< Lamentations 2 >

1 Comment le Seigneur, dans sa colère, a-t-il couvert d’un nuage la fille de Sion? Il a précipité du ciel sur la terre la magnificence d’Israël; il ne s’est plus souvenu de l’escabeau de ses pieds, au jour de sa colère.
Tala ndenge nini Nkolo azipi Siona, mboka kitoko, na lipata ya kanda na Ye: akweyisi lokumu ya Isalaele, wuta na likolo kino na se; na mokolo ya kanda na Ye, abosanaki enyatelo makolo na Ye!
2 Le Seigneur a détruit sans pitié toutes les demeures de Jacob; il a renversé dans sa fureur les forteresses de la fille de Juda; il les a jetées par terre; il a profané la royauté et ses princes.
Na kozanga mawa, Nkolo abebisi bandako nyonso ya Jakobi; na kanda na Ye, akweyisi bandako batonga makasi ya Yuda, mwasi kitoko, mpe asambwisi bokonzi mpe bakambi na yango.
3 Dans l’ardeur de sa colère, il a brisé toute force d’Israël; il a ramené sa droite en arrière, devant l’ennemi; il a allumé dans Jacob comme un feu ardent qui dévore de tous côtés.
Na kanda makasi na Ye, abukaki Isalaele maseke nyonso, alongolaki loboko na Ye ya mobali na likolo na yango tango monguna na bango azalaki kopusana; apelisaki moto kati na mokili ya Jakobi lokola moto makasi oyo etumbaka biloko nyonso na bangambo na yango nyonso.
4 Il a bandé son arc comme fait un ennemi; sa droite s’est levée comme celle d’un assaillant; et il a égorgé tout ce qui charmait les yeux; dans la tente de la fille de Sion, il a versé son courroux comme un feu.
Lokola moyini, abendi tolotolo na Ye; lokola monguna, asemboli loboko na Ye mpe abomi nyonso oyo ezalaki kosepelisa miso; mpe asopi kanda makasi na Ye lokola moto na likolo ya bandako ya kapo ya Siona, mboka kitoko.
5 Le Seigneur a été comme un ennemi, il a détruit Israël; il a détruit tous ses palais, abattu ses citadelles; il a amoncelé sur la fille de Sion douleur sur douleur.
Yawe akomi lokola monguna: abebisi mokili ya Isalaele, abebisi bandako nyonso ya mokonzi ya Isalaele, abuki bandako na yango batonga makasi, atondisi matanga mpe kolela kati na Yuda, mboka kitoko.
6 Il a forcé son enclos, comme un jardin; il a détruit son sanctuaire. Yahweh a fait cesser dans Sion solennités et sabbats; dans l’ardeur de sa colère, il a rejeté avec dédain roi et prêtre.
Abebisi lopango na ye ndenge babebisaka lopango ya elanga, abebisi esika na bango ya mayangani. Na kanda makasi na Ye, Yawe asali ete Siona abosana bafeti oyo ekatama mpe mikolo ya Saba; mpe apameli mokonzi mpe Nganga-Nzambe.
7 Le Seigneur a pris en dégoût son autel, en abomination son sanctuaire; il a livré aux mains de l’ennemi les murs de ses citadelles; on a poussé des cris dans la maison de Yahweh, comme en un jour de fête.
Yawe abwaki etumbelo na ye, asundoli esika na ye ya bule mpe akabi na maboko ya monguna bamir mpe bandako ya mokonzi na yango. Bato bagangi makasi kati na Tempelo ya Yawe ndenge bagangaka na mokolo ya feti oyo ekatama.
8 Yahweh a médité de renverser les murs de la fille de Sion; il a étendu le cordeau, il n’a pas retiré sa main qu’il ne les eût détruits; il a mis en deuil le mur et l’avant-mur; ils gisent tristement ensemble.
Yawe akani kobuka bamir oyo ezingeli Siona, mboka kitoko; atandi singa ya komekela molayi mpe azongisi loboko na Ye na sima te mpo na kobebisa; abebisi bamir oyo ebatelaka engumba mpe bamir mosusu; bongo akweyisi yango nyonso.
9 Ses portes sont enfoncées en terre, il en a rompu, brisé les barres; son roi et ses princes sont parmi les nations, il n’y a plus de loi; même ses prophètes ne reçoivent plus de vision de Yahweh. JOD.
Bikuke na yango ezindi na mabele; abuki-buki mpe abebisi banzete oyo bakangelaka bikuke yango. Mokonzi mpe bakambi na ye bakei na bowumbu kati na bikolo, Mobeko ezali lisusu te, mpe basakoli na ye bazali kozwa lisusu te bimoniseli kowuta na Yawe.
10 Ils sont assis par terre, en silence, les anciens de la fille de Sion; ils ont jeté de la poussière sur leur tête, ils sont vêtus de sacs; elles inclinent leur tête vers la terre, les vierges de Jérusalem.
Bampaka ya Siona, mboka kitoko, bavandi kimia na mabele, bamisopeli putulu na mito na bango mpe balati basaki; bongo bilenge basi ya Yelusalemi bafukami, bilongi na bango kino na se.
11 Mes yeux se consument dans les larmes, mes entrailles sont émues; mon foie se répand sur la terre, à cause de la blessure de la fille de mon peuple, lorsque enfants et nourrissons tombent en défaillance, sur les places de la ville.
Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli, nazali komitungisa, libumu na ngai ezali kobaluka, motema na ngai ezali kotungisama mpo ete bato na ngai babebisami, mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.
12 Ils disent à leurs mères: « Où y a-t-il du pain et du vin? » et ils tombent comme frappés du glaive, sur les places de la ville; et leur âme expire sur le sein de leurs mères.
