< Job 15 >

1 Alors Eliphaz de Théman prit la parole et dit:
Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki:
2 Le sage répond-il par une science vaine? Se gonfle-t-il la poitrine de vent?
« Boni, moto ya bwanya akopesaka solo eyano na maloba ya pamba boye, maloba oyo ezanga ata tina, to alingaka kotondisa libumu na ye na mopepe ya moto oyo ewutaka na Este?
3 Se défend-il par de futiles propos, par des discours qui ne servent à rien?
Akoki solo komilobela na maloba ezanga ata tina? Akoki solo kosalela maloba milayi oyo ezali ata na motuya te?
4 Toi, tu détruis même la crainte de Dieu, tu anéantis toute piété envers Dieu.
Yo ozali penza kobebisa lokumu ya Nzambe okomi koboya lokumu liboso ya Nzambe.
5 Ta bouche révèle ton iniquité, et tu prends le langage les fourbes.
Lisumu na yo ezali kokamba monoko na yo, ozwi elobeli ya bakosi.
6 Ce n’est pas moi, c’est ta bouche qui te condamne, ce sont tes lèvres qui déposent contre toi.
Monoko na yo moko nde ezali komemela yo etumbu, kasi monoko na ngai te; bibebu na yo moko nde ezali kofunda yo.
7 Es-tu né le premier des hommes? As-tu été enfanté avant les collines?
Yo nde moto ya liboso oyo obotama kati na bato? Omona moyi liboso ya bangomba mikuse?
8 As-tu assisté au conseil de Dieu? As-tu dérobé pour toi seul la sagesse?
Osila koyoka makambo oyo elobamaka kati na Likita ya Nzambe? Bwanya ezalaka kaka epai na yo moko?
9 Que sais-tu, que nous ne sachions? Qu’as-tu appris, qui ne nous soit familier?
Makambo nini oyebi, oyo biso toyebi te? Boyebi nini ozali na yango, oyo biso tozali na yango te?
10 Nous avons aussi parmi nous des cheveux blancs, des vieillards plus riches de jours que ton père.
Na ngambo na biso, ezali na bato ya suki pembe, bampaka, bato oyo baleki tata na yo na mibu ya mbotama.
11 Tiens-tu pour peu de chose les consolations de Dieu et les douces paroles que nous t’adressons?
Kobondisama ya Nzambe mpe maloba ya kimia oyo bazali koloba mpo na yo, ekoki te mpo na yo?
12 Où ton cœur t’emporte-t-il, et que signifie ce roulement de tes yeux?
Mpo na nini motema na yo ezali kopengwisa yo, mpe miso na yo ezali kobeta-beta?
13 Quoi! C’est contre Dieu que tu tournes ta colère, et que de ta bouche tu fais sortir de tels discours?
Mpo ete obwakela Nzambe kanda na yo mpe obimisa makambo ya boye na monoko na yo?
14 Qu’est-ce que l’homme, pour qu’il soit pur, le fils de la femme, pour qu’il soit juste?
Moto azali nani mpo ete azala peto? Ye oyo abotami na mwasi azali nani mpo ete azala sembo?
15 Voici que Dieu ne se fie pas même à ses saints, et les cieux ne sont pas purs devant lui:
Soki Nkolo azali kondimela basantu na Ye te, soki kutu likolo ezali peto te na miso na Ye,
16 combien moins cet être abominable et pervers, l’homme qui boit l’iniquité comme l’eau!
ekozala boni mpo na moto mabe, moto oyo abeba, oyo asalaka mabe lokola azali komela mayi?
17 Je vais t’instruire, écoute-moi; je raconterai ce que j’ai vu,
Yoka ngai, mpe nakolimbolela yo! Tika ete nayebisa yo makambo oyo ngai namona,
18 ce que les sages enseignent, — ils ne le cachent pas, l’ayant appris de leurs pères;
makambo oyo bato ya bwanya balobaki, na kobomba ata eloko moko te kati na makambo oyo bazwaki epai ya batata na bango.
