvrait la Demeure, et la nuit elle avait l’apparence d’un feu.
Mpe ekobaki kozala kaka ndenge wana: lipata ezalaki kozipa Mongombo; bongo na butu, ezalaki komonana lokola moto.
17 Quand la nuée s’élevait de dessus la tente, les enfants d’Israël levaient le camp, et, à l’endroit où la nuée s’arrêtait, ils dressaient le camp.
Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo, bana ya Isalaele mpe bazalaki kokende; mpe esika nyonso oyo lipata ezalaki kotelema, esika wana nde bazalaki mpe kosala molako na bango.
18 Au commandement de Yahweh, les enfants d’Israël levaient le camp, et au commandement de Yahweh ils le dressaient; ils restaient campés tant que la nuée se reposait sur la Demeure.
Ezalaki na mitindo na Yawe kaka nde bana ya Isalaele bazalaki kotambola mpe kosala molako na bango. Tango nyonso lipata ezalaki kowumela na likolo ya Mongombo, bango mpe bazalaki kowumela na molako.
19 Quand la nuée restait longtemps sur la Demeure, les enfants d’Israël observaient le commandement de Yahweh et ne levaient pas le camp.
Soki lipata ewumeli tango molayi likolo ya Mongombo, bana ya Isalaele bazalaki kotosa mitindo na Yawe mpe bazalaki kokende te.
20 Il en était de même quand la nuée ne s’arrêtait que peu de jours sur la Demeure: au commandement de Yahweh ils dressaient le camp, et au commandement de Yahweh ils le levaient.
Soki mpe lipata esali kaka mwa ndambo ya mikolo na likolo ya Mongombo, na mitindo na Yawe, bazalaki kowumela na molako na bango; mpe bazalaki kokende soki kaka Yawe apesi mitindo.
21 Si la nuée se reposait seulement du soir au matin, et s’élevait le matin, ils levaient le camp; ou, si la nuée s’élevait après un jour et une nuit, ils levaient le camp.
Na mbala mosusu, lipata ezalaki kowumela butu moko kaka, wuta na pokwa kino na tongo; bongo tango ezalaki kolongwa na tongo na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, bango mpe bazalaki kokende. To mpe ezalaki kosala mokolo moko mpe butu moko; mpe soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.
22 Si la nuée s’arrêtait sur la Demeure plusieurs jours, un mois ou une année, les enfants d’Israël restaient campés, et ne levaient pas le camp; mais, dès qu’elle s’élevait, ils levaient le camp.
Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.
23 Au commandement de Yahweh ils dressaient le camp, et au commandement de Yahweh ils levaient le camp; ils observaient le commandement de Yahweh, conformément à l’ordre de Yahweh transmis par Moïse.
Ezalaki kaka na mitindo na Yawe nde bazalaki kowumela na molako to kokende. Boye, bazalaki kosala mosala ya Yawe kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.