Bazalaki koloba na bamama na bango: « Epai wapi tokoki kozwa ble mpe masanga ya vino? » Ndenge bazalaki kokweya-kweya lokola bato oyo bazoki bapota minene na babalabala ya engumba, ndenge wana mpe bazalaki kokufa na maboko ya bamama na bango.
13 Que puis-je te dire? Qui trouver de semblable à toi, fille de Jérusalem? A qui te comparer pour te consoler, vierge, fille de Sion? Car ta plaie est grande comme la mer: qui te guérirait?
Naloba lisusu nini mpo na yo? Nakokanisa yo na nani, Yelusalemi, mboka kitoko? Nakokanisa yo na nani mpo ete nakoka kobondisa yo, Siona, mboka kitoko? Pota na yo ezali monene lokola ebale monene; nani akoki kobikisa yo?
14 Tes prophètes ont eu pour toi de vaines et folles visions; ils ne t’ont pas dévoilé ton iniquité, afin de détourner de toi l’exil; mais ils t’ont donné pour visions des oracles de mensonge et de séduction.
Bimoniseli ya basakoli na yo ezalaki ya lokuta mpe ya pamba; balakisaki yo masumu na yo te mpo ete okende na bowumbu te: masakoli oyo bazwelaki yo ezalaki ya mabe mpe ya lokuta!
15 Ils battent des mains à ton sujet, tous ceux qui passent sur le chemin; ils sifflent, ils branlent la tête sur la fille de Jérusalem; « Est-ce là cette ville qu’on appelait la parfaite en beauté la joie de toute la terre? »
Bato nyonso oyo bolekelaka na nzela na yo bazali kobeta maboko na kokamwa, bazali kobeta piololo mpe koningisa mito mpo na Yelusalemi, mboka kitoko: « Boni, ezali solo engumba oyo bazalaki kobenga kitoko ekoka mpe esengo ya mokili mobimba? »
16 Ils ouvrent la bouche contre toi, tous tes ennemis; ils sifflent, ils grincent des dents, ils disent: « Nous l’avons engloutie! C’est là le jour que nous attendions, nous y sommes arrivés, nous le voyons! »
Banguna na yo nyonso bafungoli minoko na bango mpo na kotiola yo, bazali koseka yo mpe kolia minu na bango; bongo bazali koloba: « Tomeli ye! Tala mokolo oyo tozalaki kozela! Tokomi penza na mokolo yango mpe tomoni yango! »
17 Yahweh a exécuté ce qu’il avait résolu; il a accompli sa parole, qu’il avait prononcée dès les jours anciens; il a détruit sans pitié; il a réjoui l’ennemi à ton sujet, il a élevé la corne de tes oppresseurs.
Yawe asali makambo oyo abongisaki, akokisi liloba na Ye, nyonso oyo aloba wuta kala: akweyisi yo na mawa te, apesi nzela na banguna na yo ete balonga yo, atomboli liseke ya banguna na yo.
18 Leur cœur crie vers le Seigneur! O muraille de la fille de Sion, laisse couler, comme un torrent, tes larmes, le jour et la nuit; ne te donne aucune relâche, que ta prunelle n’ait pas de repos!
Mitema ya bato ezali koganga epai na Nkolo. Oh mir ya Siona, mboka kitoko, tika ete mpinzoli na yo ebima lokola ebale, butu mpe moyi, mpe miso na yo ekangama te!
19 Lève-toi, pousse des cris pendant la nuit, au commencement des veilles; épanche ton cœur comme de l’eau, devant la face du Seigneur! Lève tes mains vers lui pour la vie de tes petits enfants, qui tombent en défaillance à cause de la faim, aux coins de toutes les rues!
Telema, ganga na butu ndenge bakengeli basalaka na butu; sopa motema na yo lokola mayi, na miso ya Nkolo, tombola maboko na yo epai na Ye mpo na bomoi ya bana na yo, oyo bazali kokufa nzala na babalabala nyonso.
20 « Vois, Yahweh et considère: qui as-tu jamais traité ainsi? Quoi! des femmes mangent le fruit de leurs entrailles, les petits enfants qu’elles chérissent? SIN. Quoi! Ils sont égorgés dans le sanctuaire du Seigneur, le prêtre et le prophète!
Oh Yawe, tala mpe mona! Nani oyo osalela makambo ya boye? Boni, basi basengelaki solo kolia mbuma ya mabumu na bango to bana oyo bango moko babokoli? Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe kati na Esika ya bule ya Nkolo?
21 « Ils sont couchés par terre dans les rues, l’enfant et le vieillard; mes vierges et mes jeunes hommes sont tombés par l’épée; tu as égorgé au jour de ta colère, tu as immolé sans pitié.
Bibembe ya bilenge mpe ya mikolo elali-lali na babalabala; basali na ngai ya mibali mpe ya basi bakufi na mopanga! Obomi bango na mokolo ya kanda na Yo; obomi bango na mawa te!
22 « Tu as convoqué, comme à un jour de fête, mes terreurs de toutes parts; au jour de la colère de Yahweh, il n’y a eu ni échappé ni fugitif: ceux que j’avais chéris et élevés, mon ennemi les a exterminés! »
Ndenge obengisaka bato na mokolo ya feti, ndenge wana mpe obengisaki pasi wuta na bangambo nyonso mpo na kosala ngai mabe. Na mokolo ya kanda ya Yawe, moto moko te abikaki to atikalaki na bomoi. Monguna na ngai abebisi bato oyo nazalaki kobokola mpe kobatela.

< Lamentations 2 >