19 à eux seuls avait été donné le pays, et parmi eux jamais ne passa l’étranger. —
Apesaki mokili epai na bango kaka tango ata mopaya moko te alekaki kati na bango.
20 « Le méchant, durant tous ses jours, est rongé par l’angoisse; un petit nombre d’années sont réservées à l’oppresseur.
Na bomoi na ye mobimba, na mibu oyo bakata mpo na bomoi na ye, moto mabe anyokwamaka.
21 Des bruits effrayants retentissent à ses oreilles; au sein de la paix, le dévastateur fond sur lui.
Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.
22 Il n’espère pas échapper aux ténèbres, il sent qu’il est guetté pour le glaive.
Azalaka na elikya te ya kobima na molili, mpe mopanga ezelaka ye.
23 Il erre pour chercher son pain; il sait que le jour des ténèbres est prêt, à ses côtés.
Ayengaka-yengaka mpo na koluka lipa, kasi akozwela yango wapi? Ayebaka ete mokolo ya molili ezelaka ye.
24 La détresse et l’angoisse tombent sur lui; elles l’assaillent comme un roi armé pour le combat.
Pasi mpe mawa ebangisaka ye, ekomelaka ye lokola mokonzi oyo amibongisi mpo na bitumba,
25 Car il a levé sa main contre Dieu, il a bravé le Tout-Puissant,
mpo ete asembolaka loboko na ye mpo na kobundisa Nzambe, atelemelaka Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
26 il a couru sur lui le cou raide, sous le dos épais de ses boucliers.
akimaka epai na Ye, moto etala na se, amibombaka na sima ya banguba minene.
27 Il avait le visage couvert de graisse, et les flancs chargés d’embonpoint.
Elongi na ye ekotonda mafuta, loketo na ye ekokoma monene;
28 Il occupait des villes qui ne sont plus, des maisons qui n’ont plus d’habitants, vouées à devenir des monceaux de pierre.
akovanda na engumba ebeba, kati na bandako oyo bato bakima, bandako oyo ekoma pene ya kokweya;
29 Il ne s’enrichira plus, sa fortune ne tiendra pas, ses possessions ne s’étendront plus sur la terre.
akotikala kokoma mozwi te, pamba te bozwi na ye ekowumela te, bomengo na ye ekopanzana te kati na mokili mobimba;
30 Il n’échappera pas aux ténèbres; la flamme desséchera ses rejetons, et il sera emporté par le souffle de la bouche de Dieu.
akokoka kokima molili te, moto ekokawusa mandalala na ye mpe akokima ata pema na ye moko.
31 Qu’il n’espère rien du mensonge, il y sera pris; le mensonge sera sa récompense.
Tika ete atia elikya na ye na lokuta te, pamba te akoyokisama soni mpe akozwa libebi lokola lifuti.
32 Elle arrivera avant que ses jours soient pleins, et son rameau ne verdira plus.
Ekokokisama liboso ete akufa, ndenge lindalala ekawukaka mpo na kozanga mayi na yango
33 Il secouera, comme la vigne, son fruit à peine éclos; il laissera tomber sa fleur, comme l’olivier.
to lokola nzete ya vino oyo ekweyisi bambuma na yango, wana ezali nanu mobesu to lokola nzete ya olive oyo ekweyisi fololo na yango.
34 Car la maison de l’impie est stérile, et le feu dévore la tente du juge corrompu.
Solo, libota ya moto mabe ekofuluka te, mpe moto ekozikisa ndako na ye mpo na mabe na ye moko.
35 Il a conçu le mal, et il enfante le malheur, dans son sein mûrit un fruit de déception. »
Pamba te moto nyonso oyo azalaka na makanisi mabe kati na ye abotaka kaka pasi; mabe oyo ekolaka kati na ye ememelaka ye moko libebi. »

< Job 15 >